Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 46 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So Israel set out with all he had, came to Beersheba, and sacrificed to our Father, whom his father Isaac had worshiped. Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye.
2 And our Father spoke to Israel in visions of the night, "Jacob, Jacob." He said, "Here I am." Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli : — Jakobi ! Jakobi ! Jakobi azongisaki : — Ngai oyo.
3 He said, "I am your Father, whom your father worshiped. Do not be afraid to go down to Egypt, for there I will make you a great nation. Nzambe alobaki : — Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna.
4 I myself will go down with you to Egypt, and I will surely bring you back; and Joseph's own hand will close your eyes." Ngai moko nakokende elongo na yo na Ejipito ; mpe ya solo, nakozongisa yo lisusu. Loboko ya Jozefi ekozipa miso na yo.
5 Jacob set out from Beersheba. Israel's sons carried their father Jacob, their little ones, and their wives in the wagons Pharaoh had sent for him. Bongo Jakobi alongwaki na Beri-Sheba. Bana mibali ya Isalaele bamatisaki na bashario oyo Faraon atindaki mpo na komema ye : tata na bango Jakobi, bana na bango mpe basi na bango.
6 They took their livestock and the goods they had acquired in the land of Canaan, and came to Egypt—Jacob and all his offspring with him. Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana ; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito.
7 His sons and grandsons, daughters and granddaughters—all his offspring he brought with him to Egypt. Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito : bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi : bakitani na ye nyonso.
8 These are the names of Israel's sons who came into Egypt—Jacob and his sons: Reuben, Jacob's firstborn. Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito : Ribeni, mwana liboso ya Jakobi.
9 The sons of Reuben: Hanoch, Pallu, Hezron, and Carmi. Bana mibali ya Ribeni : Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi.
10 The sons of Simeon: Jemuel, Jamin, Ohad, Jachin, Zohar, and Shaul the son of a Canaanite woman. Bana mibali ya Simeoni : Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana.
11 The sons of Levi: Gershon, Kohath, and Merari. Bana mibali ya Levi : Gerishoni, Keati mpe Merari.
12 Judah's sons: Er, Onan, Shelah, Perez, Zerah; but Er and Onan died in Canaan. Perez's sons: Hezron and Hamul. Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.
13 The sons of Issachar: Tola, Puvah, Iob, and Shimron. Bana mibali ya Isakari : Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi.
14 The sons of Zebulun: Sered, Elon, and Jahleel. Bana mibali ya Zabuloni : Seredi, Eloni mpe Yaleyeli.
15 These are Leah's sons, born to Jacob in Paddan-aram, with his daughter Dinah; his sons and daughters numbered thirty-three. Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami ; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato.
16 The sons of Gad: Ziphion, Haggi, Shuni, Ezbon, Eri, Arodi, and Areli. Bana mibali ya Gadi : Tsefoni, Agi, Shuni, Etsiboni, Eri, Arodi mpe Areeli.
17 Asher's sons: Imnah, Ishvah, Ishvi, Beriah, and their sister Serah. Beriah's sons: Heber and Malchiel. Bana mibali ya Aseri : Yimina, Yishiva, Yishivi, Beria mpe ndeko na bango ya mwasi Sera. Bana mibali ya Beria : Eberi mpe Malikieli.
18 These are the sons of Zilpah, whom Laban gave to his daughter Leah; she bore these to Jacob—sixteen in all. Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi ; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba.
19 The sons of Rachel, Jacob's wife: Joseph and Benjamin. Bana mibali ya Rasheli, mwasi ya Jakobi : Jozefi mpe Benjame.
20 Manasseh and Ephraim were born to Joseph in Egypt by Asenath, daughter of Potiphera, priest of On. Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi.
21 The sons of Benjamin: Bela, Becher, Ashbel, Gera, Naaman, Ehi, Rosh, Muppim, Huppim, and Ard. Bana mibali ya Benjame : Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi.
22 These are the sons of Rachel who were born to Jacob—fourteen persons in all. Bango nde bazalaki bana mibali oyo Rasheli abotelaki Jakobi : bango nyonso bazalaki zomi na minei.
23 The sons of Dan: Hushim. Mwana mobali ya Dani : Ushimi.
24 The sons of Naphtali: Jahzeel, Guni, Jezer, and Shillem. Bana mibali ya Nefitali : Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shilemi.
25 These are Bilhah's sons, whom Laban gave to his daughter Rachel; she bore these to Jacob—seven in all. Bango nde bazalaki bana mibali oyo Bila abotelaki Jakobi ; bango nyonso bazalaki sambo. Bila azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya mwana na ye ya mwasi Rasheli.
26 Jacob's direct descendants who came to Egypt—excluding his sons' wives—totaled sixty-six. Bato nyonso oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, oyo bazalaki penza bakitani na ye, longola basi ya bana na ye, bango nyonso bazalaki tuku motoba na motoba.
27 Joseph had two sons born in Egypt. Jacob's household that came to Egypt numbered seventy in all. Bana mibali ya Jozefi oyo babotamaki na Ejipito bazalaki mibale. Bato nyonso ya libota ya Jakobi oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo.
28 Jacob sent Judah ahead to Joseph to lead the way to Goshen; they reached the land of Goshen. Liboso ete Jakobi akutana na Jozefi, atindaki Yuda epai ya Jozefi mpo na kobongisa bokutani na bango na Gosheni. Tango bakomaki na Gosheni,
29 Joseph readied his chariot and went up to Goshen to meet his father Israel. He appeared to him, fell on his neck, and wept on his neck a long time. Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi.
30 Israel said to Joseph, "Now let me die, since I've seen your face and you're still alive." Isalaele alobaki na Jozefi : — Sik’oyo, nakoki na ngai kokufa mpo ete namoni yo penza na miso na ngai moko, mpe ozali nanu na bomoi !
31 Joseph told his brothers and his father's household, "I will go up and tell Pharaoh, and say to him, 'My brothers and my father's household, who were in Canaan, have come to me. Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye : — Nakokende koyebisa Faraon : « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai.
32 The men are shepherds, for they have been keepers of livestock; they've brought their flocks, herds, and all they have.' Bazali babateli bibwele, babokolaka bibwele. Bamemi bameme, bantaba, bangombe na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango. »
33 When Pharaoh calls you and says, 'What is your occupation?' Tango Faraon akobenga bino mpe akotuna bino : « Bosalaka mosala nini ? »
34 you will say, 'Your servants have raised livestock from our youth until now, we and our fathers,' so you may settle in Goshen; for every shepherd is detestable to the Egyptians." Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]