Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Ezekiel 3 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He said to me, "Son of man, eat what you find. Eat this scroll, then go speak to the house of Israel." Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, lia eloko oyo ezali liboso na yo, lia buku oyo elingama mpe kende koloba na libota ya Isalaele. »
2 So I opened my mouth, and he gave me this scroll to eat. Boye, nafungolaki monoko na ngai, mpe aleisaki ngai buku yango oyo elingama.
3 He said to me, "Son of man, feed your stomach and fill your belly with this scroll I am giving you." I ate it, and in my mouth it was sweet as honey. Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, lia mokanda oyo nazali kopesa yo mpe tondisa libumu na yo na yango. » Boye, naliaki yango, mpe ezalaki elengi na monoko na ngai lokola mafuta ya nzoyi.
4 Then he said to me, "Son of man, go to the house of Israel and speak my words to them. Alobaki na ngai : « Mwana na moto, kende sik’oyo na libota ya Isalaele mpe yebisa bango maloba na Ngai.
5 "For you are not sent to a people of obscure speech and difficult language, but to the house of Israel, Otindami te epai ya bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola, kasi epai ya bana ya Isalaele.
6 not to many peoples of obscure speech and hard language whose words you can't understand. Surely, had I sent you to them, they would listen to you. Otindami te kati na bikolo ebele oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola. Solo, soki natindaki yo epai ya bikolo wana, balingaki kososola sango oyo omemeli bango.
7 But the house of Israel will not be willing to listen to you, because they are not willing to listen to me; for all the house of Israel are hard-headed and stubborn-hearted. Kasi libota ya Isalaele bakolinga koyokela yo te, mpo ete balingaka koyokela Ngai te ; pamba te libota mobimba ya Isalaele bazali mitema mpe mito makasi.
8 Look, I have made your face as hard as their faces, your forehead as hard as their foreheads. Nakokomisa yo motema mpe moto makasi lokola bango.
9 I've made your forehead like emery, harder than flint. Do not fear them or be dismayed by their looks, for they are a rebellious house." Nakokomisa mbunzu na yo makasi lokola diama to mpe makasi koleka ata libanga. Kobanga te mpe kolenga te liboso na bango, atako bazali libota ya batomboki. »
10 He said to me, "Son of man, take all my words that I speak to you into your heart and hear them with your ears. Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, yoka malamu maloba oyo nakoloba na yo mpe batela yango malamu kati na motema na yo.
11 Go to the exiles, your own people, and speak to them. Say to them, 'This is what the Sovereign Father says,' whether they listen or refuse to listen." Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu ; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › »
12 Then the Spirit of our Father lifted me, and behind me I heard a great rushing sound: "Blessed be the glory of our Father from his dwelling place!" Boye, Molimo atelemisaki ngai mpe nayokaki sima na ngai makelele moko ya makasi : « Tika ete nkembo ya Yawe epambolama wuta na esika oyo Ye avandaka ! »
13 the sound of the living creatures' wings brushing against one another, and the sound of the wheels beside them, a sound of great rushing. Nayokaki lisusu makelele ya mapapu ya bikelamu ya bomoi, tango ezalaki kotutana lipapu moko na mosusu, makelele ya bapine mpe lokito moko ya makasi.
14 The Spirit lifted me and carried me off, and I went in bitterness, my spirit burning within me, the hand of our Father strong upon me. Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda ; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi.
15 I came to the exiles at Tel-abib by the Chebar canal, and I sat among them there, overwhelmed, seven days. Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo ; nazalaki kokamwa mingi.
16 At the end of seven days, the word of our Father came to me: Sima na mikolo sambo, Yawe alobaki na ngai :
17 "Son of man, I have made you a watchman for the house of Israel. When you hear a word from my mouth, warn them from me. « Mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele ; boye yoka maloba oyo nazali koloba mpe kebisa bango na Kombo na Ngai.
18 If I tell the wicked, 'You will surely die,' and you don't warn him or speak out to warn the wicked from his wicked way to save his life, that wicked man will die for his sin, but I will hold you accountable for his blood. Soki Ngai nalobi na moto mabe : ‹ Solo, okokufa, › kasi yo okebisi ye te to oyebisi ye te ete atika nzela na ye ya mabe mpo ete abikisa bomoi na ye, moto wana ya mabe akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
19 "But if you warn the wicked and he does not turn from his evil or his evil way, he will die for his sin, but you will have saved your life. Kasi soki, yo, okebisi moto wana ya mabe, mpe atiki mabe na ye te to abongwani na nzela na ye ya mabe te, akokufa solo na masumu na ye, mpe yo okobikisa bomoi na yo.
20 "Again, when a righteous person turns from his righteousness and does wrong, and I put a stumbling block before him, he will die. Since you did not warn him, he will die for his sin, his righteous deeds forgotten, and I will hold you accountable for his blood. Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.
21 But if you warn the righteous person not to sin, and he does not, he will live because he heeded the warning, and you will have saved your life." Kasi soki, yo, okebisi moto ya sembo mpo ete asala masumu te, bongo ye mpe asali masumu te, akobikisa solo bomoi na ye, pamba te ayoki likebisi na yo, mpe yo, okobikisa bomoi na yo. »
22 The hand of our Father was on me there, and he said to me, "Get up, go out to the valley, and there I will speak with you." Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe alobaki na ngai : « Telema mpe kende na lubwaku ; nazali na makambo ya koyebisa yo kuna. »
23 So I got up and went to the valley, and there stood our Father's glory, like the glory I saw by the Chebar canal, and I fell facedown. Natelemaki mpe nakendeki na lubwaku. Nkembo ya Yawe ezalaki kuna : ezalaki lokola nkembo oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye nakweyaki elongi na ngai kino na mabele.
24 The Spirit entered me, set me on my feet, spoke with me, and said: "Go, shut yourself inside your house. Bongo Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai. Alobaki na ngai : « Kende komikangela kati na ndako na yo.
25 And you, son of man, they will tie cords on you and bind you with them, so you cannot go out among the people. Yo, mwana na moto, bakokanga yo basinga, bakolinga-linga yo mpo ete okoka te kobima kati na bato.
26 I will make your tongue stick to the roof of your mouth; you will be mute, unable to rebuke them, for they are a rebellious house. Nakokangisa lolemo na yo na monoko na yo mpo ete okoka koloba te mpe okoka kopamela bango te, pamba te bazali libota ya batomboki.
27 But when I speak with you, I will open your mouth, and you will tell them, 'This is what the Sovereign Father says.' Whoever will listen, let him listen; and whoever will refuse, let him refuse—for they are a rebellious house." Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye ! Pamba te bazali libota ya batomboki. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]