Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Acts 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 While Peter and John were speaking to the people, the priests, the temple captain, and the Sadducees came up to them, Wana Petelo mpe Yoane bazalaki nanu koloba na bato, Banganga-Nzambe, mokonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe Basaduseo bayaki,
2 greatly annoyed because they were teaching the people and proclaiming the resurrection from the dead in Jesus. na kanda makasi ndenge bamonaki bantoma koteya bato mpe kotatola ete bakufi bakosekwa ndenge Yesu asekwaki.
3 They arrested them and put them in custody until the next day, since it was already evening. Bakangaki Petelo mpe Yoane, bongo babwakaki bango na boloko kino na mokolo oyo elandaki, pamba te pokwa esilaki kokoma.
4 But many who heard the message believed, and the men's number reached about 5,000. Kasi kati na bato oyo bayokaki mateya, mingi bandimaki yango ; bongo motango ya bandimi ebakisamaki mpe bakomaki bato pene nkoto mitano.
5 The next day their rulers, elders, and teachers of the law gathered together in Jerusalem, Boye, mokolo oyo elandaki, bakonzi ya Bayuda, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko basanganaki na Yelusalemi.
6 with Annas the high priest, Caiaphas, John, Alexander, and all who were of the high-priestly family. Ana, mokonzi ya Banganga-Nzambe, azalaki wana elongo na Kayifa, Yoane, Alekizandre mpe bato mosusu ya libota ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
7 They stood them in the middle and asked, "By what power or by what name did you do this?" Bamemaki Petelo mpe Yoane liboso na bango, mpe bakomaki kotuna bango mituna : — Bozali kosala makambo oyo na nguya nini to na kombo ya nani ?
8 Then Peter, filled with the Holy Spirit, said to them, "Rulers of the people and elders, Bongo, Petelo oyo atondisamaki na Molimo Mosantu alobaki na bango : — Bakonzi mpe bakambi ya bato !
9 if we're questioned today about a good deed to a sick man, how he was healed. Lokola botuni biso lelo na tina na bolamu oyo esalemi epai ya mokufi makolo mpe ndenge nini asili kobika,
10 Know this, all of you and all Israel's people: by the name of Jesus Christ of Nazareth, whom you crucified, whom our Father raised from the dead—by him this man stands before you well. tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.
11 This Jesus is "the stone you builders rejected, which has become the cornerstone." Ye nde azali « libanga oyo bino, batongi ndako, bobwakaki, kasi ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba. »
12 Salvation is in no one else; no other name under heaven is given among people by which we must be saved." Lobiko ekoki kozwama na moto mosusu te, pamba te kombo mosusu ezali te na mokili, oyo epesama na bato, oyo ekoki kobikisa biso.
13 Seeing Peter and John's boldness, and realizing they were uneducated, ordinary men, they were amazed and recognized they had been with Jesus. Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.
14 Seeing the healed man standing with them, they had nothing to say against it. Kasi, lokola bazalaki komona moto oyo abikisamaki atelemi elongo na bango, bazalaki ata na liloba moko te ya koloba.
15 So they ordered them to leave the council, and then they conferred among themselves, Bongo, bapesaki mitindo ete babimisa bango na Likita-Monene ; mpe batikalaki bango moko mpo na koyekola likambo yango malamu.
16 saying, "What should we do with these men? A notable sign has happened through them, plain to all who live in Jerusalem, and we cannot deny it. Bazalaki kotunana : — Tosala penza nini na bato oyo ? Pamba te bavandi nyonso ya Yelusalemi bayebi malamu ete bango nde basalaki likamwisi wana ya monene ; tokoki kowangana yango te.
17 But to stop this from spreading further among the people, let's warn them to speak to no one in this name again." Kasi, mpo ete sango ya likambo oyo ekoba te kopanzana kati na bato, tokebisa bango boye : « Bomeka lisusu te koloba na Kombo na Yesu, ezala ata na nani ! »
18 They called them and ordered them not to speak or teach at all in Jesus' name. Bongo, babengaki Petelo elongo na Yoane mpe bapekisaki bango ete bameka lisusu te koloba to koteya na Kombo na Yesu, ezala ata na lolenge nini.
19 Peter and John answered them, "You judge whether it's right before our Father to listen to you rather than to him. Kasi Petelo mpe Yoane bazongiselaki bango : — Botala nanu ata bino moko, eloko nini ezali sembo na miso ya Nzambe : kotosa bino to kotosa Nzambe ?
20 For we cannot help speaking about what we have seen and heard." Pamba te biso, tokokoka te kotika koloba makambo oyo tomonaki mpe toyokaki !
21 After more threats, they released them, finding no way to punish them because of the people, since all were glorifying our Father for what happened. Sima na kogangela bango, batikaki bango mpo ete bakende, pamba te bamonaki te ndenge nini bakokaki kopesa bango etumbu, mpo ete bato nyonso bazalaki kokumisa Nzambe mpo na likambo oyo esalemaki.
22 For the man who had received this sign of healing was over forty years old. Pamba te moto oyo abikaki na ndenge ya kokamwa azalaki na mibu koleka tuku minei.
23 Once released, they went to their own people and reported all the chief priests and elders had said to them. Tango batikaki bango, Petelo mpe Yoane bakendeki koyebisa baninga na bango makambo nyonso oyo bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi balobelaki bango.
24 Hearing this, they raised their voices together to our Father and said, "Sovereign Father, you made heaven, earth, sea, and everything in them. Tango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango elongo mpo na kobondela Nzambe ; balobaki : — Nkolo Yawe, Yo nde okela Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ;
25 You spoke by the Holy Spirit through the mouth of our father David, your servant: "Why did the nations rage and the peoples plot in vain?" Yo nde olobaki na nzela ya Molimo Mosantu, na monoko ya koko na biso, Davidi, mosali na yo : « Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele, mpe bato bazali kosala makita ya pamba ?
26 The kings of the earth took their stand, and the rulers gathered together against our Father and against his Anointed." Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Nkolo mpe Mopakolami na Ye. »
27 For truly, in this city, Herod and Pontius Pilate gathered with the Gentiles and peoples of Israel against your holy servant Jesus, whom you anointed, Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.
28 to do whatever your hand and your plan had decided beforehand should happen. Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo.
29 Now, Father, see their threats, and let your servants speak your word with all boldness, Sik’oyo Nkolo, tala ndenge bazali kotungisa biso, mpe pesa basali na Yo makasi ya koteya Liloba na Yo na molende nyonso.
30 as you reach out your hand to heal, and signs and wonders occur through the name of your holy servant Jesus. Boye, sembola loboko na Yo mpo na kobikisa babeli, kosala bilembo ya kokamwa mpe misala minene, na Kombo na Yesu, Mosali na Yo, Mosantu.
31 After they prayed, the place they were gathered in shook; all were filled with the Holy Spirit and spoke the word of our Father boldly. Boye, tango basilisaki kobondela, esika oyo basanganaki eninganaki ; bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe bakomaki koteya Liloba na Nzambe na molende nyonso.
32 All the believers were one in heart and soul; no one called any possession their own, but held everything in common. Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.
33 With great power the apostles testified to the Lord Jesus's resurrection, and great grace rested on them all. Bantoma bakobaki kotatola lisekwa ya Nkolo Yesu na nguya monene, mpe ngolu monene ezalaki na bango nyonso.
34 No one among them was needy: all who owned land or houses sold them and brought the price of what was sold, Moko te kati na bango akelelaki ; pamba te bato oyo bazalaki na mabele to na bandako bazalaki koteka yango, bazalaki komema mbongo oyo batekelaki
35 and laid it at the apostles' feet, and it was distributed to each according to their need. mpe kotia yango na makolo ya bantoma. Bantoma bazalaki kokabola yango na moto na moto, kolanda bosenga na ye.
36 Joseph, a Levite from Cyprus, whom the apostles called Barnabas (which means Son of Encouragement), Boye, Jozefi, moto ya libota ya Levi, oyo abotama na esanga Shipre mpe bantoma bapesaki ye kombo mosusu, Barnabasi oyo elakisi « molendisi, »
37 sold a field he owned, brought the money, and laid it at the apostles' feet. atekaki mpe elanga na ye mpe amemaki mbongo epai ya bantoma.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]