Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Acts 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Some men came down from Judea and taught the brothers, "Unless you are circumcised by Moses' custom, you cannot be saved." Ndambo ya bato bawutaki na Yuda mpe bakomaki na Antioshe, mpe bakomaki koteya bandeko : — Soki bokatisi ngenga te kolanda Mobeko ya Moyize, bokoki te kozwa lobiko.
2 When Paul and Barnabas had fierce dispute and debate with them, the brothers appointed Paul, Barnabas, and some others of them to go up to the apostles and elders in Jerusalem about this question. Polo mpe Barnabasi batelemelaki bato wana ; bongo kobendana makasi ekotaki kati na bango na tina na likambo yango. Boye, bazwaki mokano ete Polo, Barnabasi mpe ndambo ya bandimi mosusu bakende na Yelusalemi elongo na bantoma mpe bakambi ya Lingomba mpo na kolobela likambo yango.
3 Sent on by the church, they traveled through Phoenicia and Samaria, recounting the Gentiles' conversion, bringing great joy to all the brothers. Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.
4 Arriving in Jerusalem, the church, apostles, and elders welcomed them, and they reported all our Father had done with them. Tango bakomaki na Yelusalemi, Lingomba, bantoma mpe bakambi bayambaki bango ; mpe Polo elongo na Barnabasi bapesaki bango sango ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki na nzela na bango.
5 But some believers from the Pharisee party stood up and said, "They must be circumcised and ordered to keep the law of Moses." Ndambo ya bandimi oyo bazalaki kala Bafarizeo batelemaki mpo na koloba : — Bato ya bikolo ya bapaya basengeli kokatama ngenga, mpe esengeli kotinda bango kotosa Mobeko ya Moyize.
6 Then the apostles and the elders gathered together to look into this matter. Bantoma mpe bakambi basanganaki mpo na koyekola malamu likambo yango.
7 After much debate, Peter stood and said, "Brothers, you know that in the early days our Father chose among you that the Gentiles would hear the gospel message through me and believe. Lokola tembe elekaki makasi, Petelo atelemaki mpe alobaki : — Bandeko na ngai, boyebi malamu ete Nzambe apona ngai wuta kala kati na bino mpo ete nakoka koteya Sango Malamu epai ya bato ya bikolo ya bapaya, mpo ete bango mpe bakoka koyoka yango mpe bakoma bandimi.
8 And our Father, who knows the heart, testified by giving them the Holy Spirit, just as he did to us. Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki ete andimaki bango na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, ndenge kaka apesaki biso.
9 He drew no line between us and them, cleansing their hearts by faith. Asalaki bokeseni te kati na biso mpe bango, pamba te akomisaki mitema na bango peto na nzela ya kondima.
10 So why test our Father by putting a yoke on the disciples' neck that neither our ancestors nor we could bear? Bongo mpo na nini bolingi sik’oyo komeka Nzambe, na nzela ya koluka komemisa bayekoli oyo, mokumba oyo tolongaki te komema, ezala biso to batata na biso ?
11 But we believe we will be saved through the grace of the Lord Jesus, just as they will." Te ! Biso tondimaka ete tobiki na ngolu ya Nkolo Yesu, ndenge moko kaka na bango.
12 The whole crowd fell silent, listening to Barnabas and Paul describe the signs and wonders our Father did among the Gentiles through them. Lisanga mobimba evandaki kimia wana bazalaki koyoka Barnabasi mpe Polo koyebisa bango bikamwa mpe bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na bango, kati na bato ya bikolo ya bapaya.
13 After they finished speaking, James answered, "Brothers, listen to me. Tango basilisaki koloba, Jake azwaki maloba mpe alobaki : — Bandeko, boyoka ngai !
14 Simeon told how our Father first visited the nations, taking from them a people for his name. Simona awuti koyebisa biso ndenge nini, wuta na ebandeli, Nzambe aponaki bato kati na bikolo ya bapaya ete bazala bato na Ye.
15 And the words of the prophets agree with this, just as it is written: Makambo oyo ekokani na maloba ya basakoli, kolanda ndenge ekomama :
16 "'After this I will return, and I will rebuild the tent of David that has fallen; I will rebuild its ruins, and I will restore it, « Sima na yango, nakozonga, nakotonga lisusu ndako ya kapo ya Davidi, oyo esila kokweya ; nakotonga yango lisusu mpe nakotelemisa yango,
17 that the rest of mankind may seek our Father, even all the Gentiles who are called by my name, says our Father, who makes these things, mpo ete bato oyo bakotikala baluka Nkolo, ezala bato nyonso ya bikolo ya bapaya oyo babengamaka na Kombo na Ngai, elobi Nkolo oyo asalaka makambo oyo,
18 known from long ago.' makambo oyo eyebana wuta kala. »
19 So I judge we shouldn't trouble the Gentiles turning to our Father, Yango wana, tala likanisi na ngai : Tosengeli te kotungisa bato ya bikolo ya bapaya oyo bandimeli Nzambe.
20 but write telling them to avoid things polluted by idols, sexual immorality, meat from strangled animals, and blood. Na esika ya kotungisa bango, tosengeli kaka kokomela bango ete balia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, basala kindumba te, balia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bamela makila te.
21 For Moses has been proclaimed in every city for generations, read aloud in synagogues every Sabbath." Pamba te wuta kala, kati na bingumba nyonso, ezali na bato oyo bateyaka Mobeko ya Moyize, mpe batangaka yango kati na bandako ya mayangani, mikolo nyonso ya Saba.
22 The apostles, elders, and whole church decided to choose men from among them and send them to Antioch with Paul and Barnabas: Judas called Barsabbas, and Silas, leaders among the brothers. Bantoma, bakambi elongo na Lingomba mobimba bazwaki mokano ya kopona ndambo ya bato kati na bango mpe ya kotinda bango na Antioshe elongo na Polo mpe Barnabasi. Baponaki Yuda oyo babengaka Barsabasi, mpe Silasi ; bango mibale bazalaki bakambi kati na bandeko.
23 They sent this letter with them: "The apostles and elders, brothers, to the Gentile brothers in Antioch, Syria, and Cilicia: greetings. Bapesaki bango mokanda oyo ekomamaki boye : Biso bantoma mpe bakambi, bandeko na bino : Epai ya bato ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na Antioshe, na Siri mpe na Silisi ; Mbote na bino.
24 Since we have heard that some who went out from us troubled you with words, unsettling your hearts, though we gave them no such instructions, Toyokaki ete bandeko mosusu bawutaki epai na biso, ba-oyo topesaki ata nzela te, bayaki kotia mobulu kati na bino, batiaki penza mobulu kati na bino mpe batungisaki mitema na bino na nzela ya maloba na bango. Nzokande, totindaki bango te.
25 we unanimously agreed to choose men and send them to you with our beloved Barnabas and Paul. Boye, biso nyonso toyokanaki mpo na kopona bato mpe kotindela bino bango, elongo na bandeko balingami na biso, Barnabasi mpe Polo,
26 Men who have devoted their lives for the name of our Lord Jesus Christ. ba-oyo bakaba bomoi na bango mpo na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
27 So we sent Judas and Silas, who will themselves tell you the same things by word of mouth. Yango wana, totindeli bino Yuda mpe Silasi mpo ete bakoka koyebisa bino makambo oyo tokomi kati na mokanda oyo.
28 The Holy Spirit and we agreed to place no greater burden on you than these necessities: Molimo Mosantu mpe biso tomoni malamu ete tomemisa bino mikumba mosusu te, longola kaka bikateli oyo :
29 Avoid food offered to idols, blood, meat from strangled animals, and sexual immorality. Keep yourselves from these and you will do well. Farewell." Bolia te misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, bomela makila te, bolia te nyama oyo babomi na kozanga kobimisa makila, mpe bosala kindumba te. Ekozala malamu soki bokimi makambo yango. Botikala malamu !
30 So, sent off, they went down to Antioch, gathered the congregation, and delivered the letter. Boye, batikaki bango kokende na Antioshe epai wapi basangisaki Lingomba mobimba mpe bapesaki mokanda yango.
31 And when they read it, they rejoiced at the encouragement. Bato batangaki mokanda yango mpe basepelaki mingi na malendisi oyo ezalaki kati na yango.
32 And Judas and Silas, who were themselves prophets, encouraged and strengthened the brothers with many words. Lokola Yuda mpe Silasi bazalaki basakoli, bazwaki penza tango molayi mpo na koloba na bandeko mpe kolendisa bango ete bayika mpiko kati na kondima.
33 After spending time there, the brothers sent them off in peace to those who sent them. Bawumelaki wana mwa tango, mpe bandeko batombelaki bango kimia mpo na bozongi epai ya bato oyo batindaki bango. [
34 Not in this edition Kasi Silasi asepelaki kotikala wana.]
35 But Paul and Barnabas remained in Antioch, teaching and preaching our Lord's word, with many others too. Polo mpe Barnabasi batikalaki na Antioshe epai wapi, elongo na bato mosusu ebele, bazalaki koteya mpe kosakola Liloba na Nkolo.
36 After some days, Paul told Barnabas, "Let's return and visit the brothers in every city where we announced our Lord's message, and see how they're doing." Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi : — Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.
37 Now Barnabas wanted to take with them John who was called Mark. Barnabasi azalaki na posa ya komema, elongo na bango, Yoane oyo babengaka mpe Malako ;
38 But Paul thought it best not to bring the one who deserted them in Pamphylia and didn't join them for the work. kasi Polo asepelaki te ete bamema ye elongo na bango, pamba te akabwanaki na bango na Pafili mpe akobaki lisusu te elongo na bango kati na mosala.
39 Their clash grew so sharp they separated from each other; Barnabas took Mark and sailed to Cyprus, Boye, babendanaki makasi penza mpe basukaki na kokabwana. Barnabasi azwaki Malako mpe akotaki elongo na ye kati na masuwa mpo na kokende na Shipre.
40 but Paul chose Silas and set out, entrusted by the brothers to the grace of our Lord. Kasi Polo azwaki Silasi mpe akendeki elongo na ye, sima na bandeko kotika bango na se ya ngolu ya Nkolo.
41 And he traveled through Syria and Cilicia, strengthening the churches. Atambolaki kati na Siri mpe na Silisi mpo na kolendisa Mangomba.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]