Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Chronicles 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In the eighteenth year of King Jeroboam, Abijah became king of Judah. Tango Jeroboami akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiya akomaki mokonzi ya Yuda
2 He reigned three years in Jerusalem; his mother was Micaiah, Uriel of Gibeah's daughter. Abijah and Jeroboam went to war. mpe akonzaki mibu misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Mikaya. » Mikaya azalaki mwana ya Urieli, moto ya Gibea. Ezalaki na etumba kati na Abiya mpe Jeroboami.
3 Abijah joined battle with an army of 400,000 chosen warriors, mighty in war; Jeroboam lined up against him with 800,000 chosen, mighty warriors. Bongo kati na mampinga na bango, emonanaki ete Abiya azalaki na bilombe ya bitumba nkoto nkama minei, mpe Jeroboami, nkoto nkama mwambe.
4 Abijah stood on Mount Zemaraim in Ephraim's hill country and said, "Hear me, Jeroboam and all Israel! Abiya atelemaki na likolo ya ngomba Tsemarayimi oyo ezali kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe alobaki : « Jeroboami mpe Isalaele, boyoka ngai malamu !
5 Don't you know our Father, the God of Israel, gave David and his sons Israel's throne forever, by a covenant of salt? Boyebi te ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesa mpo na libela bokonzi ya Isalaele epai ya Davidi mpe bana na ye na nzela ya boyokani oyo ekoki kobongwana te ?
6 But Jeroboam son of Nebat—a servant of Solomon son of David—rose and rebelled against his master. Kasi Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mosali ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, atelemaki mpo na kotombokela mokonzi na ye.
7 Worthless men gathered around him, defying Solomon's son Rehoboam, young and timid, unable to resist them. Bato pamba mpe bato oyo bazanga tina basanganaki elongo na ye mpe batombokelaki Roboami, mwana mobali ya Salomo, tango azalaki elenge ! Bongo lokola akembaki nanu te na mosala, alongaki mpe te kotelema liboso na bango.
8 Now you think you can resist our Father's kingdom in David's sons' hands, since you're a huge crowd with the golden calves Jeroboam made as your gods. Mpe sik’oyo, bokani kotelemela bokonzi ya Yawe, oyo ezali na maboko ya bana ya Davidi ! Bobongisi mampinga minene mpe bozali, kati na bino, na bikeko ya bana ngombe oyo Jeroboami asalelaki bino lokola banzambe.
9 Haven't you driven out our Father's priests, Aaron's sons and the Levites, and made your own priests like other nations? Anyone who comes with a young bull and seven rams can become a priest of things that aren't gods. Boni, bobenganaki te Banganga-Nzambe ya Yawe, bana mibali ya Aron, mpe Balevi ? Bomikomisaki te banganga-nzambe ya banzambe ya bikeko ndenge bato ya bikolo mosusu basalaka ? Moto na moto azalaki koya na ngombe moko ya mobali mpe bameme sambo ya mibali oyo azalaki kozwa na etonga na ye, mpo ete bakomisa ye nganga-nzambe ya oyo ezali kutu banzambe te.
10 But our Father is ours, and we haven't abandoned him. The priests serving him are Aaron's sons, and the Levites are at their work. Nzokande epai na biso, Yawe nde azali Nzambe na biso, mpe tosundola Ye te ; bana mibali ya Aron nde bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ye, mpe Balevi basungaka bango.
11 Every morning and evening they burn to our Father burnt offerings and fragrant incense; they set rows of bread on the pure gold table and tend the gold lampstand, lit every evening. We keep our Father's charge, but you have abandoned him. Tongo mpe pokwa nyonso, tobonzelaka Yawe bambeka ya kotumba mpe ya malasi, totandaka mapa likolo ya mesa ya bule ; mpe pokwa nyonso, topelisaka minda ya etelemiselo ya minda, pamba te biso totosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na biso ; kasi bino, bosundolaki Ye.
12 Look, our Father is with us at our head, and his priests have trumpets to sound alarm against you. Israelites, do not fight our Father, the God of your ancestors, for you will not prevail." Tala, Nzambe azali elongo na biso lokola Motambolisi ; Banganga-Nzambe na Ye bakobeta kelelo na lokito makasi mpo na kotelemela bino. Bana ya Isalaele, bobundisa te Yawe, Nzambe ya batata na bino, pamba te bokolonga ata moke te. »
13 Jeroboam had sent an ambush around, to come from behind them; his forces faced Judah, the ambush behind them. Na tango wana, Jeroboami atindaki limpinga moko ya basoda mpo ete babombama na sima ya basoda ya Yuda. Boye, basoda ya Yuda bazwamaki lokola na motambo : liboso na bango, ezalaki na mampinga ya Isalaele ; mpe sima na bango, basoda oyo babombamaki.
14 Judah turned, saw battle facing them front and back, cried to our Father; the priests blew the trumpets. Mpe wana basoda ya Yuda babalukaki, basosolaki ete babundisami na liboso mpe na sima na mbala moko. Boye, bagangaki epai na Yawe, mpe Banganga-Nzambe babetaki kelelo.
15 Judah's men shouted the war cry, and as they shouted, our Father struck Jeroboam and all Israel before Abijah and Judah. Basoda ya Yuda babetaki lokito ya bitumba ; mpe na lokito na bango, Yawe Nzambe akweyisaki Jeroboami mpe Isalaele nyonso liboso ya Abiya mpe ya Yuda.
16 The people of Israel fled before Judah, and our Father handed them over to Judah. Basoda ya Isalaele bakimaki liboso ya basoda ya Yuda, mpe Nzambe akabaki bango na maboko ya basoda ya Yuda.
17 Abijah and his army struck them a heavy blow; 500,000 chosen men of Israel fell dead. Abiya mpe mampinga na ye bazwaki elonga monene liboso ya mampinga ya Isalaele mpe babomaki bilombe ya Isalaele pene nkoto nkama mitano.
18 So Israel was humbled then, and Judah prevailed because they relied on our Father, God of their ancestors. Na tango wana, basoda ya Isalaele basambwaki ; kasi ba-oyo ya Yuda bazwaki elonga, pamba te batiaki elikya na Yawe, Nzambe ya batata na bango.
19 Abijah chased Jeroboam, capturing cities from him—Bethel and its villages, Jeshanah and its villages, Ephron and its villages. Abiya alandaki Jeroboami mpe abotolaki ye bingumba ebele : Beteli, Yeshana mpe Efroni elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
20 Jeroboam never regained his strength during Abijah's lifetime, and our Father struck him down, and he died. Na mikolo nyonso oyo Abiya azalaki na bokonzi, Jeroboami azongelaki te nguya na ye ya kala. Yawe abetaki ye mpe akufaki.
21 But Abijah grew strong. He married fourteen wives and had twenty-two sons and sixteen daughters. Nzokande, Abiya alendisaki bokonzi na ye. Abalaki basi zomi na minei mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mibale mpe bana basi zomi na motoba.
22 The rest of Abijah's acts, his ways and sayings, are written in the prophet Iddo's commentary. Makambo mpe misala mosusu ya Abiya, etamboli mpe maloba na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya momoni makambo Ido.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]