Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Chronicles 12 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When Rehoboam's reign was secure and strong, he abandoned our Father's law, and all Israel with him. Tango bokonzi ya Roboami elendisamaki mpe ye moko akomaki makasi, ye mpe Isalaele mobimba basundolaki Mobeko ya Yawe.
2 In Rehoboam's fifth year, because they were unfaithful to our Father, Shishak king of Egypt attacked Jerusalem. Boye, lokola bazalaki lisusu kotosa Yawe te, Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi na mobu ya mitano ya bokonzi ya Roboami.
3 He came with 1,200 chariots, 60,000 horsemen, and countless troops from Egypt: Libyans, Sukkites, and Cushites. Ayaki wuta na Ejipito elongo na bashar nkoto moko na nkama mibale, basoda nkoto tuku motoba oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na mampinga ya basoda ebele oyo motango na bango ekokaki kotangama te : basoda ya mokili ya Libi, ya Suki mpe ya Kushi.
4 He captured the fortified cities of Judah and came as far as Jerusalem. Abotolaki bingumba batonga makasi ya Yuda mpe akendeki kino na Yelusalemi.
5 Shemaiah the prophet came to Rehoboam and Judah's leaders, gathered in Jerusalem because of Shishak: "So says our Father: You abandoned me, so I abandon you to Shishak." Bongo, mosakoli Shemaya akendeki epai ya Roboami mpe bakambi ya Yuda oyo basanganaki na Yelusalemi tango bamonaki Shishaki kopusana. Alobaki na bango : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bosundolaki Ngai, yango wana Ngai mpe nasundoli bino na maboko ya Shishaki. »
6 Then the leaders of Israel and the king humbled themselves and said, "Our Father is righteous." Mokonzi elongo na bakambi ya Isalaele bamikitisaki, bandimaki mabe na bango mpe balobaki : — Yawe azali sembo !
7 When our Father saw they had humbled themselves, our Father's word came to Shemaiah: "They've humbled themselves; I won't destroy them, but grant them a little rescue, and my anger won't pour out on Jerusalem through Shishak. Tango Yawe amonaki ete basili komikitisa, Yawe alobaki lisusu epai ya Shemaya : — Lokola basili komikitisa na kondima mabe na bango, nakobebisa bango te ; kasi kala mingi te, nakokangola bango, mpe kanda na Ngai ekokitela Yelusalemi te na nzela ya Shishaki.
8 But they will be Shishak's servants, to know my service and the service of earthly kingdoms." Nzokande bakokoma bawumbu na ye mpe, na bongo, bakoyeba bokeseni nini ezali kati na kosalela Ngai mpe kosalela bakonzi ya bamboka mosusu.
9 Shishak king of Egypt attacked Jerusalem and took everything—the treasures of our Father's house, the royal palace, including the gold shields Solomon made. Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi, azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba ya wolo oyo Salomo asalisaki.
10 Rehoboam replaced them with bronze shields, entrusted to the guard commanders watching the entrance to the king's house. Na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli ekotelo ya ndako ya mokonzi.
11 Whenever the king entered our Father's house, the guards carried the shields, then returned them to the guard chamber. Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki kokende elongo na ye, bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli.
12 When Rehoboam humbled himself, our Father's anger turned from him, not destroying him completely; good things remained in Judah too. Lokola mokonzi Roboami amikitisaki na kondima mabe na ye, Yawe akitiselaki ye te kanda na Ye mpe abebisaki ye penza te. Kutu, emonanaki lisusu makambo malamu kati na Yuda.
13 King Rehoboam strengthened himself in Jerusalem and reigned; forty-one when he became king, he reigned seventeen years in Jerusalem, the city our Father chose from all the tribes of Israel to place his name there. His mother was Naamah, an Ammonite. Mokonzi Roboami alendisaki bokonzi na ye, na Yelusalemi mpe akonzaki. Azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia kuna Kombo na Ye. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni.
14 He did evil, because he did not set his heart to seek our Father. Roboami asalaki mabe, pamba te amipesaki te, na motema na ye mobimba, mpo na koluka Yawe.
15 Rehoboam's deeds, first to last, appear in the records of Shemaiah the prophet and Iddo the seer, listing genealogies. Rehoboam and Jeroboam warred continually. Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Shemaya mpe ya momoni makambo Ido, buku epai wapi emonani milongo ya mbotama. Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami.
16 Rehoboam rested with his ancestors, buried in the City of David; his son Abijah reigned instead. Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Abiya, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]