Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Peter 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 So put away all malice and all deceit and hypocrisy and envy and all slander. Yango wana, bobwaka lolenge nyonso ya mabe, ya lokuta, ya mayele mabe, ya zuwa mpe ya kotonga bato.
2 Like newborn babies, crave pure milk of the word, so you grow into salvation, Lokola bana oyo babotami sika, bolingaka makasi komela miliki ya peto ya Liloba mpo ete bokola na nzela na yango mpo na kozwa lobiko,
3 now that you have tasted that the Lord is good. awa bosili kososola ete Nkolo azali malamu.
4 As you come to him, the living stone rejected by people but chosen, precious to our Father. Bopusana pene ya Ye oyo azali Libanga ya bomoi, Libanga oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango mpo ete ezali motuya mingi na miso na Ye.
5 You too are being built, like living stones, into a spiritual house and a holy priesthood, offering spiritual sacrifices our Father accepts through Jesus Christ. Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.
6 Scripture says: "See, I set in Zion a chosen, precious cornerstone; whoever believes in him will never be put to shame." Pamba te Makomi eloba : « Tala, napona libanga moko ya motuya oyo nazali kotia kati na Siona lokola libanga ya songe ya ndako ; moto nyonso oyo akotiela yango motema akotikala koyokisama soni te. »
7 This honor, then, is for you who believe. For those who don't, the stone the builders rejected has become the cornerstone, Boye lokumu ezali mpo na bino oyo bondimaka ; kasi mpo na bato oyo bandimaka te, « libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga oyo esimbi ndako, libanga ya songe ya ndako,
8 and a stumbling stone, a rock that trips them. They trip because they disobey the word—exactly what they were appointed for. mpe libanga oyo ebetisaka bato mabaku, libanga monene oyo ekweyisaka bato. » Bakweyaka mpo ete batosaka te Liloba na Nzambe ; mpe ebongisama nde bongo mpo na bango.
9 But you are a chosen people, a royal priesthood, a holy nation, a people belonging to our Father, to proclaim the praises of the one who called you from darkness into his amazing light. Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.
10 Once you were not a people, now you are our Father's people; once you had not received mercy, now you have received mercy. Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te ; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te ; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa.
11 Dear friends, I urge you—foreigners and exiles—to avoid fleshly desires that war against your soul. Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.
12 Live good lives among the nations, so that when they slander you as wrongdoers, they may see your good deeds and glorify our Father on the day he visits us. Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.
13 Submit to every human authority for the Lord's sake—whether the emperor, as supreme, Mpo na lokumu ya Nkolo, botosaka bato nyonso oyo batiami kati na bino lokola bakonzi : mokonzi ya mboka,
14 or to governors, sent by the emperor to punish wrongdoers and praise those who do good. bayangeli mpe basambisi oyo bapesameli mosala ya kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe, mpe kondima bato oyo basalaka bolamu.
15 For this is our Father's will: that by doing good you silence the ignorant talk of foolish people. Pamba te, Nzambe alingi boye : bosalaka bolamu mpo na kokanga minoko ya bato oyo bazangi boyebi mpe bososoli ;
16 Live as free people—not using freedom to cover evil—but as servants of our Father. botambolaka lokola bansomi, kasi bosalelaka bonsomi na bino te lokola vwale mpo na kozipa mabe na bino, pamba te bozali bawumbu ya Nzambe.
17 Respect everyone, love the family of believers, fear our Father, honor the emperor. Bomemiaka bato nyonso, bolingaka bandeko na bino kati na kondima, botosaka Nzambe, mpe bopesaka mokonzi lokumu.
18 Servants, submit to your masters with full respect—not only the good and gentle, but also the harsh. Bawumbu, botosaka bankolo na bino na bobangi nyonso : botosaka kaka te ba-oyo bazali malamu mpe boboto, kasi mpe ba-oyo bazali matata.
19 For it is commendable if someone bears up under the pain of unjust suffering, mindful of our Father. Pamba te ezali penza ngolu mpo na moto komona pasi kaka pamba mpo atosaka Nzambe.
20 What credit is it to endure a beating for doing wrong? But enduring suffering for doing good—this is commendable before our Father. Kasi lokumu nini ezali ya komona pasi ya etumbu mpo na mabe oyo osali ? Nzokande, na miso ya Nzambe, komona pasi mpo na bolamu oyo osali ezali penza ngolu.
21 You were called to this, since Christ suffered for you too, leaving an example for you to follow in his steps. Nzambe abengaki bino na komona pasi yango, pamba te Klisto mpe amonaki pasi mpo na bino ; boye atikelaki bino ndakisa mpo ete bolanda banzela na Ye.
22 "He committed no sin, and no deceit was found in his mouth." Yesu atikalaki kosala lisumu ata moko te, mpe monoko na Ye etikalaki koloba lokuta te.
23 When they hurled their insults at him, he did not retaliate; when he suffered, he made no threats, but entrusted himself to the one who judges justly. Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.
24 He himself bore our sins in his body on the tree, so that we might die to sin and live for righteousness; by his wounds you have been healed. Kati na nzoto na Ye, amemaki masumu na biso kuna na ekulusu mpo ete tokoka kokufa na oyo etali masumu mpe tokoka kozala na bomoi mpo na bosembo. Ezali na nzela ya bapota na Ye nde bobikisamaki na bokono.
25 For you were straying like sheep, but now have returned to the Shepherd and Guardian of your souls. Pamba te bozalaki lokola bameme oyo ezali koyengayenga, kasi sik’oyo bozongi epai ya Mobateli bibwele oyo akengelaka bomoi na bino.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]