Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

1 Chronicles 4 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The descendants of Judah: Perez, Hezron, Carmi, Hur, and Shobal. Libota ya Yuda : Peretsi, Etsironi, Karimi, Wuri mpe Shobali.
2 Reaiah son of Shobal fathered Jahath; Jahath fathered Ahumai and Lahad—the clans of the Zorathites. Reaya, mwana mobali ya Shobali, azalaki tata ya Yaati, mpe Yaati azalaki tata ya Awumayi mpe ya Laadi. Bango nde bazalaki bakoko ya bituka ya bato ya Tsorea.
3 These were the sons of Etam: Jezreel, Ishma, and Idbash; and their sister's name was Hazzelelponi. Tala bana mibali ya Etami : Jizireyeli, Yishima mpe Yidibashi. Kombo ya ndeko na bango ya mwasi ezalaki Atseleliponi.
4 Penuel fathered Gedor, and Ezer fathered Hushah. These were sons of Hur, firstborn of Ephrathah, father of Bethlehem. Penueli azalaki tata ya Gedori, mpe Ezeri azalaki tata ya Usha. Bango nde bazalaki bakitani ya Wuri, mwana liboso ya Efrata, tata ya Beteleemi.
5 Ashhur the father of Tekoa had two wives, Helah and Naarah. Ashiwuri, tata ya Tekoa, azalaki na basi mibale : Eleya mpe Nara.
6 Naarah gave birth to Ahuzzam, Hepher, Temeni, and Haahashtari. These were Naarah's sons. Nara abotelaki ye bana mibali oyo : Awuzami, Eferi, Temeni mpe Ahashitari.
7 The sons of Helah: Zereth, Zohar, and Ethnan. Eleya abotelaki ye bana mibali oyo : Tsereti, Tsoari mpe Etinani.
8 Koz fathered Anub and Zobebah, and the clans of Aharhel son of Harum. Kotsi azalaki tata ya Anubi mpe Atsobeba, mpe koko ya mabota ya Aareyeli, mwana mobali ya Arumi.
9 Jabez was more honored than his brothers; his mother named him Jabez, saying, "Because I bore him in pain." Yaebetsi azalaki na lokumu mingi koleka bandeko na ye ya mibali. Mama na ye apesaki ye kombo « Yaebetsi » mpo na koloba : « Nabotaki yo na pasi. »
10 Jabez called out to our Father of Israel: "Oh, that you would truly bless me and enlarge my territory! Let your hand be with me, and keep me from harm so that I suffer no pain." And our Father granted his request. Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; alobaki : « Oh Yawe ! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene ! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai ! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.
11 Chelub the brother of Shuhah fathered Mehir, who was the father of Eshton. Kelubi, ndeko mobali ya Shuwa, azalaki tata ya Meyiri oyo azalaki tata ya Eshitoni.
12 Eshton fathered Beth-rapha, Paseah, and Tehinnah the father of Ir-nahash. These were the men of Recah. Eshitoni azalaki tata ya Beti-Rafa, Paseya mpe Teyina oyo atongaki engumba Naashi. Bango nde bazalaki kovanda na engumba Reka.
13 The sons of Kenaz: Othniel and Seraiah; and the sons of Othniel: Hathath and Meonothai. Bana mibali ya Kenazi : Otinieli mpe Seraya. Bana mibali ya Otinieli : Atati mpe Meonotayi.
14 Meonothai fathered Ophrah. Seraiah fathered Joab, father of Ge-harashim, the Craftsmen's Valley—its people were craftsmen. Meonotayi abotaki Ofira. Seraya abotaki Joabi, tata ya Ge-Arashimi. Bazalaki kobenga ye bongo, pamba te bato na ye bazalaki kosala misala ya maboko, ya kotula bibende na moto.
15 Sons of Caleb son of Jephunneh: Iru, Elah, and Naam; and the son of Elah: Kenaz. Bana mibali ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune : Iru, Ela mpe Naame. Mwana mobali ya Ela : Kenazi.
16 The sons of Jehallelel: Ziph, Ziphah, Tiria, and Asarel. Mwana mobali ya Yealeyeli : Zifi, Zifa, Tiria mpe Asareli.
17 Ezrah's sons: Jether, Mered, Epher, and Jalon. Mered's wife bore Miriam, Shammai, and Ishbah, father of Eshtemoa. Bana mibali ya Esidrasi : Yeteri, Meredi, Eferi mpe Yaloni. Moko kati na basi ya Meredi abotaki Miriami, Shamayi mpe Yishiba, tata ya Eshitemoa.
18 His Judean wife bore Jered father of Gedor, Heber father of Soco, and Jekuthiel father of Zanoah—sons of Bithiah, Pharaoh's daughter, whom Mered married. Mwasi na ye, moto ya Yuda, abotaki Yeredi, tata ya Gedori ; Eberi, tata ya Soko mpe Yekutieli, tata ya Zanoa. Bango nde bazalaki bana mibali ya Bitiya, mwana mwasi ya Faraon, oyo Meredi abalaki.
19 The sons of Hodiah's wife, the sister of Naham, fathered Keilah the Garmite and Eshtemoa the Maacathite. Bana mibali ya mwasi ya Odia, ndeko mwasi ya Naami : tata ya Keila, moto ya Garima ; mpe Eshitemoa, moto ya mboka Maakati.
20 The sons of Shimon: Amnon, Rinnah, Ben-hanan, and Tilon. The sons of Ishi: Zoheth and Ben-zoheth. Bana mibali ya Simona : Aminoni, Rina, Beni-Anani mpe Tiloni. Bana mibali ya Yisheyi : Zoeti mpe Beni-Zoeti.
21 Sons of Shelah son of Judah: Er father of Lecah, Laadah father of Mareshah, and the linen-worker clans of Beth-ashbea. Bana mibali ya Shela, mwana mobali ya Yuda : Eri, tata ya Leka ; Laeda, tata ya Maresha ; mpe mabota ya basali bilamba ya lino, na Beti-Asheba.
22 Jokim, the men of Cozeba, Joash, and Saraph, who ruled in Moab, then returned to Bethlehem—these records are ancient. Yokimi, bato ya Kozeba, Joasi mpe Sarafi oyo bazalaki bakambi kati na Moabi mpe engumba Yashubi-Leemi. Nyonso oyo ezali makambo ya kala.
23 These were the potters living at Netaim and Gederah, staying there to work for the king. Bazalaki basali mbeki oyo bazalaki kovanda na Netayimi mpe na Gedera ; batikalaki kuna mpo na kosalela mokonzi.
24 The sons of Simeon: Nemuel, Jamin, Jarib, Zerah, and Shaul; Bana mibali ya Simeoni : Nemueli, Yamini, Yaribi, Zera ; Saulo, tata ya Shalumi ;
25 Shallum his son, Mibsam his son, Mishma his son. Shalumi, tata ya Mibisami ; Mibisami, tata ya Mishima.
26 The sons of Mishma: Hammuel his son, Zaccur his son, Shimei his son. Bana mibali ya Mishima : Amueli, Zakuri mpe Shimei.
27 Shimei had sixteen sons and six daughters, but his brothers had few children, and their clan never grew as numerous as Judah's. Shimei azalaki na bana mibali zomi na motoba mpe bana basi motoba ; kasi bandeko na ye ya mibali babotaki bana mingi te, yango wana etuka na bango ezalaki na bato ebele te lokola libota ya Yuda.
28 They lived in Beersheba, Moladah, Hazar-shual, Bazalaki kovanda na Beri-Sheba, na Molada, na Atsari-Shuwali,
29 Bilhah, Ezem, Tolad, na Bila, na Etsemi, na Toladi,
30 Bethuel, Hormah, Ziklag, na Betweli, na Orima, na Tsikilagi,
31 Beth-marcaboth, Hazar-susim, Beth-biri, and Shaaraim. These were their towns until David became king. na Beti-Marikaboti, na Atsari-Suzimi, na Beti-Birei mpe na Shaarayimi : nyonso oyo ezalaki bingumba na bango kino na tango ya bokonzi ya Davidi.
32 Their surrounding villages were Etam, Ain, Rimmon, Tochen, and Ashan—five towns, Tala bingumba mitano mike oyo ezalaki zingazinga na yango : Etami, Ayini, Rimoni, Tokeni mpe Ashani ;
33 and all their villages around these towns, as far as Baal. These were their settlements, and they kept their own genealogical records. bakisa bamboka mike mosusu oyo ezingelaki bingumba yango kino na Baalati. Oyo nde ezalaki bisika na bango ya kovanda mpe molongo ya mbotama ya bakoko na bango.
34 Meshobab, Jamlech, Joshah the son of Amaziah, Meshobabi ; Yamileki ; Yosha, mwana mobali ya Amatsia ;
35 Joel, Jehu the son of Joshibiah, the son of Seraiah, the son of Asiel, Joeli ; Jewu, mwana mobali ya Yoshibia, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Asieli ;
36 Elioenai, Jaakobah, Jeshohaiah, Asaiah, Adiel, Jesimiel, Benaiah, Eliowenayi ; Yakoba ; Yeshoaya ; Asaya ; Adieli ; Yesimieli ; Benaya ;
37 and Ziza the son of Shiphi, the son of Allon, the son of Jedaiah, the son of Shimri, the son of Shemaiah. Ziza, mwana mobali ya Shifeyi, mwana mobali ya Aloni, mwana mobali ya Yedaya, mwana mobali ya Shimiri, mwana mobali ya Shemaya.
38 These men listed by name were leaders in their clans, and their families grew greatly in number. Bato oyo batangamaki na bakombo bazalaki bakambi ya bituka na bango. Mabota na bango ekomaki minene
39 They went to Gedor's entrance, east of the valley, seeking pasture for their flocks. mpe bakendeki na zingazinga ya Gedori, na ngambo ya este ya lubwaku, mpo na koluka matiti ya koleisa bibwele na bango.
40 They found rich, good pasture; the land was wide, quiet, and peaceful, for its earlier residents were from Ham. Bakutaki kuna : matiti kitoko mpo na koleisa bibwele, mokili moko ya monene, ya kimia mpe ezanga mobulu. Bato oyo bazalaki kovanda kuna na tango ya kala, bazalaki bakitani ya Cham.
41 These men, recorded by name, came in the days of Hezekiah king of Judah, attacked the Hamites' tents and the Meunites found there, destroyed them completely to this day, and settled in their place, since there was pasture there for their flocks. Na tango Ezekiasi azalaki mokonzi ya Yuda, bato oyo bakombo na bango ekomami, bakomaki na mokili yango. Babundisaki bakitani ya Cham mpe babebisaki bandako na bango ; mpe lisusu, basilisaki koboma bato ya Mewuni oyo bazalaki kovanda kuna, ndenge yango ezali komonana lelo. Na sima, bavandaki na bisika na bango, mpo ete mokili yango ezalaki na matiti mpo na koleisa bibwele na bango.
42 Some Simeonites—500, led by Ishi's sons Pelatiah, Neariah, Rephaiah, and Uzziel—went to Mount Seir. Bato ya Simeoni nkama mitano oyo bakambamaki na Pelatia, na Nearia, na Refaya mpe na Uzieli, bana mibali ya Yisheyi, babotolaki na makasi mokili ya bangomba Seiri,
43 They struck down the surviving remnant of the Amalekites and have lived there to this day. babomaki ndambo ya bato ya Amaleki oyo batikalaki mpe bavandaki kuna kino lelo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]