Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 26 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After the plague, our Father said to Moses and to Eleazar son of Aaron the priest, Yawe alobaki na Moyize mpe na Nganga-Nzambe Eleazari, mwana mobali ya Aron :
2 "take a census of the whole Israelite community by ancestral house, everyone twenty and older able to serve in Israel's army." « Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. »
3 Moses and Eleazar the priest spoke with them on the plains of Moab, by the Jordan across from Jericho: Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki :
4 "Count the people twenty years old and up, as our Father commanded Moses." These were Israel's people who came from the land of Egypt: « Tokotanga motango ya bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ndenge Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize. » Tala bana ya Isalaele oyo babimaki na Ejipito :
5 Reuben, Israel's firstborn. Sons of Reuben: Hanoch, clan of the Hanochites; Pallu, clan of the Palluites, Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : na nzela ya Enoki, bakitani ya libota ya Enoki ; na nzela ya Palu, bakitani ya libota ya Palu ;
6 of Hezron, the clan of the Hezronites; of Carmi, the clan of the Carmites. na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ; na nzela ya Karimi, bakitani ya libota ya Karimi.
7 These are the clans of the Reubenites; they numbered 43,730. Yango nde ezalaki mabota ya Ribeni mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na misato na nkama sambo na tuku misato.
8 The sons of Pallu: Eliab. Eliabi azalaki mwana mobali ya Palu,
9 Eliab's sons: Nemuel, Dathan, and Abiram—the same Dathan and Abiram, community representatives who challenged Moses and Aaron in Korah's assembly, when they challenged our Father. mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe.
10 The earth opened its mouth and swallowed them and Korah, when the company died and the fire consumed 250 men—they became a warning. Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa.
11 But the sons of Korah did not die. Kasi bakitani ya Kore bakufaki te.
12 Simeon's sons by clan: Nemuel's, the Nemuelite clan; Jamin's, the Jaminite clan; Jachin's, the Jachinite clan, Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Nemueli, bakitani ya libota ya Nemueli ; na nzela ya Yamini, bakitani ya libota ya Yamini ; na nzela ya Yakini, bakitani ya libota ya Yakini ;
13 of Zerah, the clan of the Zerahites; of Shaul, the clan of the Shaulites. na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi ; na nzela ya Saulo, bakitani ya libota ya Saulo.
14 These are the clans of the Simeonites: 22,200. Yango nde ezalaki mabota ya Simeoni mpe bazalaki bato nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale.
15 Gad's sons by clan: Zephon's clan, the Zephonites; Haggi's clan, the Haggites; Shuni's clan, the Shunites, Bakitani ya Gadi kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Tsefoni, bakitani ya libota ya Tsefoni ; na nzela ya Agi, bakitani ya libota ya Agi ; na nzela ya Shuni, bakitani ya libota ya Shuni ;
16 of Ozni, the clan of the Oznites; of Eri, the clan of the Erites; na nzela ya Ozini, bakitani ya libota ya Ozini ; na nzela ya Eri, bakitani ya libota ya Eri ;
17 of Arod, the clan of the Arodites; of Areli, the clan of the Arelites. na nzela ya Arodi, bakitani ya libota ya Eroki ; na nzela ya Areeli, bakitani ya libota ya Areeli.
18 These are the clans of the sons of Gad as they were numbered: 40,500. Yango nde ezalaki mabota ya Gadi mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na nkama mitano.
19 Judah's sons were Er and Onan; Er and Onan died in the land of Canaan. Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana.
20 Judah's sons by clan: from Shelah, Shelanite clan; from Perez, Perezite clan; from Zerah, Zerahite clan. Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela ; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi ; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera.
21 Perez's sons: Hezron, clan of the Hezronites; Hamul, clan of the Hamulites. Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki : na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ; na nzela ya Amuli, bakitani ya libota ya Amuli.
22 These are the clans of Judah as they were numbered: 76,500. Yango nde ezalaki mabota ya Yuda ; bazalaki bato nkoto tuku sambo na motoba na nkama mitano.
23 Issachar's sons by clan: Tola, clan of the Tolaites; Puvah, clan of the Punites, Bakitani ya Isakari kolanda mabota na bango bazalaki : na nzela ya Tola, bakitani ya libota ya Tola ; na nzela ya Puwa, bakitani ya libota ya Puwa ;
24 of Jashub, the clan of the Jashubites; of Shimron, the clan of the Shimronites. na nzela ya Yashubi, bakitani ya libota ya Yashubi ; na nzela ya Shimironi, bakitani ya libota ya Shimironi.
25 These are the clans of Issachar as they were numbered: 64,300. Yango nde ezalaki mabota ya Isakari ; bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama misato.
26 Zebulun's sons by clan: from Sered, the Seredite clan; from Elon, the Elonite clan; from Jahleel, the Jahleelite clan. Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Seredi, bakitani ya libota ya Seredi ; na nzela ya Eloni, bakitani ya libota ya Eloni ; na nzela ya Yaleyeli, bakitani ya libota ya Yaleyeli.
27 These are the clans of the Zebulunites as they were numbered: 60,500. Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano.
28 The sons of Joseph according to their clans were Manasseh and Ephraim. Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki :
29 Manasseh's sons: Machir's clan, the Machirites; Machir fathered Gilead; Gilead's clan, the Gileadites. Bakitani ya Manase : na nzela ya Makiri, bakitani ya libota ya Makiri (Makiri azalaki tata na Galadi) ; na nzela ya Galadi, bakitani ya libota ya Galadi.
30 Sons of Gilead: Iezer, clan of Iezerites; Helek, clan of Helekites, Tala bakitani ya Galadi : na nzela ya Yezeri, bakitani ya libota ya Yezeri ; na nzela ya Eleki, bakitani ya libota ya Eleki ;
31 and of Asriel, the clan of the Asrielites; and of Shechem, the clan of the Shechemites; na nzela ya Asirieli, bakitani ya libota ya Asirieli ; na nzela ya Sishemi, bakitani ya libota ya Sishemi ;
32 and of Shemida, the clan of the Shemidaites; and of Hepher, the clan of the Hepherites. na nzela ya Shemida, bakitani ya libota ya Shemida ; na nzela ya Eferi, bakitani ya libota ya Eferi.
33 Zelophehad son of Hepher had no sons, only daughters: Mahlah, Noah, Hoglah, Milcah, and Tirzah. Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi ; bongo, tala bakombo na bango : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.
34 These are the clans of Manasseh; they numbered 52,700. Yango nde ezalaki mabota ya Manase, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na mibale na nkama sambo.
35 These are Ephraim's descendants by family: Shuthelah, family of the Shuthelahites; Becher, family of the Becherites; Tahan, family of the Tahanites. Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki : na nzela ya Shutela, bakitani ya libota ya Shutela ; na nzela ya Bekeri, bakitani ya libota ya Bekeri ; na nzela ya Tayani, bakitani ya libota ya Tayani.
36 And these are the sons of Shuthelah: of Eran, the clan of the Eranites. Tala bakitani ya Shutela : na nzela ya Erani, bakitani ya etuka ya Erani.
37 These are the clans of Ephraim's sons, by their count: 32,500. These are Joseph's sons by their clans. Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano. Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango.
38 Benjamin's sons by clan: Bela, clan of the Belaites; Ashbel, clan of the Ashbelites; Ahiram, clan of the Ahiramites, Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki : na nzela ya Bela, bakitani ya libota ya Bela ; na nzela ya Ashibeli, bakitani ya libota ya Ashibeli ; na nzela ya Ayirami, bakitani ya libota ya Ayirami ;
39 of Shephupham, the clan of the Shuphamites; of Hupham, the clan of the Huphamites. na nzela ya Shufami, bakitani ya libota ya Shufami ; na nzela ya Ufami, bakitani ya libota ya Ufami.
40 Bela's sons: Ard and Naaman—from Ard, the Ardite clan; from Naaman, the Naamite clan. Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki : na nzela ya Aridi, bakitani ya libota ya Aridi ; na nzela ya Namani, bakitani ya libota ya Namani.
41 These are the sons of Benjamin by their clans; they numbered 45,600. Yango nde ezalaki mabota ya Benjame mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama mitano.
42 These were Dan's sons by clan: from Shuham, the Shuhamite clan. These were Dan's clans by clan. Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Shuami, bakitani ya libota ya Shuami. Bango nde bazalaki bakitani ya Dani :
43 All the clans of the Shuhamites numbered 64,400. bango nyonso bazalaki bakitani ya libota ya Shuami mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama minei.
44 Asher's sons by clan: Imnah, clan of the Imnites; Ishvi, clan of the Ishvites; Beriah, clan of the Beriites. Bakitani ya Aseri, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Yimina, bakitani ya libota ya Yimina ; na nzela ya Yishivi, bakitani ya libota ya Yishivi ; na nzela ya Beria, bakitani ya libota ya Beria ;
45 Sons of Beriah: Heber, clan of Heberites; Malchiel, clan of Malchielites. na nzela ya bakitani ya Beria : na nzela ya Eberi, bakitani ya libota ya Eberi ; na nzela ya Malikieli, bakitani ya libota ya Malikieli.
46 Asher had a daughter named Serah. Aseri azalaki mpe na mwana moko ya mwasi na kombo Sera.
47 These are the clans of the sons of Asher as they were numbered: 53,400. Yango nde ezalaki mabota ya Aseri, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
48 Naphtali's sons by clan: Jahzeel, clan of Jahzeelites; Guni, clan of Gunites, Bakitani ya Nefitali, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Yatseyeli, bakitani ya libota ya Yatseyeli ; na nzela ya Guni, bakitani ya libota ya Guni ;
49 of Jezer, the clan of the Jezerites; of Shillem, the clan of the Shillemites. na nzela ya Yetseri, bakitani ya libota ya Yetseri ; na nzela ya Shilemi, bakitani ya libota ya Shilemi.
50 These are the clans of Naphtali; they numbered 45,400. Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei.
51 This was the total number of the people of Israel: 601,730. Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato.
52 Then our Father said to Moses, Yawe alobaki na Moyize :
53 "Among these the land is to be divided for inheritance according to the number of names. « Esengeli kokabolela bango mokili lokola libula, kolanda motango ya bato wana.
54 Give the larger group more land, the smaller less—each share sized to its census count. Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki.
55 But the land must be divided by lot; they will inherit according to their fathers' tribal names. Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango.
56 Their inheritance is to be apportioned by lot between the larger and the smaller." Esengeli kokabola libula na libula na zeke kati na libota oyo ezali monene mpe libota oyo ezali moke. »
57 These are the numbered Levites by their clans: Gershon's clan, the Gershonites; Kohath's clan, the Kohathites; Merari's clan, the Merarites. Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango : na nzela ya Gerishoni, bakitani ya libota ya Gerishoni ; na nzela ya Keati, bakitani ya Keati ; na nzela ya Merari, bakitani ya Merari.
58 Levi's clans: Libnite clan, Hebronite clan, Mahlite clan, Mushite clan, Korahite clan. Kohath fathered Amram. Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi : bakitani ya libota ya Libini, bakitani ya libota ya Ebron, bakitani ya libota ya Maali, bakitani ya libota ya Mushi, bakitani ya libota ya Kore. Keati azalaki tata ya Amirami ;
59 Amram's wife was named Jochebed, Levi's daughter, born to Levi in Egypt; she bore Amram Aaron, Moses, and their sister Miriam. bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami.
60 And to Aaron were born Nadab and Abihu, Eleazar and Ithamar. Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari.
61 But Nadab and Abihu died when they offered unauthorized fire before our Father. Kasi Nadabi na Abiyu bakufaki tango babonzelaki Yawe makabo na moto ya mopaya.
62 The Levites counted numbered 23,000, every male a month old and up. They were not counted among the Israelites, since no inheritance was given them among the Israelites. Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango.
63 Moses and Eleazar the priest counted these on the plains of Moab by the Jordan, across from Jericho. Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko.
64 None of these had been counted by Moses and Aaron the priest in the wilderness of Sinai. Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai.
65 For our Father had said of them, "They would surely die in the wilderness." None remained, except Caleb son of Jephunneh and Joshua son of Nun. Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]