Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses, saying: Yawe alobaki na Moyize :
2 "Speak to the Israelites and tell them: When you enter the land I am giving you to live in, « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Sima na bino kokota na mokili oyo nakopesa bino, mokili epai wapi bokovanda,
3 and offer me a fire offering—a burnt offering or sacrifice, to fulfill a special vow, as a freewill offering, or at your appointed feasts—producing a pleasing aroma for me from herd or flock, bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.
4 then whoever presents his offering must also present me a grain offering—about two quarts of fine flour mixed with about one quart of oil. Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive.
5 Prepare about a quart of wine for the drink offering with the burnt offering or sacrifice, for each lamb. Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga.
6 "Or for a ram, you are to prepare a grain offering of about four quarts of fine flour mixed with about one and a third quarts of oil, Mpo na meme ya mobali, bokobongisa likabo ya gato, bakilo motoba ya farine oyo basangisa na balitele mibale na ndambo ya mafuta ya olive,
7 and one and a third quarts of wine for the drink offering—offer it as a pleasing aroma to me. mpe balitele mibale na ndambo ya vino lokola likabo ya masanga. Bokobonza yango lokola malasi ya solo kitoko liboso ya Yawe.
8 When you prepare a young bull as a burnt offering or sacrifice, to fulfill a special vow, or as a peace offering to me, Soki bobongisi mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokisa ndayi to mbeka ya boyokani mpo na Yawe ;
9 with the young bull, bring a grain offering of about six quarts of fine flour mixed with about two quarts of oil, bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta.
10 bring two quarts of wine for the drink offering, a fire offering of pleasing aroma to me. Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga : ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
11 This is to be done for each bull, ram, lamb, or young goat. Ezali ndenge wana nde esengeli kobongisa mbeka nyonso ya ngombe ya mobali to ya meme ya mobali to ya bana meme to mpe ya mwana ntaba.
12 Do the same for each one, however many you prepare. Bokosala bongo mpo na nyama moko na moko, ezala soki motango na yango ezali boni.
13 "Every native-born Israelite must do this when offering a fire offering, a pleasing aroma, to me. Mwana mboka asengeli kosala bongo mpo na makabo wana tango akomema likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
14 If a foreigner living with you, or anyone among you for generations to come, makes a fire offering of pleasing aroma to me, he must do as you do. Pamba te, na milongo oyo ekoya, mopaya nyonso to moto mosusu oyo azali kowumela kati na bino, oyo akobonza likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, asengeli kosala ndenge kaka bino bozali kosala.
15 One statute for the assembly—you and the foreigner living among you—a lasting statute for all generations: as you are, so is the foreigner before me. Mibeko ya kosalela ekozala ndenge moko mpo na lisanga mobimba, ezala bino to mopaya oyo akowumela kati na bino. Yango ekozala mobeko ya libela ezala mpo na milongo oyo ekoya. Bino na mopaya bozali ndenge moko liboso ya Yawe.
16 One law and one ordinance is to apply to you and to the foreigner who stays with you." Ezala bino to mopaya oyo azali kati na bino, bokosalela kaka mibeko mpe mitindo moko. › »
17 And our Father spoke to Moses, saying: Yawe alobaki na Moyize :
18 "Speak to the Israelites and tell them: When you enter the land I am bringing you into, « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nazali komema bino
19 then when you eat the produce of the land, you are to lift up a contribution to me. mpe bokolia bilei ya mokili yango, bobonza ndambo lokola likabo epai na Yawe.
20 From the first of your dough, lift up a loaf as a contribution, like the contribution from the threshing floor. Bobonza gato oyo ewuti na farine ya liboso oyo bokonika, mpe bobonza yango lokola likabo oyo ewuti na mbuma ya liboso oyo elanga ya ble eboti.
21 From the first of your dough you are to give a contribution to me throughout your generations. Boye, bokobonzaka epai na Yawe bambuma ya liboso ya milona na bino : ekozala bongo mpo na milongo oyo ekoya na sima.
22 "And when you stray and fail to do all these commandments that I have spoken to Moses, Soki esalemi ete bobuki na nko te moko kati na mibeko oyo Ngai Yawe napesaki na nzela ya Moyize,
23 all I commanded you through Moses, from the day I commanded it, and onward throughout your generations, moko kati na mitindo oyo Ngai Yawe napesaki bino na nzela ya Moyize, kobanda na mokolo oyo napesaki bino yango, mpe nazali kokoba kopesa yango kati na milongo oyo ekoya ;
24 then if done unintentionally, unknown to the assembly, the whole assembly must offer one young bull as a burnt offering—a pleasing aroma to me—with its grain offering and drink offering as required, plus one male goat as a sin offering. mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.
25 The priest will make atonement for the whole Israelite community, and they will be forgiven, since it was unintentional and they brought their offering—a fire offering to me—and their sin offering before me for their unintentional wrong. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na lisanga mobimba ya Isalaele, mpe bakolimbisama ; pamba te basalaki mabe na nko te mpe bamemelaki Yawe mpo na mabe na bango likabo bazikisa na moto mpe mbeka mpo na masumu.
26 All the community of Israel will be forgiven, along with the foreigner living among them, since all the people did wrong unintentionally. Lisanga mobimba ya Isalaele elongo na bapaya oyo bazali kowumela kati na bango bakozwa bolimbisi, pamba te bato nyonso bamikotisaki na mbeba oyo esalemaki na nko te.
27 "And if one person sins unintentionally, he is to offer a year-old female goat as a sin offering. Kasi soki esalemi ete moto moko nde asali lisumu na nko te, asengeli komema mwana ntaba ya mwasi ya mobu moko lokola mbeka mpo na masumu.
28 The priest will atone before me for the person who errs by sinning unintentionally, atoning for him, and he will be forgiven. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe mpo na moto oyo asalaki masumu na nko te. Mpe tango mosala ya bolimbisi masumu ekosalema mpo na ye, akolimbisama solo.
29 For the native-born among the children of Israel and the foreigner staying among them, there is one law for the one who acts unintentionally. Bosengeli kosalela mobeko se moko, ezala mpo na mwana mboka kati na bana ya Isalaele to mpo na mopaya oyo azali kowumela kati na bino, oyo asali lisumu na nko te.
30 "But the one who acts with a high hand, native or foreigner, reviles me—that person is cut off from among his people. Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye.
31 Since he scorned my word and broke my command, that person will surely be cut off; his guilt remains on him." Pamba te atioli Liloba na Yawe mpe abuki mitindo na ye. Solo, moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati na bato na ye mpe akomema ngambo ya mabe na ye. › »
32 While the Israelites were in the wilderness, they found a man gathering wood on the Sabbath day. Wana bana ya Isalaele bazalaki kati na esobe, bamonaki moto moko kolokota bakoni na mokolo ya Saba.
33 Those who found him gathering wood brought him to Moses, Aaron, and the whole congregation. Bato oyo bamonaki ye kolokota bakoni bamemaki ye epai ya Moyize, Aron mpe lisanga mobimba.
34 They held him in custody because it wasn't clear what should be done to him. Batiaki ye na esika oyo bazalaki kokengela ye malamu, pamba te bayebaki nanu malamu-malamu te nini esengelaki kosala mpo na ye.
35 So our Father told Moses, "The man must be put to death; the whole community must stone him outside the camp." Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Moto oyo asengeli kokufa. Bato nyonso ya lisanga basengeli komema ye libanda ya molako mpe koboma ye na mabanga. »
36 The whole congregation brought him outside the camp and stoned him with stones; he died, as our Father commanded Moses. Bongo lisanga mobimba ememaki ye libanda ya molako mpe babambaki ye mabanga kino akufaki ndenge Yawe atindaki yango epai ya Moyize.
37 And our Father said to Moses, saying: Yawe alobaki na Moyize :
38 "Speak to the Israelites: have them make tassels on the corners of their garments for all generations, with a blue cord on each corner's tassel. « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Na milongo oyo ekoya, bosengeli kotia singa ya langi ya ble na basonge ya bilamba na bino ; esengeli kokangisa kitendi moko na moko na singa ya langi ya ble.
39 It will be a tassel to look at, so you remember all my commandments and do them, not chasing after your heart and after your eyes, which lead you to be unfaithful. Tango nyonso bokotala bitendi yango, bokobanda kokanisa mitindo nyonso ya Yawe, mpo ete botosa yango mpe botika kolanda baposa ya mitema na bino mpe ya miso na bino, oyo ekoki kotindika bino na kobungisa boyengebene.
40 This way you will remember and do all my commandments, and you will be holy to me. Boye, bokokanisa mibeko na Ngai nyonso, bokotosa yango mpe bokozala bule mpo na Nzambe na bino.
41 I am your Father, who brought you out of Egypt's land to be your Father. I am your Father." Nazali Yawe, Nzambe na bino ; nabimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Solo, nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]