Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Numbers 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses, saying: Yawe alobaki na Moyize :
2 "Make yourself two silver trumpets, hammered work; use them to call the community and to move the camps. « Sala bakelelo mibale na palata oyo batuta. Okosalela yango mpo na kobengisa lisanga mpe mpo na kopesa mitindo ya kolongola molako.
3 When both sound, the whole community must gather to you at the entrance to the tent of meeting. Soki bakelelo nyonso mibale ebeti nzela moko, lisanga mobimba ekosangana pembeni na yo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
4 But if only one is blown, the leaders—heads of Israel's clans—are to gather to you. Soki kelelo moko kaka nde ebeti, kaka bakambi, bakonzi ya bituka ya Isalaele nde bakosangana liboso na yo.
5 When you sound a blast, the camps on the east side are to set out. Soki kelelo ebeti makasi, mabota oyo etongi molako na ngambo ya este ekokende.
6 Sound a second blast: camps on the south side set out. Sound a blast for their setting out. Soki ebeti makasi mpo na mbala ya mibale, mabota oyo etongi molako na ngambo ya sude ekokende. Ebeteli ya kelelo nde ekozala elembo mpo na kopesa mbela ya kokende.
7 But when you call the assembly together, blow a steady note, not an alarm. Mpo na kosangisa lisanga, beta bakelelo, kasi makasi te.
8 Aaron's sons, the priests, are to blow the trumpets—a lasting law for you throughout your generations. Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bango nde bakobanda kobeta bakelelo yango. Ekozala mobeko ya libela mpo na bino mpe bakitani na bino.
9 When you go to war in your land against the enemy crushing you, sound an alarm on the trumpets—you will be remembered before me and saved from your enemies. Tango, kati na mokili na bino moko, bokokende na bitumba mpo na kotelemela monguna oyo azali konyokola bino, bokobeta bakelelo na bino makasi. Boye, Yawe, Nzambe na bino, akokanisa bino mpe akokangola bino na maboko ya banguna na bino.
10 Also on your day of joy, at your appointed feasts and new moons, blow the trumpets over your burnt offerings and over your peace offerings—a memorial for you before our Father. I am your Father." Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. »
11 In the second year, second month, on the twentieth day, the cloud lifted from over the tabernacle of the testimony. Na mokolo ya tuku mibale, ya sanza ya mibale, ya mobu oyo ya mibale, lipata etelemaki na likolo ya Mongombo ya Litatoli.
12 The Israelites set out from the Sinai wilderness, stage by stage; the cloud settled in the Paran wilderness. Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani.
13 This was their first setting out, at our Father's command through Moses. Ezalaki mbala na bango ya liboso ya kolongwa na molako mpe kotambola kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
14 Judah's camp banner set out first, by their divisions, Nahshon son of Amminadab over his division. Mampinga ya molako ya Yuda ezalaki kotambola liboso, elongo na bendele na bango. Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, nde azalaki mokonzi na bango.
15 Nethanel son of Zuar was over the division of the tribe of Issachar, Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Isakari.
16 and Eliab son of Helon was over the division of the tribe of Zebulun. Eliabi, mwana mobali ya Eloni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Zabuloni.
17 The tabernacle was taken down, and the sons of Gershon and sons of Merari set out, carrying it. Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki.
18 Reuben's camp standard set out by divisions, Elizur son of Shedeur over its division. Mampinga ya molako ya Ribeni elandaki na sima mpo na kotambola. Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, nde azalaki mokonzi na bango.
19 Shelumiel son of Zurishaddai was over the division of the tribe of Simeon, Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Simeoni.
20 and Eliasaph son of Deuel was over the division of the tribe of Gad. Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Gadi.
21 The Kohathites set out carrying the holy things, and the tabernacle was set up before they arrived. Sima, bato ya Keati bakendeki mpe bamemaki biloko ya bule. Balevi mosusu bazalaki kotonga Mongombo liboso ete bakoma.
22 Ephraim's camp standard set out by division, Elishama son of Ammihud over its division. Mampinga ya molako ya Efrayimi elandaki mpe na sima mpo na kotambola. Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, nde azalaki mokonzi na bango.
23 Gamaliel son of Pedahzur was over the division of the tribe of Manasseh, Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Manase.
24 and Abidan son of Gideoni was over the division of the tribe of Benjamin. Abidani, mwana mobali ya Gideoni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Benjame.
25 Dan's camp standard set out, rear guard of all the camps, by their divisions, with Ahiezer son of Ammishaddai over its division. Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango.
26 Pagiel son of Ochran was over the division of the tribe of Asher, Pagieli, mwana mobali ya Okirani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Aseri ;
27 and Ahira son of Enan was over the division of the tribe of Naphtali. mpe Akira, mwana mobali ya Enani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Nefitali.
28 This was the order of march for the Israelites by their divisions as they set out. Wana nde ezalaki molongo oyo mampinga ya bana ya Isalaele ezalaki kotambola na yango.
29 Moses said to Hobab son of Reuel the Midianite, his father-in-law, "We are traveling to the place our Father said, 'I will give it to you.' Come with us; we will treat you well, for our Father has promised good to Israel." Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize : — Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki : « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele.
30 But Hobab said to him, "I will not go; I am returning to my own land and my own people." Obabi azongiselaki ye : — Te ! Nakokende elongo na bino te, nakozonga na mboka na ngai, kati na libota na ngai.
31 Moses said, "Please don't leave us, since you know where we should camp in the wilderness, and you'll be our eyes. Kasi Moyize alobaki : — Nabondeli yo : kotika biso te, pamba te yo nde oyebi bisika oyo tosengeli kotonga molako kati na esobe ; okozala motambolisi na biso.
32 If you come with us, whatever good our Father does for us, we'll do the same for you." Soki otamboli na biso elongo, tokokabola elongo na yo eloko nyonso ya malamu oyo Yawe akopesa biso.
33 They set out from the mountain of our Father on a three-day journey, and the ark of our Father's covenant went ahead of them that three-day journey, seeking a resting place for them. Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema.
34 The cloud of our Father was over them by day as they left the camp. Na moyi, lipata na Yawe ezalaki likolo na bango, na tango bazalaki kolongola molako.
35 Whenever the ark set out, Moses said, "Rise, O Father! Let your enemies be scattered; let those who hate you flee before you." Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba : « Oh Yawe, telema ! Tika ete banguna na Yo bapalangana ! Tika ete banguna na Yo bakima liboso na Yo ! »
36 Whenever it rested, he'd say, "Return, O Father, to Israel's countless thousands." Mpe tango nyonso lipata ezalaki kopema, azalaki koloba : « Oh Yawe, zonga kati na bana ya Isalaele, pamba te bazali ebele penza ! »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]