1On this month's twenty-fourth day, the Israelites gathered fasting, wearing sackcloth, with dirt on their heads.OLCBKaka na sanza wana, na mokolo ya tuku mibale na minei, bana ya Isalaele basanganaki mpo na kokila bilei ; balataki basaki mpe bamipakolaki putulu na mito.
2Israel's descendants separated from all foreigners, stood, and confessed their own sins and their ancestors' guilt.OLCBBato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso ; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango.
3They stood in their places and read the Book of the Law of our Father about three hours, then confessed and worshiped our Father three more hours.OLCBBatelemaki na esika oyo bazalaki, mpe buku ya Mobeko ya Yawe, Nzambe na bango, etangamaki ngonga misato ; mpe ngonga misato mosusu, bafukamaki liboso ya Yawe, Nzambe na bango, mpo na kotubela masumu na bango.
4Jeshua, Bani, Kadmiel, Shebaniah, Bunni, Sherebiah, Bani, and Chenani stood on the Levites' stairs and cried loudly to our Father.OLCBJozue, Buni, Kadimieli, Shebania, Bani, Sherebia mpe Kenani bamataki na etemelo ya kolobela oyo basalaki mpo na Balevi mpe babelelaki Yawe, Nzambe na bango na mongongo makasi.
5Then the Levites—Jeshua, Kadmiel, Bani, Hashabneiah, Sherebiah, Hodiah, Shebaniah, Pethahiah—said: "Stand up, bless your Father, from everlasting to everlasting. Blessed be your glorious name, exalted above all blessing and praise.OLCBBongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.
6You alone are our Father. You made the heavens, even the highest heavens, with all their host, the earth and everything on it, the seas and all that is in them. You give life to them all, and the host of heaven worships you.OLCBEzali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe ! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo ; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo.
7You are our Father, who chose Abram and brought him out of Ur of the Chaldeans and gave him the name Abraham.OLCBEzali Yo, Yawe Nzambe, nde oponaki Abrami mpe obimisaki ye longwa na Uri, mokili ya Chalide, mpe opesaki ye kombo Abrayami.
8You found his heart faithful before you, and you made a covenant with him to give the land of the Canaanites, Hittites, Amorites, Perizzites, Jebusites, and Girgashites—to give it to his descendants. And you have kept your promise, for you are righteous.OLCBOmonaki ete motema na ye ezali na boyengebene epai na Yo mpe osalaki boyokani elongo na ye mpo na kopesa na bakitani na ye mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Perizi, ya bato ya Yebusi mpe ya bato ya Girigazi. Okokisaki elaka na Yo, pamba te ozali Sembo.
9You saw the suffering of our ancestors in Egypt; you heard their cry at the Red Sea.OLCBOmonaki minyoko ya bakoko na biso kati na Ejipito mpe oyokaki koganga na bango pembeni ya ebale monene ya Barozo.
10You sent signs and wonders against Pharaoh, against all his officials and all the people of his land, for you knew how arrogantly the Egyptians treated our people. So you made a name for yourself, which endures to this day.OLCBOsalaki bilembo minene mpe bikamwa mpo na kotelemela Faraon, bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya mokili na ye ; pamba te oyebaki kanza ya mitema ya bato ya Ejipito mpe ndenge banyokolaki bakoko na biso. Boye osalaki ete sango ya Kombo na Yo ekende mosika ndenge ezali kino na mokolo ya lelo.
11You divided the sea before them, so that they passed through it on dry ground, but you hurled their pursuers into the depths, like a stone into the mighty waters.OLCBOkabolaki ebale monene liboso na bango, mpe batambolaki kati na ebale yango lokola na mabele ya kokawuka. Kasi ozindisaki lokola libanga monene kati na mozindo ya mayi makasi, bato oyo bazalaki kolanda bango.
12By day you led them with a pillar of cloud, and by night with a pillar of fire, to give them light on the way they were to travel.OLCBOtambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola.
13You came down on Mount Sinai; you spoke to them from heaven. You gave them just regulations and true laws, good statutes and commands.OLCBOkitaki na ngomba Sinai, olobaki na bango wuta na likolo mpe opesaki bango malako, mibeko ya solo mpe ya alima, mitindo mpe bikateli malamu.
14You made known to them your holy Sabbath and gave them commands, statutes, and laws through your servant Moses.OLCBOlakisaki bango Saba na Yo ya bule mpe opesaki bango mitindo, bikateli mpe mibeko na nzela ya Moyize, mosali na Yo.
15In their hunger you gave them bread from heaven, and in their thirst you brought them water out of the rock. You told them to go in and take possession of the land you had sworn to give them.OLCBTango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo ; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango.
16But they—our ancestors—became arrogant and stubborn, and they refused to obey your commands.OLCBKasi bango, bakoko na biso, bakomaki lolendo mpe mito makasi, batosaki mibeko na Yo te.
17They refused to listen and failed to remember the wonders you did among them. They became stubborn, and in their rebellion they appointed a leader to return to their slavery. But you are a forgiving Father, gracious and compassionate, slow to anger and abounding in faithful love, and you did not abandon them.OLCBBaboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,
18Even when they cast for themselves an image of a calf and said, "This is your god who brought you up out of Egypt," and committed terrible blasphemies,OLCBezala tango bamisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende oyo banyangwisa na moto mpe balobaki : ‹ Tala Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ! › mpe tango balobaki maloba ya nkele mpo na kotelemela Yo.
19you, in your great compassion, did not abandon them in the wilderness. The pillar of cloud still led them on their way by day, and the pillar of fire still lit their path by night.OLCBMpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe : likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi ; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda.
20You gave your good Spirit to instruct them. You did not withhold your manna from their mouths, and you gave them water for their thirst.OLCBOpesaki bango Molimo malamu na Yo mpo na kopesa bango bososoli. Opimelaki bango te mana na Yo, oyo bazalaki kolia, mpe opesaki bango mayi ya komela tango bazalaki na posa ya mayi.
21For forty years you sustained them in the wilderness, and they lacked nothing; their clothes did not wear out, and their feet did not swell.OLCBMibu tuku minei, okokisaki posa na bango nyonso kati na esobe ; bazangaki eloko moko te, bilamba na bango etikalaki kokufa te, mpe makolo na bango etikalaki kovimba te.
22You gave them kingdoms and peoples, giving them territory in every corner of the land. So they took possession of the land of Sihon king of Heshbon and the land of Og king of Bashan.OLCBOkabaki mikili mpe bikolo na maboko na bango mpo ete bazwa bituka na bango kino na bandelo na yango. Babotolaki mokili ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
23You made their children as numerous as the stars in the sky, and you brought them into the land you had told their ancestors to enter and possess.OLCBOkomisaki bana na bango ya mibali ebele lokola minzoto ya likolo mpe omemaki bango kino kati na mokili oyo opeselaki bakoko na bango mitindo ete bakende kobotola yango.
24Their children went in and took possession of the land. You subdued before them the Canaanites who lived there, and you handed the Canaanites over to them, with their kings and the peoples of the land, to deal with them as they pleased.OLCBBana na bango ya mibali bakotaki mpe babotolaki mokili yango. Otiaki na se ya bokonzi na bango, bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna ; okabaki bato ya Kanana elongo na bakonzi na bango na maboko ya bana ya Isalaele mpo ete basala bato ya Kanana ndenge balingi.
25They captured fortified cities and fertile land; they took possession of houses full of every good thing, wells already dug, vineyards, olive groves, and fruit trees in abundance. So they ate and were satisfied and grew fat, and they reveled in your great goodness.OLCBBabotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso.
26But they were disobedient and rebelled against you; they cast your law behind their backs. They killed your prophets, who had warned them to turn them back to you, and they committed terrible blasphemies.OLCBKasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango.
27So you handed them over to their enemies, who oppressed them. But in the time of their distress, when they cried out to you, you heard them from heaven, and in your great compassion you gave them deliverers, who rescued them from the hand of their enemies.OLCBBoye okabaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo banyokolaki bango. Kasi tango bakomaki na pasi makasi, babelelaki Yo ; mpe Yo, wuta na likolo, oyokaki bango ; bongo na mawa monene na Yo, otindelaki bango bakangoli oyo bakangolaki bango na maboko ya banguna na bango.
28But as soon as they had rest, they again did evil before you. So you abandoned them to the hand of their enemies, who ruled over them. Yet when they turned back and cried out to you, you heard from heaven, and time after time, in your compassion, you rescued them.OLCBKasi tango kaka bakomaki na kimia, bazongelaki lisusu kosala mabe na miso na Yo ! Mpe Yo, osundolaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo bakomaki kokonza bango. Kasi tango babelelaki Yo lisusu, oyokaki bango wuta na likolo mpe, na mawa monene na Yo, okangolaki bango mbala mingi.
29You warned them to return to your law, but they grew arrogant and did not obey your commands. They sinned against your judgments, which give life to whoever obeys them. Stubbornly they turned their backs, stiffened their necks, and would not listen.OLCBOkebisaki bango mpo ete bazongela Mibeko na Yo ; kasi, na lolendo na bango, baboyaki kotosa mitindo na Yo. Basalaki masumu, babukaki mibeko na Yo, oyo nzokande esalaka ete moto oyo akotia yango na misala azala na bomoi. Kasi na lolendo mpe na botomboki na bango, bapesaki Yo mokongo, bakomaki mito makasi mpe baboyaki koyoka.
30For many years you were patient with them. By your Spirit you warned them through your prophets, yet they would not pay attention. So you handed them over to the peoples of the lands.OLCBOzalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.
31But in your great compassion you did not put an end to them or abandon them, for you are a gracious and compassionate Father.OLCBKasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te ; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu.
32And now, our Father—great and mighty and awesome, who keeps his covenant of faithful love—do not let all this hardship seem small before you: the hardship that has come upon us, upon our kings and leaders, our priests and prophets, our ancestors and all your people, from the days of the kings of Assyria until today.OLCBSik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo.
33In all that has come upon us you have been just; you have acted faithfully, while we have done wrong.OLCBKati na makambo nyonso oyo ekweyelaki biso, ozalaki sembo ; mpe osalaki na boyengebene, wana biso totambolaki mabe.
34Our kings and leaders, our priests and ancestors did not keep your law; they paid no attention to your commands or to the warnings you gave them.OLCBBakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso mpe batata na biso batiaki Mibeko na Yo na mosala te, batosaki te mitindo mpe makebisi na Yo, oyo ozalaki kopesa bango.
35Even while they were in their own kingdom, enjoying the great goodness you gave them and the spacious, fertile land you set before them, they would not serve you or turn from their evil ways.OLCBEzala wana bazalaki kati na mokili na bango, wana bazalaki kosepela mpo na bolamu oyo ozalaki kotalisa bango kati na mokili monene oyo mabele na yango ebotaka malamu, basalelaki Yo te mpe batikaki te banzela mabe na bango.
36And now look—we are slaves today, slaves in the very land you gave our ancestors so they could eat its fruit and its good things.OLCBKasi tala, tozali lelo bawumbu ! Tozali penza bawumbu kati na mokili oyo opesaki na bakoko na biso mpo ete balia mbuma na yango mpe biloko mosusu ya kitoko oyo ebimaka kuna !
37Its abundant harvest goes to the kings you have set over us because of our sins. They rule over our bodies and our livestock as they please, and we are in great distress."OLCBMpo na masumu na biso, ebele ya mbuma na yango ekeyi na maboko ya bakonzi oyo otiaki na makasi mpo ete banyokola biso. Bazali kokonza banzoto na biso mpe bibwele na biso ndenge balingi. Tokomi na pasi makasi. »
10:1So we are making a binding agreement in writing, sealed by our leaders, Levites, and priests.OLCBMpo na makambo oyo nyonso, tozali kozwa mokano oyo tozali kokoma na mokanda ; mpe bakambi na biso, Balevi na biso mpe Banganga-Nzambe na biso bakotia mikoloto na bango na mokanda yango.