Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Luke 11 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 He was praying in a place; when he finished, one of his disciples said, "Lord, teach us to pray, as John also taught his disciples." Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye : — Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye.
2 He said to them, "When you pray, say: Father, may your name be honored as holy. Your kingdom come. Yesu alobaki na bango : — Tango bozali kosambela, boloba : Tata, tika ete Kombo na Yo ebulisama, tika ete Bokonzi na Yo eya !
3 Give us each day our daily bread. Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,
4 And forgive us our sins, for we ourselves also forgive everyone who is indebted to us. And do not lead us into temptation." limbisa masumu na biso, pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso oyo asalaka biso mabe ; mpe komema biso na komekama te.
5 He said to them, "Which of you has a friend and will go to him at midnight and say to him, 'Friend, lend me three loaves,' Alobaki na bango lisusu : — Soki moko kati na bino azali na molingami, bongo akei epai na ye na midi ya butu mpe alobi : « Molingami, defisa ngai mapa misato ;
6 "because a friend of mine arrived from a journey, and I have nothing to serve him,' pamba te moko kati na baninga na ngai azali kosala mobembo mpe akomi epai na ngai, kasi nazangi bilei ya kopesa ye. »
7 "and he answers from inside, 'Don't trouble me; the door's already shut, and my children are in bed with me. I can't get up and give you anything'? Soki molingami oyo, wuta kati na ndako na ye, azongisi : « Kotungisa ngai te, nasili kokanga ekuke ya ndako na ngai ; ngai mpe bana na ngai tolali, nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo mapa. »
8 "I tell you: even though the sleeping friend won't get up and give him anything just because they are friends, the asking friend's shameless persistence will still get the sleeper up to give him whatever he needs." Nazali koloba na bino penza ya solo : ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.
9 "I tell you: ask and it'll be given to you; seek and you'll find; knock and it'll be opened to you. Boye, Ngai nazali koloba na bino : Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino.
10 "Everyone who asks receives; the one who seeks finds; to the one who knocks it will be opened. Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
11 "What father among you, if his son asks for a fish, will give him a snake instead; Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi,
12 "or if he asks for an egg, will give him a scorpion? to akopesa ye koto soki asengi ye liki ?
13 "If you, though evil, know how to give your children good gifts, how much more will the Father from heaven give the Holy Spirit to those who ask him!" Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !
14 He was driving out a demon that was mute. When it left, the mute man spoke, and the crowds were amazed. Mokolo moko, Yesu azalaki kobengana molimo mabe oyo ezalaki kopekisa moto koloba. Tango molimo mabe yango ebimaki, moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba, mpe ebele ya bato bakamwaki.
15 But some of them said, "By Beelzebul, the ruler of the demons, he casts out demons," Kasi bamoko kati na bango balobaki : — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.
16 while others, testing him, kept seeking from him a sign from heaven. Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo.
17 But knowing their thoughts, he said to them, "Every kingdom divided against itself is ruined, and a house divided against a house falls. Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango : — Bokonzi nyonso oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekomipanza, mpe ndako oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekokweya.
18 "If Satan too is divided against himself, how will his kingdom stand? For you say I drive out demons by Beelzebul. Soki Satana akomi komibundisa, bokonzi na ye ekotelema ndenge nini ? Nalobi bongo mpo bolobi ete Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule.
19 "If I drive out demons by Beelzebul, by whom do your sons drive them out? So they will judge you. Mpe soki Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Mpo na yango, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.
20 "But if I expel demons by the finger of our Father, the kingdom of our Father has come upon you. Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.
21 "When a strong man, fully armed, guards his own palace, his possessions are safe. Tango elombe oyo alata bibundeli akengelaka ndako na ye, biloko na ye ebatelamaka malamu ;
22 "But when someone stronger attacks and overcomes him, the attacker takes away the armor the strong man trusted in and divides up his plunder. kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.
23 "Whoever is not with me is against me, and whoever does not gather with me scatters. Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.
24 "When an unclean spirit leaves a person, it goes through dry regions seeking rest. Finding none, it says, 'I'll return to the house I left. Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te, emilobelaka : « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. »
25 And when it comes, it finds the house swept and put in order. Tango molimo mabe yango ezongaka, ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu.
26 "Then it goes and brings seven other spirits more evil than itself; they enter and live there, and that person's final state is worse than the first." Bongo ekendaka lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe, elongo na yango, ekotaka mpe evandaka kuna. Boye bomoi ya moto yango ekomaka lisusu mabe, koleka ndenge ezalaki liboso.
27 As he said this, a woman in the crowd called out, "Blessed is the womb that carried you, and the breasts that nursed you!" Wana Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko agangaki wuta kati na ebele ya bato : — Esengo na mama oyo abotaki Yo mpe amelisaki Yo mabele !
28 But he said, "Blessed rather are those who hear the word of our Father and keep it!" Yesu azongisaki : — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !
29 As crowds gathered, he began to say, "This generation is an evil generation. It seeks a sign, but no sign will be given to it except the sign of Jonah. Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki : — Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza ! Bazali kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona ;
30 For as Jonah became a sign to the people of Nineveh, so the Son of Man will be to this generation. pamba te, ndenge Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge wana mpe Mwana na Moto akozala elembo mpo na bato ya ekeke oyo.
31 The queen of the South will rise at the judgment with this generation's people and condemn them—she came from earth's ends to hear Solomon's wisdom, and look, something greater than Solomon is here. Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akolamuka, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpo na koyoka bwanya ya Salomo ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Salomo.
32 "Ninevites will rise at the judgment with this generation and condemn it, for they repented when Jonah preached, and someone greater than Jonah is here. Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.
33 "No one lights a lamp and puts it in a cellar or under a basket, but on a stand, so those entering see the light. Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole.
34 Your eye is your body's lamp: when it's clear, your whole body is full of light; when bad, your body is full of darkness. Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili.
35 "Therefore be careful that the light in you is not darkness. Yango wana, sala keba ete pole oyo ezali kati na yo ekoma molili te.
36 "So if your whole body is full of light, with no dark part, it will be completely bright—like a lamp shining its beam on you." Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango.
37 As he spoke, a Pharisee invited him to eat with him; he went in and reclined at the table. Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki Ye mpo ete akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako na ye mpe avandaki na mesa.
38 The Pharisee was astonished to see that he did not first wash before the meal. Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukoli maboko te liboso ya kolia.
39 And the Lord said to him, "Now you Pharisees clean the cup and dish on the outside, but inside you're full of greed and evil. Bongo, Nkolo alobaki na ye : — Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe.
40 You fools! Did not the one who made the outside make the inside also? Bazoba ! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ?
41 "But give to the poor the things that are within, and everything will be clean for you. Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.
42 "But woe to you Pharisees! You bring the tenth of mint, rue, and every herb, yet neglect justice and love of our Father. These you should have done, without neglecting the others. Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.
43 "Woe to you Pharisees! For you love the front seat in synagogues and greetings in marketplaces. Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.
44 "Woe to you! For you are like unmarked graves, and people walk over them without knowing it." Mawa na bino ! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba !
45 One of the lawyers answered him, "Teacher, in saying these things you insult us also." Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu : — Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso !
46 And he said, "How terrible for you experts in the law too! You load people with crushing burdens, yet won't touch those burdens with one finger. Yesu azongisaki : — Bino mpe balakisi ya Mobeko, mawa na bino ! Bomemisaka bato mikumba ya kilo makasi, mpe bino moko boningisaka ata mosapi moko te mpo na kosunga bango.
47 "Woe to you! You build the prophets' tombs, but it was your fathers who killed them. Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma !
48 "So you are witnesses and approve your fathers' deeds, for they killed them and you build their tombs.' Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.
49 "So the wisdom of our Father also said, 'I will send them prophets and apostles; some of them they will kill and persecute.' Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba : « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma ; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. »
50 "so the blood of all the prophets shed since the foundation of the world may be charged against this generation, Mpo na yango, makila ya basakoli nyonso, oyo basopa wuta na ebandeli ya mokili, ekotangama na mito ya bato ya ekeke oyo,
51 "from Abel's blood to Zechariah's blood, who died between the altar and the sanctuary. Yes, I tell you, it will be charged to this generation. kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo : mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
52 "Woe to you lawyers! For you took away the key of knowledge—you didn't enter, and you blocked those entering." Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi ! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota.
53 When he left there, the scribes and Pharisees began hounding him fiercely, pressing him to speak on many things, Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge,
54 lying in wait for him, to catch him in something he might say. na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]