Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Leviticus 26 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "You must not make worthless idols for yourselves, set up a carved image or sacred pillar, or place a sculpted stone in your land to bow down to it; for I am your Father. Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
2 "You are to keep my Sabbaths and revere my sanctuary; I am your Father. Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe.
3 "If you walk in my statutes and keep my commandments and carry them out, Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango,
4 I will give rain in its season; the land will yield its produce, and the field's trees their fruit. nakonokisela bino mvula na tango na yango ; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.
5 Threshing will reach the grape harvest, and the grape harvest will reach sowing; you will eat your bread to the full and live securely in your land. Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona ; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.
6 "I will give peace in the land; you will lie down with nothing to frighten you. I will remove harmful animals from the land, and no sword will pass through your land. Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.
7 You will chase your enemies, and they will fall before you by the sword. Bokobengana banguna liboso na bino mpe bakokufa na mopanga liboso na bino.
8 Five of you will chase 100, one hundred of you will chase 10,000; your enemies will fall before you by the sword. Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi ; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga.
9 "I will turn to you, make you fruitful, multiply you, and confirm my covenant with you. Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino.
10 You'll still be eating old, long-stored grain, clearing it out to make room for new. Bambuma ya bilanga na bino ekozala penza ebele mpe ekosala ete bokolia tango molayi bambuma oyo bokozala na yango kati na bibombelo ; kino bokokaba mosusu mpo ete bokotisa bambuma ya sika.
11 I will set my dwelling among you, and my heart will not reject you. Nakotia Ndako na Ngai kati na bino mpe nakotombokela bino te.
12 I will walk among you and be your Father, and you will be my children. Nakotambola kati na bino mpo ete nazala Nzambe na bino mpe bino bozala bato na Ngai.
13 I am your Father, who brought you out of the land of Egypt so you would no longer be the Egyptians' slaves. I broke your yoke's bars and made you walk upright. Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te ; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi.
14 "But if you will not listen to me and will not carry out all these commandments, Soki boboyi kotosa mpe kosalela mibeko wana nyonso,
15 if you reject my statutes and your soul despises my rules, not doing all my commandments but breaking my covenant, soki bobwaki bikateli na Ngai, mpe soki molimo na bino etombokeli malako na Ngai kino koboya kosalela mibeko na Ngai nyonso mpe kokata boyokani na Ngai,
16 then I too will do this to you: I will bring on you sudden terror, wasting disease and fever that destroy the eyes and drain life. You will sow your seed for nothing, for your enemies will eat it. tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.
17 I will set my face against you: you will be struck down before your enemies, those who hate you will rule you, and you will flee though none pursue you. Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino ; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.
18 "Even after this, if you still won't listen, I will discipline you seven times over for your sins, Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
19 I will break your proud strength, and make your sky like iron and your ground like bronze. Nakosilisa makasi na bino, nakokomisa lola makasi lokola ebende mpo na bino, mpe mabele na bino lokola bronze.
20 Your strength will be spent for nothing: your land won't yield its produce, and the land's trees won't yield their fruit. Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango.
21 "If you walk against me and refuse to listen to me, I will add blows seven times over for your sins. Soki botelemeli Ngai mpe boboyi koyoka Ngai, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
22 I will send wild animals against you. They will rob you of your children, wipe out your livestock, reduce you to few, and empty your roads. Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.
23 "If even this doesn't turn you back to me, and you keep walking against me, Soki bitumbu yango ekoki kaka te mpo na kozongisa bino na nzela, nzokande bokobi kaka koboya kotosa Ngai,
24 then I too will walk against you and strike you, I too, seven times for your sins. Ngai mpe nakotelemela bino mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
25 I will bring a sword against you, avenging the covenant. When you gather into your cities, I will send plague among you, and you will be given into the enemy's hand. Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.
26 When I break your supply of bread, ten women will bake it in one oven and dole it out by weight—you'll eat and stay unsatisfied. Tango nakopimela bino bilei, basi zomi bakotumba mapa na fulu moko mpe bakobanda kopesa bino mapa yango na kilo : bokolia kasi bokotonda te.
27 "And if in spite of this you will not listen to me but keep walking against me, Soki, atako bongo, boyoki kaka te mpe bokobi kaka kotelemela Ngai,
28 then I will walk against you in fury, and discipline you myself seven times over for your sins. Ngai mpe nakotelemela bino lisusu na kanda makasi mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
29 You will eat the flesh of your sons, and you will eat the flesh of your daughters. Bokolia bana na bino ya mibali mpe ya basi.
30 I will destroy your high places, cut down your incense altars, pile your corpses on your idols' corpses, and my very being will detest you. Nakokweyisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba, nakokweyisa bitumbelo na bino ya malasi, nakotia bibembe na bino likolo ya bibembe ya banzambe na bino ya bikeko mpe nakotombokela bino.
31 I will turn your cities to ruins, devastate your sanctuaries, and not smell your soothing aromas. Nakokomisa bingumba na bino bisobe, nakobebisa bisika na bino ya bule mpe nakosepela te lisusu na solo kitoko ya malasi na bino.
32 I myself will make the land desolate; your enemies who settle there will be appalled by it. Ngai moko nakokotisa mobulu kati na mokili, mpe ezala banguna na bino oyo bakoya kovanda kati na yango bakokamwa.
33 I will scatter you among the nations and draw a sword after you; your land will become desolate and your cities a ruin. Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.
34 Then the land will enjoy its Sabbaths all the days of its desolation, while you are in your enemies' land; then it will rest and enjoy its Sabbaths. Boye, mokili na bino ekosepela Saba na yango mibu nyonso oyo ekozanga bato mpe oyo bokokima epai ya banguna na bino ; ekozwa bopemi mpe ekosepela Saba na yango.
35 All the days it lies desolate, it rests—the rest it lacked during your Sabbaths while you lived there. Na tango nyonso oyo ekozanga bato, ekozwa bopemi oyo ezalaki na yango na tango ya Saba na bino tango bozalaki kovanda kati na yango.
36 "Those of you who remain—I will put weakness in their hearts in their enemies' lands. A wind-driven leaf's sound will chase them; they'll flee as from a sword and fall though no one chases. Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.
37 They'll stumble over each other as if fleeing a sword, with no one chasing, and have no strength to stand before your enemies. Bakokweya moko likolo ya moninga lokola nde bazali kokima mopanga ata soki moto moko te azali kolanda bango. Bokolonga te liboso ya banguna na bino.
38 You will perish among the nations, and the land of your enemies will swallow you up. Bokokufa kati na bikolo ya bapaya mpe mokili ya banguna na bino ekolia bino.
39 Those left among you will waste away in their guilt in your enemies' lands; also, for their fathers' guilt, they will waste away with them. Kati na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino bakokufa kuna mpo na masumu na bango moko mpe mpo na masumu ya batata na bango.
40 "But if they confess their guilt and their fathers' guilt, in the treachery they committed against me, and also that they walked in hostility toward me, Nzokande, soki bakotubela masumu na bango mpe masumu ya batata na bango, misala na bango ya mabe mpe botomboki na bango liboso na Ngai,
41 so that I too walked against them, bringing them into their enemies' land—if then their uncircumcised heart humbles itself and they pay for their guilt, oyo mpo na yango, Ngai natelemelaki bango mpe namemaki bango na mokili ya banguna na bango, wana mitema na bango oyo ekatama ngenga te ekomikitisa mpe bakozwa lifuti ya mabunga na bango,
42 I will remember my covenant with Jacob, also my covenant with Isaac, also my covenant with Abraham, and I will remember the land. nakokanisa boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na Jakobi, na Izaki mpe na Abrayami ; mpe nakokanisa mokili.
43 The land will be abandoned by them, enjoying its Sabbaths while desolate without them; they will pay for their guilt, because they despised my rules and their heart rejected my statutes. Boye, wana bakotika mokili mpe wana mokili yango ekosepela Saba na yango, na mikolo nyonso oyo yango ekozala ezanga bato, na tango yango, bakozwa lifuti ya mabe na bango mpo ete batosaki mibeko na Ngai te mpe batombokelaki bikateli na Ngai.
44 Even so, while they're in their enemies' land, I won't despise or reject them to the point of destroying them and breaking my covenant with them, for I am their Father. Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango ; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango.
45 For them I will remember the covenant with their ancestors, whom I brought out of the land of Egypt before the eyes of the nations, to be their Father: I am your Father." Nakokanisa boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango, oyo Ngai nabimisaki na Ejipito, na miso ya bikolo mosusu, mpo ete nazala Nzambe na bango. Nazali Yawe. › »
46 These are the statutes, rules, and laws our Father gave between himself and Israel's people on Mount Sinai, by Moses. Oyo nde bikateli, mitindo mpe mibeko oyo Yawe atiaki kati ya Ye mpe bana ya Isalaele, na ngomba Sinai, na nzela ya Moyize.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]