Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Leviticus 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses: Yawe alobaki na Moyize :
2 "Command the Israelites to bring you pure, crushed olive oil for the light, to keep a lamp burning continually. « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso.
3 Outside the testimony's curtain in the tent of meeting, Aaron is to tend it before me from evening to morning, continually—a lasting law for your generations. Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron akobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo na bino nyonso.
4 On the pure lampstand he must tend the lamps before me continually. Minda ekozala likolo ya etelemiselo ya minda, esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe ; bakobongisa yango tango nyonso.
5 "Take fine flour and bake twelve loaves, each about four and a half pounds of flour. Okozwa farine mpe okolamba bagato zomi na mibale, okosalela biteni mibale kati na biteni zomi ya efa mpo na gato moko na moko.
6 Arrange them in two rows, six to a row, on the pure table before me. Okotanda yango na milongo mibale, gato motoba na molongo moko, likolo ya mesa oyo esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe.
7 Put pure frankincense on each row as the bread's memorial portion, a food offering to me. Na molongo moko na moko, okosopa ansa ya peto oyo ekotumbama na esika ya gato lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, mpe ekozala ekaniseli.
8 Every Sabbath he must arrange it before me continually, from the Israelites, a lasting covenant. Mikolo nyonso ya Saba, bokobonza lipa yango liboso ya Yawe na kombo ya bana ya Isalaele lokola boyokani ya libela.
9 It belongs to Aaron and his sons, who must eat it in a holy place; it is a most holy portion for him from my food offerings, their permanent share." Gato yango ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali ; bana na ye ya mibali bakolia yango na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule koleka kati na biteni na bango oyo bazwaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Ezali mobeko mpo na libela. »
10 The son of an Israelite woman, whose father was Egyptian, went out among the Israelites; the Israelite woman's son fought with an Israelite man in the camp. Ezalaki na mwana mobali moko oyo mama na ye azalaki moto ya Isalaele mpe tata na ye, moto ya Ejipito ; apusanaki kati na bana ya Isalaele mpe abundisaki moto ya Isalaele kati na molako.
11 The son of the Israelite woman blasphemed the Name with a curse, and they brought him to Moses. His mother was Shelomith, daughter of Dibri, of the tribe of Dan. Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani.
12 They put him in custody until our Father made his will clear to them. Batiaki ye na boloko kino kozela ete Yawe alakisa bango mokano na Ye.
13 Then our Father spoke to Moses: Yawe alobaki na Moyize :
14 "Bring the one who cursed outside the camp. Let all who heard lay their hands on his head, then let the whole congregation stone him. « Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.
15 Tell the Israelites: Whoever curses our Father will bear their sin. Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo ;
16 Whoever blasphemes my name must die—the whole community must stone him. Foreigner and native-born alike: whoever blasphemes the Name must die. soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye : bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye.
17 "Whoever kills any person must be put to death. Soki moto abomi moto, basengeli koboma ye.
18 Whoever kills an animal must make restitution for it, life for life. Soki moto abomi nyama ya moto mosusu, asengeli kozongisa nyama ya bomoi na esika ya nyama oyo ekufi : kolanda mobeko ya bomoi mpo na bomoi.
19 If anyone injures their neighbor, the same must be done to them: Soki moto azokisi moninga na ye, bakosala ye ndenge asalaki moninga :
20 Fracture for fracture, eye for eye, tooth for tooth: as one injures another, so it is done to him. soki abuki eteni ya nzoto, ye mpe bakobuka ye eteni ya nzoto ; soki atoboli liso, ye mpe bakotobola ye liso ; soki abuki linu, ye mpe bakobuka ye linu ; ndenge azokisi moto mosusu, ndenge wana mpe bakozokisa ye.
21 Whoever kills an animal repays for it; whoever kills a person is put to death. Moto nyonso oyo abomi nyama ya moninga na ye, akozongisa nyama mosusu ; kasi oyo abomi moto, basengeli koboma ye.
22 The same law applies to the foreigner and to the native-born alike, for I am your Father." Ezala mopaya to mwana mboka, bino nyonso bozali na mobeko moko ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
23 Moses told the Israelites; they took the one who had cursed outside the camp and stoned him with stones. The Israelites did as our Father commanded Moses. Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]