Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Leviticus 15 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses and Aaron, saying: Yawe alobaki na Moyize mpe Aron :
2 "Speak to Israel's people and say: When any man has a discharge from his body, his discharge is unclean. « Boloba na bana ya Isalaele mpe boyebisa bango : ‹ Soki nzoto ya mibali ya mobali moko ezali kobimisa tofina to mayi, kobima yango ekomisi mobali yango mbindo.
3 This is his uncleanness from discharge: whether his body flows with it or is blocked, it is his uncleanness. Ata soki tofina to mayi ekobi kobima na nzoto na ye to ekangami, azali kaka mbindo. Tala ndenge kobima ya tofina to ya mayi yango ekomisaka moto mbindo :
4 "Every bed the man with the discharge lies on is unclean; everything he sits on is unclean. mbeto nyonso oyo mobali oyo azali kobimisa tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akolala to eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo.
5 Whoever touches his bed must wash his clothes, bathe in water, and remain unclean until evening. Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
6 Whoever sits on anything the man with the discharge sat on must wash his clothes, bathe in water, and be unclean until evening. Moto oyo akovanda likolo ya eloko oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali avandelaki, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
7 "Whoever touches the body of the man with the discharge must wash his clothes, bathe in water, and remain unclean until evening. Moto oyo akosimba mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino pokwa.
8 If the man with the discharge spits on a clean person, that person must wash his clothes, bathe in water, and remain unclean until evening. Soki mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali abwakeli moto oyo azali peto soyi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
9 "Any saddle on which the man with the discharge rides is unclean. Eloko nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akovandela likolo ya mpunda tango azali kosala mobembo, ekokoma mbindo.
10 Anyone who touches what was under him is unclean until evening; anyone who carries them must wash his clothes, bathe in water, and remain unclean until evening. Moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso kati na biloko oyo ezali na se ya mobali yango, akozala mbindo kino na pokwa ; mpe moto nyonso oyo akolokota biloko yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
11 "Anyone the man with the discharge touches, if the man hasn't rinsed his hands in water, must wash his clothes, bathe in water, and stay unclean until evening. Moto nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akosimba na kozanga komisukola maboko na mayi, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
12 Any clay pot the man with the discharge touches must be broken; every wooden utensil must be rinsed in water. Mbeki nyonso oyo esalema na mabele oyo bakosimba na mobali oyo azali kobima tofina to mayi, basengeli kopanza yango ; mpe eloko nyonso oyo esalema na nzete basengeli kosukola yango na mayi.
13 "When the man with a discharge is cleansed of it, he must count seven days for his cleansing, wash his clothes, bathe his body in fresh flowing water, and be clean. Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye ; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto.
14 On the eighth day he must take two turtledoves or two young pigeons, come before our Father at the tent of meeting's entrance, and give them to the priest. Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe.
15 The priest is to offer one as a sin offering, the other as a burnt offering, and the priest will make atonement for him before our Father for his discharge. Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali.
16 "If semen leaves a man, he must bathe his whole body in water and is unclean until evening. Soki mobali abimi mayi ya mibali na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola nzoto na ye mobimba na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa.
17 Any garment or leather with semen on it must be washed with water and stays unclean until evening. Elamba nyonso to eloko nyonso oyo esalema na poso ya nyama oyo ekweyeli mayi ya mibali, esengeli basukola yango na mayi, mpe ekozala mbindo kino na pokwa.
18 If a man sleeps with a woman and semen is released, both must bathe in water and stay unclean until evening. Soki mobali asangisi nzoto na mwasi, bango mibale basengeli kosukola nzoto na mayi mpe bakozala mbindo kino na pokwa.
19 "When a woman has a blood discharge from her body, she remains in her menstrual impurity seven days; whoever touches her is unclean until evening. Soki mwasi amoni makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo sambo, mpe moto nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo kino na pokwa.
20 Everything she lies on during her impurity is unclean, and everything she sits on is unclean. Eloko nyonso oyo akolalela na tango wana ekokoma mbindo, mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo.
21 Whoever touches her bed must wash his clothes, bathe in water, and be unclean until evening. Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa.
22 Whoever touches what she sits on must wash their clothes, bathe in water, and stay unclean until evening. Moto nyonso oyo akosimba eloko oyo mwasi yango avandeli, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
23 Whether the bed or what she sits on, touching it makes one unclean until evening. Soki eloko ezali na mbeto na ye to likolo ya eloko oyo avandeli, moto oyo akosimba yango akozala mbindo kino na pokwa.
24 "If a man lies with her and her menstrual impurity touches him, he is unclean seven days; every bed he lies on is unclean. Soki mobali moko asangisi na ye nzoto mpe makila na ye ya sanza ezwi mobali yango, akozala mbindo mikolo sambo. Bongo mbeto nyonso oyo mobali yango akolalela, ekokoma mbindo.
25 "If a woman's blood flows many days outside her monthly impurity, or beyond it, she stays unclean the whole time of the flow, as in the days of her impurity. Soki mwasi azali kobima makila mikolo ebele na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza te to azali kokoba kobima makila penza na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo nyonso oyo azali kobima makila lokola na mikolo oyo amonaka makila na ye ya sanza.
26 Every bed she lies on during her discharge is like her menstrual bed; every object she sits on is unclean, like her menstrual impurity. Mbeto nyonso oyo akolalela na tango oyo makila na ye ezali kokoba kobima, ekozala mbindo ; mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo lokola na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza.
27 Whoever touches them becomes unclean; he must wash his clothes, bathe in water, and remain unclean until evening. Moto nyonso oyo akosimba biloko wana akokoma mbindo. Asengeli kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mayi ; akozala mbindo kino na pokwa.
28 "Once she is made clean from her flow, she must count seven days, and after that she is clean. Soki apetolami na kobima makila na ye, asengeli kotanga mikolo sambo ; sima na yango, akokoma peto.
29 On the eighth day she must take two turtledoves or two young pigeons and bring them to the priest, at the meeting tent's entrance. Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
30 The priest will offer one as a sin offering, the other as a burnt offering, and make atonement for her before our Father for her impure discharge. Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mwasi yango liboso ya Yawe mpo na mbindo ya kobima makila na ye.
31 "Keep the Israelites separate from their impurity, so they don't die in their impurity by making my dwelling place among them unclean. Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›
32 "This is the law for one with a discharge, and for one whose emission of semen makes him unclean, Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ;
33 for a woman in her monthly impurity, for anyone, male or female, with a discharge, and for a man who lies with an unclean woman." mpo na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza mpe mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi to mpo na mwasi oyo azali kobima makila, mpe mpo na mobali oyo asangisi nzoto na mwasi ya mbindo. »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]