Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Leviticus 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Our Father spoke to Moses and Aaron, saying: Yawe alobaki na Moyize mpe Aron :
2 "When someone has a swelling, rash, or bright spot on their skin that turns into a skin disease, he must be brought to Aaron the priest or one of his priest sons. « Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe.
3 The priest examines the mark on the skin. If the hair in it has turned white and it looks deeper than the skin, it is a contaminating skin disease; the priest examines him and declares him unclean. Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe ; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba ; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo.
4 But if the bright spot on his skin is white, not deeper than the skin, and its hair hasn't turned white, the priest must isolate the person seven days. Soki lipalata oyo ebimi na poso ezali ya pembe mpe ezali kongenga, bongo efungwami te mpo na kosala pota na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akolongola kati na lisanga, moto oyo abeli mpe akotia ye na esika oyo akozala ye moko mikolo sambo.
5 On the seventh day the priest examines him; if the mark hasn't changed or spread on the skin, he isolates him seven more days. Sima na mikolo yango sambo, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto efungwami te mpe epanzani te na nzoto mobimba, akotika moto oyo abeli na esika oyo atiaki ye mpo ete asala lisusu mikolo sambo.
6 On the seventh day the priest examines him again. If the sore faded and didn't spread on the skin, he declares him clean—just a rash. He washes his clothes and is clean. Sima na mikolo sambo yango, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto ekawuki mpe epanzani te na nzoto mobimba, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo te ; ezali kolokoto ya pamba. Moto yango akosukola bilamba na ye mpo ete azali mbindo te.
7 But if the rash spreads on his skin after showing himself to the priest for cleansing, he must show himself to the priest again. Nzokande, soki sima na Nganga-Nzambe kotala mpe koloba ete moto yango azali peto, kolokoto yango epanzani na poso, moto yango asengeli kozonga epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala ye lisusu.
8 The priest examines him: if the rash has spread on the skin, he declares him unclean—it is a skin disease. Soki amoni ete kolokoto epanzani na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na bokono ya maba mpe azali mbindo.
9 "When a defiling skin disease appears on someone, he is to be brought to the priest. Soki moto azwi bokono ya maba, basengeli komema ye epai ya Nganga-Nzambe.
10 The priest examines him: if a white swelling on the skin has turned the hair white, with raw flesh in it. Nganga-Nzambe akotala ye malamu. Soki amoni ete poso ya nzoto na ye ebimisi bambuma ya pembe ya mike-mike, ekomisi bapwale ya nzoto na ye pembe, efungwami mpe ebimisi bapota,
11 It is a chronic skin disease; the priest will pronounce him unclean. He must not isolate him, since he is unclean. wana elakisi ete ezali bokono ya maba ya libela kati na poso ya nzoto na ye, mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo. Ekozala na tina te kotia ye na esika oyo akozala ye moko, pamba te emonani ete azali mbindo.
12 "But if the disease breaks out and covers all his skin, head to foot, wherever the priest looks, Kasi soki bokono na ye ya maba ebimisi bambuma ya mike-mike na poso ya nzoto na ye mobimba, kobanda na moto kino na makolo, na bisika nyonso oyo Nganga-Nzambe akoki kotala,
13 the priest examines him; if the disease covers his whole body, he pronounces him clean—since it's all turned white, he is clean. Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete bambuma ya mike-mike etondi ye penza na nzoto mobimba, akoloba ete moto yango azali mbindo te mpo ete akomi pembe nzoto mobimba.
14 But on the day raw flesh appears on him, he is to be unclean. Kasi akokoma mbindo na mokolo kaka poso ya nzoto na ye ekofungwama mpe ekobimisa bapota.
15 The priest sees the raw flesh and pronounces him unclean; the raw flesh is unclean—a skin disease. Soki kaka Nganga-Nzambe atali mpe amoni bapota oyo ebimi na poso, akoloba ete moto yango azali mbindo mpe bapota oyo efungwami ezali mbindo : ezali bokono ya maba.
16 But if the raw flesh changes and turns white, he is to come to the priest. Mpe soki bapota oyo efungwami ekomi lisusu pembe, moto yango akozonga lisusu epai ya Nganga-Nzambe
17 The priest examines him; if the mark has turned white, he declares him clean—he is clean. mpo ete atala ye malamu. Soki Nganga-Nzambe amoni ete bapota yango ekomi penza pembe, akoloba ete nzoto ezali mbindo te mpe ye moko moto yango azali mbindo te.
18 "When someone has a boil on their skin and it heals, Soki moto moko abelaki bibon mpe yango ekawuki ;
19 if a white swelling or reddish-white bright spot forms on the boil, show it to the priest. bongo bambuma mike-mike ya pembe to lipalata ya mwa pembe mpe mwa motane ebimi na esika oyo bibon ezalaki, moto yango asengeli kokende epai ya Nganga-Nzambe oyo akotala ye malamu.
20 The priest examines it; if it looks lower than the skin and the hair has turned white, he pronounces him unclean—a skin disease has broken out in the boil. Soki Nganga-Nzambe amoni ete lidusu moko esalemi na poso ya nzoto ya moto wana, bapwale na ye ebongwani mpe ekomi pembe, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba oyo ebimi na esika oyo elembo ya pota ya bibon ezali.
21 But if the priest sees no white hair in it, it is not below the skin, and has faded, he is to isolate him seven days. Nzokande, soki na ngonga ya kotala ye, Nganga-Nzambe amoni te bapwale ya moto yango kobongwana pembe mpe lidusu kosalema na poso na ye, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
22 If it spreads further on the skin, the priest declares him unclean; it is diseased. Sima na yango, soki Nganga-Nzambe amoni ete lipalata yango epanzani na poso ya nzoto, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
23 But if the bright spot stays put, hasn't spread, it's the scar of the boil, and the priest must pronounce him clean. Kasi soki lipalata yango epanzani te, wana elakisi ete ezali bobele elembo ya pota ya bibon ; mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na ye mbindo te.
24 "Or when skin has a fire burn, and the burn's raw flesh becomes a reddish-white or white bright spot, Soki poso ya nzoto ya moto moko eziki na moto, bongo litono moko ya pembe to ya motane esalemi kati na esika oyo eziki,
25 the priest examines it: if hair in the bright spot turned white and it looks deeper than the skin, it is a skin disease broken out in the burn—he declares him unclean; it is a skin disease. Nganga-Nzambe akotala moto yango malamu : soki bapwale oyo ezali kati na litono ebongwani, ekomi pembe mpe litono yango kati na poso ebongwani, esali pota : elakisi ete ezali bokono ya maba nde ebimi na esika oyo ezikaki. Boye, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba.
26 If the priest examines it and finds no white hair in the bright spot, and it's no deeper than the skin but faded, he is to isolate him seven days. Nzokande, soki tango Nganga-Nzambe atali moto yango malamu, amoni te bapwale ya pembe kati na litono ; mpe soki litono ebongwani te, esali na yango pota te na poso mpe epanzani te ; akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
27 On day seven the priest examines him. If it spread on the skin, the priest pronounces him unclean—a defiling skin disease. Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki litono epanzani solo na poso, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba.
28 But if the bright spot stays in place, hasn't spread on the skin, and has faded, it's the burn's swelling; the priest is to declare him clean—it is only the burn's scar. Nzokande, soki litono yango etikali kaka esika moko, epanzani te na poso kasi ekawuki, wana etalisi ete ezali kaka kobeba ya poso ya nzoto mpo na kozika na ye na moto. Boye Nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo te, pamba te ezali kaka elembo ya pota ya moto.
29 "When a man or a woman has a mark on the head or in the beard, Soki mobali to mwasi abeli bokono ya poso ya nzoto, ezala na moto to na mbanga,
30 the priest examines the mark; if deeper than the skin, with thin yellow hair, he pronounces them unclean—an itch, a skin disease of the head or beard. Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto ya moto yango : soki amoni ete bapota ebimi na poso ya nzoto ya moto yango, bapwale eteli mpe kotela na yango epanzani, akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo, pamba te ezali lipalata ya moto to ya mbanga.
31 But if the priest examines the itch mark and it looks no deeper than the skin and has no black hair in it, the priest is to isolate the person for seven days. Nzokande, soki Nganga-Nzambe amoni ete poso ya nzoto ebimisi na yango bapota te, atako bapwale ezali kaka ya mwindo, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
32 On the seventh day the priest examines the mark: if the itch hasn't spread, has no yellow hair, and looks no deeper than the skin. Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu poso : soki bokono yango epanzani te, bapwale eteli te, bapota ebimi te na poso,
33 The man is to shave, but not the sore area; the priest isolates him another seven days. mobeli akokokola suki na ye kasi akotika suki oyo ezali na bisika oyo bokono emonani. Bongo Nganga-Nzambe akotia lisusu mobeli na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo.
34 On the seventh day the priest examines the itch. If it hasn't spread on the skin and looks no deeper than the skin, the priest declares him clean. He washes his clothes and is clean. Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu bokono yango ya poso ya nzoto : soki epanzani te mpe ebimisi bapota te, Nganga-Nzambe akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo te. Boye mobali to mwasi yango akosukola kaka bilamba na ye mpe akokoma peto.
35 But if the itch spreads further on the skin after his cleansing, Nzokande, atako Nganga-Nzambe asili koloba ete mobali to mwasi wana azali peto kasi soki bokono yango epanzani ye kaka na poso ya nzoto,
36 the priest examines him; if the itch spread on the skin, the priest need not look for yellow hair—the man is unclean. Nganga-Nzambe akotala malamu : lokola bokono epanzani ye penza na poso ya nzoto, ekozala na tina te ete Nganga-Nzambe aluka lisusu koyeba soki bapwale eteli to te, pamba te mobali to mwasi yango azali penza mbindo.
37 But if the priest sees it unchanged, with black hair grown in it, it's healed; he's clean—the priest pronounces him clean. Nzokande, soki bokono epanzani na yango te mpe bapwale ya mwindo ebimi na bisika oyo bokono ezali, wana elakisi ete mobeli abiki na bokono na ye mpe azali peto : Nganga-Nzambe akoloba ete azali peto.
38 "When a man or a woman has white bright spots on their skin, Soki mobali to mwasi amoni matono ya pembe kobima na poso ya nzoto na ye,
39 the priest examines them; if the bright spots on their skin are dull white, it is a harmless rash that has broken out on the skin; he is clean. Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki pembe ya matono yango ezali na yango ya pete, wana elakisi ete ezali na yango penza bokono te : moto yango azali peto.
40 "When a man loses the hair on his head, he is bald, but he is clean. Soki suki ya mobali moko ekatani, bongo akomi na libandi, elakisi te ete akomi mbindo.
41 If hair falls from the front of his head, his forehead is bald, but he is clean. Soki suki yango ekataneli ye na mbunzu, bongo akomi na libandi, wana elakisi ete azali peto.
42 But if a reddish-white sore is on his bald head or forehead, it is a skin disease breaking out on his bald head or forehead. Kasi soki lipalata moko ya mwa pembe mpe ya mwa motane ebimi ye na libandi, ezala na dikosi to na mbunzu, wana elakisi ete bokono ya maba ebandi kobima ye na libandi.
43 The priest examines him; if a reddish-white swelling is on his bald head or forehead, like skin disease on the body's skin. Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki amoni ete bokono yango ya maba ebandi kobimisa bambuma ya mike-mike ya mwa pembe mpe ya mwa motane, ezala na dikosi to na mbunzu ; wana elakisi ete azali na bokono ya maba na libandi.
44 A man with a skin disease is unclean; the priest must declare him unclean, his mark on his head. Boye mobali yango azali na bokono ya maba, azali mbindo ; mpe Nganga-Nzambe asengeli koloba ete azali mbindo mpo na bokono oyo akomi na yango na moto.
45 "Anyone with the skin disease must wear torn clothes, let their hair hang loose, cover their upper lip, and cry, 'Unclean, unclean!' Moto oyo azwi bokono ya boye asengeli kolata bilamba epasuka, akokatisa suki te, akozipa mandefu na ye mpe akoganga : ‹ Mbindo ! Mbindo ! ›
46 While the mark remains, they are unclean—unclean; they must live alone, outside the camp. Lokola bokono oyo akomi na yango ezali mbindo, ye moko mpe akozala mbindo. Boye akotonga ndako na ye mosika na bato mpe akovanda libanda ya molako.
47 "When a garment has a mark of mildew in it, whether a wool or a linen garment, Soki elamba ya kolata ezwi mbungi, ebebi mpe ekomi lokola nzoto ya moto oyo abeli bokono ya maba, ezala elamba basala na lino to na bapwale ya meme
48 in fabric of linen or wool, woven or knitted, or in leather or anything of leather, to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi,
49 if a mark on garment, leather, warp, or weft, or any leather article, is greenish or reddish, it is mildew and must be shown to the priest. soki mbungi yango ezwi langi ya mayi ya pondu to ezwi langi ya motane, na likolo ya elamba, wana elakisi ete ezali litono ya maba ; boye basengeli komema yango epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala yango malamu.
50 The priest is to examine the mark and isolate the affected article for seven days. Sima na Nganga-Nzambe kotala yango malamu, akotia yango na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.
51 On the seventh day he examines the mark. If it has spread in the garment, warp or weft, or in leather or anything made of leather, it is destructive mildew—unclean. Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono yango. Soki amoni ete epanzani na likolo ya elamba ya kolata, ya elamba ya pamba, ya elamba ya malili to na likolo ya kapo ; wana elakisi ete ezali litono ya bokono ya maba oyo bakoki kolongola te mpe elakisi lisusu ete elamba yango ezali mbindo.
52 Burn the garment—warp or weft, wool or linen—or any leather article with the mark, for it is a destructive mildew; burn it in the fire. Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te : basengeli kotumba yango.
53 "But if the priest examines it and the sore hasn't spread in the garment, or warp, or weft, or any leather article, Nzokande, soki sima na kotala elamba yango malamu, Nganga-Nzambe amoni ete litono epanzani te na likolo ya elamba yango to na likolo ya kapo,
54 the priest will order the marked article washed, and isolate it another seven days. Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete basukola yango ; bongo akotia yango lisusu na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo.
55 After the affected fabric is washed, the priest examines it. If the mark's look hasn't changed, though it hasn't spread, it is unclean. Burn it in the fire—it is a corroding spot, inside or outside. Sima na kosukola yango, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono ; soki amoni ete ebongwani te mpe epanzani na yango te, wana elakisi ete elamba ezali mbindo mpe esengeli kotumba yango na moto : ezali elamba oyo ebebi na liboso mpe na sima.
56 If the priest sees the mark has faded after washing, he must tear it from the garment, leather, or woven or knitted material. Nzokande, soki Nganga-Nzambe, sima na kotala malamu elamba, amoni ete litono elongwaki na tango basukolaki elamba ; akokata kaka eteni ya elamba epai wapi litono ezali.
57 If it reappears in the garment, woven or knitted, or any leather, it's spreading; burn what has the mark in fire. Soki sima na mwa tango, litono yango ezongi lisusu, wana elakisi ete ezali bokono ya maba oyo ezali kokola. Boye esengeli kotumba na moto eteni oyo ezali na litono na elamba.
58 But if the mark leaves the garment, warp, weft, or leather item you washed, wash it again—it is clean. Tango bakosukola elamba oyo ezali na litono, soki litono yango elongwe, esengeli kosukola yango lisusu na mbala ya mibale mpo ete ezala peto. »
59 "This is the law for a mildew mark on a wool or linen garment, warp or weft, or any leather item—to pronounce it clean or unclean." Wana nde mitindo oyo etali litono ya bokono ya maba na likolo ya elamba basala na bapwale ya meme to elamba ya lino, na likolo ya eloko nyonso basala na poso ya nyama, mpo na koyeba soki elamba ezali peto to mbindo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]