Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Joshua 10 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Adoni-Zedek king of Jerusalem heard that Joshua had captured Ai and set it apart for destruction—handling Ai and its king just as he had Jericho and its king—and that Gibeon's people had made peace with Israel, now settled among them. Nzokande, Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, ayokaki ete Jozue abotolaki Ayi mpe abebisaki yango nyonso ; asalaki Ayi mpe mokonzi na yango ndenge kaka asalaki Jeriko mpe mokonzi na yango. Ayokaki lisusu ete bavandi ya Gabaoni basalaki boyokani ya kimia elongo na Isalaele mpe bakomaki kovanda kati na bango.
2 The people of Jerusalem were terrified, because Gibeon was a great city, like one of the royal cities, and because it was larger than Ai, and all its men were warriors. Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi ; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.
3 So Adoni-Zedek king of Jerusalem sent word to Hoham king of Hebron, to Piram king of Jarmuth, to Japhia king of Lachish, and to Debir king of Eglon, saying, Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni.
4 "Come up to me and help me, and let us attack Gibeon, because it has made peace with Joshua and with the people of Israel." Alobaki : « Boya epai na ngai mpe bosunga ngai mpo ete tobundisa Gabaoni, pamba te asali boyokani ya kimia elongo na Jozue mpe bana ya Isalaele. »
5 Then the five kings of the Amorites—the kings of Jerusalem, Hebron, Jarmuth, Lachish, and Eglon—joined forces and went up with all their armies. They encamped against Gibeon and made war against it. Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango.
6 The men of Gibeon sent this message to Joshua at the Gilgal camp: "Don't desert your servants! Come quickly and rescue us—help us! Every Amorite king in the hill country has joined forces against us." Bato ya Gabaoni batindaki maloba epai ya Jozue kati na molako ya Giligali : « Koboya te kosunga basali na yo, yaka noki epai na biso mpe bikisa biso, pamba te bakonzi nyonso ya bato ya Amori, oyo bavandaka na ngomba, basaleli biso likita. »
7 So Joshua marched up from Gilgal with all his fighting men—his mighty warriors. Jozue amataki wuta na Giligali elongo na mampinga na ye nyonso mpe bilombe nyonso ya bitumba.
8 And our Father told Joshua, "Don't fear them—I've given them over to you. Not one will stand before you." Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo ; moko te akokoka kotelema liboso na yo. »
9 So Joshua came upon them suddenly, having marched all night up from Gilgal. Sima na kotambola butu mobimba wuta na Giligali, Jozue abimelaki bango na pwasa.
10 And our Father threw them into a panic before Israel, striking them with a great blow at Gibeon, chased them along the road that goes up to Beth-horon, and cut them down as far as Azekah and Makkedah. Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda.
11 As they fled before Israel down the slope of Beth-horon, our Father hurled great stones on them from the sky, all the way to Azekah, and they died. More of them died from the hailstones than the people of Israel killed with the sword. Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.
12 Then Joshua spoke to our Father on the day our Father gave the Amorites over to the people of Israel, and before all Israel he said: "Sun, stand still over Gibeon, and moon, over the Valley of Aijalon." Na mokolo oyo Yawe akabaki bato ya Amori na maboko ya bana ya Isalaele, Jozue alobaki na Yawe na miso ya Isalaele : « Moyi, telema na Gabaoni ! Sanza, telema na lubwaku ya Ayaloni ! »
13 And the sun stood still, and the moon stopped, until the nation had avenged itself on its enemies. Is this not written in the Book of Jashar? The sun stopped in the middle of the sky and did not hurry to set for about a full day. Boye moyi etelemaki, mpe sanza eninganaki te kino tango ekolo ya Isalaele alongaki banguna na ye kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo. Moyi etelemaki na kati-kati ya mapata mpe elalaki noki te, pene mokolo mobimba.
14 There has never been a day like it, before or since, when our Father heeded the word of a man—for our Father fought for Israel. Mokolo ya boye etikala nanu kozala te, ezala na tango ya kala to na tango oyo ekoya, mokolo oyo Yawe atosi mongongo ya moto. Solo Yawe azalaki kobundela Isalaele.
15 Then Joshua and all Israel with him returned to the camp at Gilgal. Jozue elongo na Isalaele mobimba bazongaki na molako na Giligali.
16 Now these five kings had fled and hidden themselves in the cave at Makkedah. Nzokande, bakonzi wana mitano bakimaki mpe bakendeki kobombama kati na lidusu ya mabanga, na Makeda.
17 And Joshua was told, "The five kings have been found, hidden in the cave at Makkedah." Tango bayebisaki Jozue ete bamoni bakonzi yango mitano babombami kati na lidusu ya mabanga, na Makeda,
18 So Joshua said, "Roll large stones against the mouth of the cave, and post men beside it to guard them. Jozue alobaki : « Bopusa mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe botia bato pene na yango mpo na kobatela yango.
19 But do not stay there yourselves. Pursue your enemies and strike them from behind. Do not let them reach their cities, for your Father has given them into your hand." Kasi bosuka wana te. Bolanda banguna na bino mpe bokanga bango nzela mpo ete bakota na bingumba na bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino. »
20 When Joshua and the people of Israel had struck them with a crushing blow and wiped them out—though a few survivors escaped into the fortified cities. Tango Jozue mpe bana ya Isalaele balongaki bango mpe basilisaki koboma bango, ndambo ya bato oyo babikaki bakimaki mpe bakotaki na bingumba oyo etongama makasi.
21 Then all the people returned safely to Joshua in the camp at Makkedah, and no one dared speak against any Israelite. Bato nyonso ya Isalaele bazongaki na kimia na molako pene ya Jozue, na Makeda. Moko te alobaki lisusu mabe mpo na bana ya Isalaele.
22 Then Joshua said, "Open the mouth of the cave and bring those five kings out to me." Sima, Jozue alobaki : « Bofungola ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe bobimisa bakonzi wana mitano. »
23 So they brought the five kings out of the cave to him: the kings of Jerusalem, Hebron, Jarmuth, Lachish, and Eglon. Boye babimisaki bakonzi wana mitano na libanda ya lidusu ya mabanga : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni.
24 When they had brought these kings out to Joshua, he called all Israel's men and told the war commanders who'd gone with him, "Come near, put your feet on the necks of these kings." So they came near and put their feet on their necks. Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo : « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango.
25 Joshua told them, "Don't fear or be terrified. Be strong and brave—this is what our Father will do to all the enemies you fight." Jozue alobaki na bango : « Bobanga te mpe bolemba nzoto te. Bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te ezali boye nde Yawe akosala banguna nyonso oyo bokobundisa. »
26 After that, Joshua struck the kings, killed them, and hung them on five trees, where they stayed until evening. Sima na yango, Jozue abomaki bakonzi yango mpe adiembikaki bango na banzete mitano. Bibembe na bango etikalaki kodiembela na banzete yango kino na pokwa.
27 At sunset Joshua ordered the bodies taken down from the trees and thrown into the cave where the kings had hidden. They set large stones over the cave's mouth, still there today. Tango moyi elalaki, Jozue apesaki mitindo ete bakitisa bibembe yango wuta na banzete mpe babwaka yango kati na lidusu ya mabanga epai wapi babombamaki. Batiaki mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mabanga yango ezali wana kino na mokolo ya lelo.
28 That day Joshua took Makkedah, struck it and its king with the sword, and destroyed everyone in it—no survivor left. He did to Makkedah's king as he had done to Jericho's king. Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko.
29 Then Joshua and all Israel with him moved on from Makkedah to Libnah and fought against Libnah. Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Makeda, bakendeki kino na engumba Libina mpe babundisaki yango.
30 And our Father also gave it, with its king, to Israel. Joshua struck it and every person in it with the edge of the sword, leaving no survivor. He did to its king as he had done to the king of Jericho. Yawe akabaki lisusu engumba mpe mokonzi na yango na maboko ya Isalaele. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ; mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi na yango ndenge asalaki mokonzi ya Jeriko.
31 Then Joshua and all Israel with him marched from Libnah to Lachish, camped against it, and fought against it. Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Libina mpe bakendeki kino na Lakishi. Bazingelaki yango mpe babundisaki yango.
32 And our Father gave Lachish over to Israel, and Joshua captured it on the second day, striking it and everyone in it with the sword, as he had done to Libnah. Yawe akabaki engumba Lakishi na maboko ya Isalaele, mpe Jozue abotolaki yango, mokolo oyo elandaki. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ndenge kaka asalaki engumba Libina.
33 Then Horam king of Gezer came up to help Lachish, but Joshua struck him and his people down, leaving no survivor. Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi ; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi.
34 Joshua and all Israel with him moved from Lachish to Eglon, camped against it, and fought against it. Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Lakishi mpe bakendeki kino na engumba Egiloni ; bazingelaki yango mpe babundisaki yango.
35 They captured it that day and struck it with the edge of the sword. That day he devoted to destruction every person in it, just as he had done to Lachish. Babotolaki yango kaka na mokolo wana mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna ; babebisaki bango mokolo wana, ndenge kaka basalaki na Lakishi.
36 Then Joshua, with all Israel, went up from Eglon to Hebron and attacked it. Jozue mpe Isalaele mobimba balongwaki na Egiloni, bamataki kino na Ebron mpe babundisaki yango.
37 They captured it, struck it with the edge of the sword—its king, all its towns, everyone in it. He left no survivor, just as he had done to Eglon, devoting it and everyone in it to destruction. Babotolaki engumba yango, babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna elongo na mokonzi na yango. Bazwaki mpe bamboka na yango ya mike-mike mpe babomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna. Batikaki ata moto moko te na bomoi, ndenge kaka basalaki na engumba Egiloni. Babebisaki yango nyonso penza mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna.
38 Then Joshua and all Israel with him turned back to Debir and fought against it. Jozue elongo na Isalaele mobimba babalukaki na ngambo ya engumba Debiri mpe babundisaki yango.
39 He captured it, its king, and all its villages, struck them with the sword, and devoted every person in it to destruction—no survivors. He did to Debir and its king as he had done to Hebron and to Libnah and its king. Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.
40 Joshua struck the whole land—the hill country, the Negev, the lowlands, the slopes—and all their kings. He left no survivor; he destroyed everything that breathed, as our Father, the God of Israel, commanded. Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.
41 Joshua struck them from Kadesh-barnea to Gaza, and all the land of Goshen, to Gibeon. Jozue alongaki bango wuta na Kadeshi-Barinea kino na Gaza, mpe mokili mobimba ya Gosheni kino na Gabaoni.
42 Joshua took all these kings and their land at one time, because our Father, God of Israel, fought for Israel. Jozue alongaki bakonzi wana nyonso na mbala moko mpe abotolaki bamboka na bango, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, azalaki kobundela Isalaele.
43 Then Joshua and all Israel with him returned to the camp at Gilgal. Sima na yango, Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bazongaki na molako na Giligali.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]