Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 48 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Concerning Moab. This is what the Father of heaven's armies, our Father of Israel, says: Woe to Nebo—it is destroyed! Kiriathaim is disgraced and captured; the fortress is disgraced and shattered. Na tina ya Moabi : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama ! Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango, ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana.
2 The renown of Moab is no more. In Heshbon they plotted disaster against her: "Come, let us cut her off from being a nation!" You also, O Madmen, will be silenced; the sword will pursue you. Moabi ekozala lisusu na lokumu te, bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni mpo na kokweyisa yango : ‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! › Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ; mopanga ekolanda yo.
3 A voice! A cry from Horonaim: "Devastation and great destruction!" Yoka makelele oyo ezali kobima kuna na Oronayimi : ezali lokito ya bitumba mpe ya kobebisama !
4 Moab is broken; her little ones have raised a cry. Moabi ebebisami makasi penza mpe bana na yango bazali kolela.
5 For at the ascent of Luhith they go up weeping bitterly; for at the descent of Horonaim they have heard the distressing cry of destruction. Bazali komata na kolela, nzela-nzela mpo na kokende na Luyiti ; mpe tango bazali kokita na Oronayimi, koganga ya mawa ezali koyokana mpo ete Moabi esili kobebisama.
6 Flee! Save your lives, and become like a juniper in the wilderness! Bokima ! Bopota mbangu mpo na kobikisa bomoi na bino ; bokoma lokola nzete ya kokawuka kati na esobe !
7 Because you trusted in your works and your treasures, you too will be captured; and Chemosh will go into exile with his priests and his officials together. Lokola bozali kotia mitema na misala na bino mpe na bomengo na bino, bino mpe bokokende na bowumbu ; boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.
8 The destroyer will come against every city, and no city will escape; the valley will perish and the plateau will be destroyed, as our Father has spoken. Mobebisi akoya koboma bingumba nyonso mpe ata engumba moko te ekobika ; lubwaku ekobebisama, mpe etando ya likolo ya bangomba ekobebisama, pamba te Yawe alobi.
9 Give wings to Moab, for she must fly away; her cities will become a desolation, with no one to dwell in them. Bobongisa kunda mpo na Moabi mpo ete ekobebisama solo ; bingumba na yango ekotikala pamba, mpe bato bakovanda lisusu kuna te.
10 Cursed is the one who does the work of our Father with slackness, and cursed is the one who keeps back his sword from blood. Tika ete moto oyo asalelaka Yawe na kozanga komipesa alakelama mabe ! Tika ete moto oyo apelisaka mopanga na ye mpo ete etangisa makila alakelama mabe !
11 Moab has been at ease from his youth, settled on his dregs; he has not been emptied from vessel to vessel, nor has he gone into exile. So his taste remains in him, and his scent is unchanged. Moabi ezalaki na kimia wuta bolenge na yango lokola masanga ya vino oyo baningisi te, oyo babongoli na mbeki mosusu te, mpo ete etikala nanu kokende na bowumbu te. Boye, elengi na yango ebongwana te mpe solo na yango etikala kaka ndenge ya kala.
12 Therefore, the days are coming, declares our Father, when I will send to him decanters who will pour him out; they will empty his vessels and smash his jars. Kasi na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakotindela Moabi bato oyo bakobongola yango lokola masanga ya vino na mbeki mosusu : bakosopa yango, bakosilisa yango na mbeki mpe bakobuka mbeki na yango.
13 Then Moab will be ashamed of Chemosh, as the house of Israel was ashamed of Bethel, their confidence. Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.
14 How can you say, "We are warriors, men valiant in battle"? Ndenge nini bokoki koloba : ‹ Tozali basoda ya mpiko, bato ya makasi, bilombe ya bitumba ? ›
15 Moab is laid waste; his cities are overrun, and his finest young men have gone down to the slaughter, declares the King—the Father of heaven's armies is his name. Mokili ya Moabi ekobebisama, mpe bakobotola bingumba na yango na makasi ; bilenge mibali oyo Moabi etielaka motema bakokufa na mopanga, » elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga.
16 The calamity of Moab is near at hand, and his disaster hurries swiftly. « Kobebisama ya Moabi ezali na nzela, pasi na yango ekoya na lombangu penza.
17 Mourn for him, all you who are around him, all who know his name; say, "How the mighty scepter is broken, the glorious staff!" Bino bazalani nyonso ya Moabi, bosalela ye matanga ; bino bato oyo boyebi sango ya lokumu na ye, boloba : ‹ Ah, tala ndenge lingenda ya nguya, lingenda ya bokonzi ya nkembo, ebukani ! ›
18 Come down from your glory and sit on the parched ground, O inhabitant of Dibon! For the destroyer of Moab has come up against you; he has ruined your strongholds. Oh bato ya elenge mwasi Diboni, botika nkembo na bino mpe bovanda na esobe ; pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabi akoya mpe kobundisa bino mpe kobebisa bingumba na bino oyo batonga makasi !
19 Stand by the road and watch, O inhabitant of Aroer! Ask him who flees and her who escapes; say, "What has happened?" Bino bavandi ya Aroeri, botelema na nzela mpe botala malamu, botuna mobali oyo azali kokima mpe mwasi oyo asili kobikisa bomoi na ye soki makambo nini esili kosalema !
20 Moab is put to shame, for it is shattered. Wail and cry out! Tell it by the Arnon, that Moab is laid waste. Moabi ezali na soni mpo ete esili kokweya. Bolela mpe boganga, bobelela na Arinoni ete mokili ya Moabi ebebisami !
21 Judgment has come upon the tableland—upon Holon, and Jahzah, and Mephaath, Kosambisama ekweyi na mokili ya etando ya likolo ya bangomba : na Oloni, na Yakatsi mpe na Mefati,
22 and Dibon, and Nebo, and Beth-diblathaim, na Diboni, na Nebo mpe na Beti-Diblatayimi,
23 and Kiriathaim, and Beth-gamul, and Beth-meon, na Kiriatayimi, na Beti-Gamuli mpe na Beti-Meoni,
24 and Kerioth, and Bozrah, and all the cities of the land of Moab, far and near. na Kerioti mpe na Botsira, na bingumba nyonso ya Moabi, ezala oyo ezali mosika to oyo ezali pene.
25 The horn of Moab is cut off, and his arm is broken, declares our Father. Liseke ya Moabi ebukani mpe loboko na ye ekatani, » elobi Yawe.
26 Make him drunk, because he defied our Father; so Moab will wallow in his vomit, and he too will become a laughingstock. « Bolangwisa ye masanga, pamba te abetaki tembe na Yawe ! Tala ye Moabi ndenge azali kobaluka kati na bisanza na ye ! Tika ete, ye mpe, akoma eloko ya maseki !
27 Was not Israel a laughingstock to you? Was he caught among thieves, that whenever you spoke of him you shook your head? Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki te na miso na bino ? Bokangaki ye kati na miyibi mpo ete bokoma koseka ye tango nyonso bokolobela kombo na ye ?
28 Leave the cities and live among the rocks, O inhabitants of Moab! Be like the dove that nests at the mouth of a gorge. Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino mpe bokende kovanda kati na mabanga ! Bozala lokola ebenga oyo etongaka zala na yango kati na mabanga.
29 We have heard of the pride of Moab—he is very proud—of his loftiness, his pride, his arrogance, and the haughtiness of his heart. Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, lolendo oyo eleka penza ndelo ! Tala ndenge amatisaka mapeka ! Atondi na lofundu, azali na monoko makasi, mpe motema na ye emikitisaka te.
30 I know his insolence, declares our Father; his boasts are false, his deeds are false. Nayebi ete monoko makasi na ye ezali kaka pamba, » elobi Yawe, « mpe lolendo na ye esalaka eloko moko te.
31 Therefore I wail over Moab; for all Moab I cry out; for the men of Kir-heres I moan. Yango wana nazali kolela mpo na Moabi, nazali kolela mpo na Moabi nyonso ; nazali kosala matanga mpo na bato ya Kiri-Eresheti.
32 More than for Jazer I weep for you, O vine of Sibmah! Your branches reached over the sea, as far as the sea of Jazer they stretched; upon your summer fruit and your grape harvest the destroyer has fallen. Oh elanga ya vino ya Sibima, nazali kolela mpo na yo ndenge engumba Yaezeri ezali kolela ! Bitape na yo epanzani kino koleka mayi monene, ekomi kino na mayi monene Yaezeri. Mobebisi akweyeli mbuma ya bilanga na yo mpe mbuma ya vino na yo.
33 Gladness and joy are taken away from the orchard land of Moab; I have made the wine cease from the winepresses; no one treads with a shout. The shouting is no shout of joy. Esengo mpe kosepela esili kolimwa na bilanga mpe na bazamba ya Moabi ; nakawusi vino kati na bikamolelo na bango, mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te. Atako bato bazali koganga kasi ezali makelele ya esengo te.
34 From the cry of Heshbon to Elealeh, as far as Jahaz they raise their voice, from Zoar to Horonaim and Eglath-shelishiyah; for even the waters of Nimrim have become desolate. Makelele mpe koganga ezali komata wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ; pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.
35 I will bring to an end in Moab, declares our Father, the one who offers sacrifice on the high place and burns incense to his god. Nakoboma bato nyonso oyo bakendaka na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe batumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe na bango, kati na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.
36 Therefore my heart moans for Moab like flutes; my heart moans like flutes for the men of Kir-heres; therefore the wealth they gained has perished. « Mpe motema na Ngai ezali kolela Moabi ndenge flite ebetaka, ezali kolela lokola flite mpo na bato ya Kiri-Eresheti. Bomengo na bango nyonso esili kobunga.
37 For every head is shaved and every beard cut off; on all the hands are gashes, and around the waist is mourning clothes. Bakokoli suki ya mito ya bato nyonso, bakati moto moko na moko mandefu mpe bazokisi moto moko na moko na loboko.
38 On all the housetops of Moab and in its squares there is nothing but lamentation, for I have shattered Moab like a jar no one wants, declares our Father. Na likolo ya bandako nyonso ya Moabi mpe na bisika nyonso oyo bato balekelaka, ezali na likambo mosusu te, kaka ebembe ; pamba te nabebisi Moabi lokola eloko oyo bato balingaka te, » elobi Yawe.
39 How it is shattered! How they wail! How Moab has turned his back in shame! So Moab has become an object of derision and horror to all who are around him. « Tala ndenge nini apanzani, tala ndenge nini bazali kolela ! Ndenge nini Moabi apesi mokongo na soni ! Moabi akomi eloko ya kotiola, eloko ya koyoka na miso ya bato nyonso oyo bazingeli ye. »
40 For this is what our Father says: Look, one will swoop like an eagle and spread his wings against Moab. Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala ndenge nini mpongo ezali kokita na elulu mpe etandi mapapu na yango likolo ya Moabi.
41 The cities are captured and the strongholds seized. In that day the heart of Moab's warriors will be like the heart of a woman in labor. Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi. Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota.
42 Moab will be destroyed as a people, because he defied our Father. Mokili ya Moabi ekobebisama mpe ekotikala lisusu ekolo te ; pamba te ebetaki tembe na Yawe.
43 Terror, pit, and snare are upon you, O inhabitant of Moab! declares our Father. Somo, libulu mpe motambo ezali kozela bino bato ya Moabi, » elobi Yawe.
44 He who flees from the terror will fall into the pit, and he who climbs out of the pit will be caught in the snare; for I will bring upon Moab the year of their reckoning, declares our Father. « Moto nyonso oyo akokima somo akokweya na libulu, mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo, pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.
45 In the shadow of Heshbon the fugitives stop, exhausted; for fire has gone out from Heshbon, a flame from the house of Sihon. It has devoured the forehead of Moab, the crown of the sons of tumult. « Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi na elili ya engumba ya Eshiboni, pamba te moto moko ewuti na Eshiboni, moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni, etumbi bandako batonga makasi ya Moabi mpe mito ya bato ya lolendo.
46 Woe to you, O Moab! The people of Chemosh are undone, for your sons are taken into captivity and your daughters into exile. Oh Moabi, mawa na yo ! Bato ya Kemoshi babebisami, bana na yo ya mibali bakangami na bowumbu, mpe bana na yo ya basi bakokende na bowumbu !
47 Yet I will restore the fortunes of Moab in the latter days, declares our Father. Here ends the judgment on Moab. Nzokande, na mikolo ekoya, nakozongisa lokumu ya Moabi, » elobi Yawe. Kosambisama ya Moabi esuki awa.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]