Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Jeremiah 13 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is what our Father said to me: "Go, buy yourself a linen loincloth, put it around your waist, but do not let it touch water." Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kosomba mokaba ya lino mpe lata yango na loketo na yo, kasi kopolisa yango na mayi te. »
2 So I bought the loincloth, as our Father had spoken, and put it around my waist. Boye, nasombaki mokaba, ndenge Yawe atindaki ngai mpe nalataki yango na loketo na ngai.
3 Then the word of our Father came to me a second time: Yawe alobaki na ngai lisusu na mbala ya mibale :
4 "Take the loincloth you bought, the one at your waist, get up, go to the Euphrates, and hide it in a crevice of the rock." « Kamata mokaba oyo osombaki mpe oyo olati na loketo na yo, kende sik’oyo na Perati mpe bomba yango kuna kati na madusu ya mabanga. »
5 So I went and hid it by the Euphrates, as our Father had commanded me. Boye nakendeki kobomba mokaba yango na Perati, ndenge Yawe alobaki na ngai.
6 After many days our Father told me, "Get up, go to the Euphrates, and get the loincloth I told you to hide there." Sima na mikolo ebele, Yawe alobaki na ngai lisusu : « Kende kokamata mokaba oyo nalobaki na yo ete obomba na Perati. »
7 So I went to the Euphrates, dug up the loincloth, and took it from where I'd hidden it. But it was ruined, useless. Nakendeki na Perati, nalukaki mokaba yango epai nabombaki yango ; kasi mokaba yango ebebaki makasi mpe etikalaki lisusu na tina te.
8 Then the word of our Father came to me: Bongo Yawe alobaki na ngai :
9 "This is what our Father says: So I will ruin Judah's pride and Jerusalem's great pride. « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi.
10 This evil people, refusing to hear my words, following their stubborn hearts, chasing other gods to serve and bow to them, will be like this loincloth—useless. Bato oyo bazali bato mabe, bayokaka maloba na Ngai te, bazali mito makasi, batingamaka kosala kolanda baposa ya mitema na bango, mpe balandaka banzambe ya bapaya mpo na kosalela mpe kogumbamela yango ; bakokoma kaka lokola mokaba oyo, mokaba oyo etikali lisusu na tina te.
11 As a loincloth clings to a man's waist, so I made all Israel and all Judah cling to me, declares our Father, to be my people, renown, praise, and glory—but they would not listen. Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. ›
12 "So tell them: the Father of Israel says: Every jar is to be filled with wine. They'll answer, 'Don't we know every jar is to be filled with wine?' Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino. › Mpe soki batuni yo : ‹ Boni, okanisi ete biso toyebi te ete mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino ? ›
13 Then tell them: This is what our Father says: I am about to fill everyone in this land—the kings on David's throne, the priests, the prophets, and all in Jerusalem—with drunkenness. Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi.
14 I'll smash them against each other, parents and children alike, declares our Father. No pity, no sparing, no mercy will stop me from destroying them." Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › »
15 Listen and pay attention; do not be proud, for our Father has spoken. Boyoka malamu mpe bosala keba ! Bosala lolendo te, pamba te ezali Yawe nde alobi.
16 Give glory to your Father before he brings darkness, before your feet stumble on the darkening mountains; you will hope for light, but he will turn it into deep gloom and make it total darkness. Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, liboso ete amemela bino molili, liboso ete makolo na bino ebeta mabaku na bangomba oyo ezipami na molili. Bino bozali kozela pole, kasi Ye akobongola yango molili makasi.
17 But if you will not listen, I will weep in secret because of your pride; my eyes will weep bitterly and stream with tears, because our Father's flock has been taken captive. Soki boyoki te, nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
18 Say to the king and to the queen mother: Humble yourselves and sit down, for your glorious crown has fallen from your head. Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi : « Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi, pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. »
19 The cities of the Negev are shut up, with no one to open them. All Judah is carried into exile, carried away completely. Bingumba ya sude ekokangama, mpe moto moko te akokoka kofungola yango. Bato nyonso ya Yuda bakokende na bowumbu, bango nyonso penza bakokende.
20 Look up and see those who are coming from the north. Where is the flock that was given to you, your beautiful flock? Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala, bato bazali koya wuta na nor ! Wapi bibwele oyo bapesaki yo ete obatela, mpe wapi meme oyo ozalaki kobetela tolo ?
21 What will you say when our Father appoints those you yourself trained as your allies to be your rulers? Will not pains grip you like a woman in labor? Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi na se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki. Okokoma na pasi te lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?
22 And if you ask yourself, "Why have these things happened to me?"—it is because of the greatness of your guilt that your skirts have been stripped off and you have been violated. Mpe soki omituni : « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? » Ezali mpo na ebele ya masumu na yo nde bapasolaki yo bilamba mpe bazokisaki nzoto na yo.
23 Can an Ethiopian change his skin, or a leopard its spots? Then you also could do good—you who are trained to do evil. Boni, moto mwindo akoki solo kobongola poso ya nzoto na ye ? Nkoyi ekoki kolongola penza matono ya poso ya nzoto na yango ? Bokokoka kosala malamu te, bino bato oyo bomesana kosala mabe.
24 I will scatter you like chaff that the desert wind blows away. « Nakopanza bino lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ya esobe ememaka.
25 This is your lot, the portion I have measured out to you, declares our Father, because you have forgotten me and trusted in lies. Yango nde etumbu na yo, mbano oyo nakatelaki yo, » elobi Yawe, « pamba te bobosanaki Ngai mpe botiaki mitema epai ya banzambe ya lokuta.
26 "So I myself will pull your skirts up over your face, and your shame will be seen. Nakotombola yo bilamba kino na elongi mpo ete bato bamona bolumbu na yo.
27 Your adulteries, your lustful neighings, your shameless prostitution—on the hills and in the open field I have seen your detestable acts. Woe to you, Jerusalem! How long until you are made clean?" Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]