Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 44 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then he told his house steward: "Fill the men's sacks with food, as much as they can carry, and put each man's silver at his sack's opening. Jozefi apesaki mitindo epai ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Tondisa biloko ya kolia na basaki ya bato oyo kolanda kilo oyo bakoki komema mpe tia mbongo ya moko na moko na moto ya saki na ye.
2 Put my cup, the silver cup, in the mouth of the youngest's sack, with his grain money." He did as Joseph said. Okotia kopo na ngai oyo ya palata na moto ya saki ya leki na bango ya suka elongo na mbongo na ye ya ble. » Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye.
3 As soon as the morning was light, the men were sent away with their donkeys. Na tongo-tongo, batikaki bandeko ya Jozefi kozonga elongo na ba-ane na bango.
4 They had left the city, not yet far off, when Joseph told his steward, "Chase down the men. When you catch them, ask, 'Why have you repaid evil for good? Wana babimaki na engumba, bamikomelaki nanu mosika te, Jozefi alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Telema, landa bato wana ! Mpe tango okokanga bango, tuna bango : mpo na nini bozongisi mabe na malamu ?
5 Isn't this the cup my lord drinks from and uses for fortune-telling? What you've done is evil.'" Mpo na nini boyibi kopo oyo nkolo na ngai amelelaka mayi mpe asalelaka mpo na koyeba makambo oyo ekoya ? Likambo oyo bosali ezali penza mabe. »
6 When he overtook them, he spoke these words to them. Mokambi ya ndako ya Jozefi akangaki bango mpe alobelaki bango lolenge nkolo na ye atindaki ye.
7 They said, "Why does my lord say such things? Your servants would never do such a thing. Kasi bazongiselaki ye : — Mpo na nini nkolo na biso alobi makambo ya boye ? Basali na yo bakoki kosala makambo ya boye te.
8 Look, we brought back to you from Canaan the silver we found in our sacks' openings. How could we steal silver or gold from your master's house? Tomemelaki yo mbongo oyo tomonaki tango tofungolaki basaki na biso wuta na mokili ya Kanana. Ndenge nini tokoki lisusu koyiba wolo to palata kati na ndako ya nkolo na yo ?
9 Whichever of your servants it's found with will die, and we'll become my lord's slaves too." Soki moko kati na basali na yo amonani ete azali na yango, akokufa ; mpe biso bamosusu oyo totikali, tokokoma bawumbu ya nkolo na biso.
10 He said, "Good—let it be as you say. Whoever has it will be my slave; the rest of you are innocent." Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi alobaki : — Malamu mingi ! Tika ete ezala ndenge bolobi ! Moto oyo akomonana ete azali na yango, akokoma mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bokozala na likambo te.
11 Then each man quickly lowered his sack to the ground, and each man opened his sack. Moko na moko akitisaki saki na ye na lombangu na mabele mpe afungolaki yango.
12 He searched, starting with the oldest, ending with the youngest—the cup was found in Benjamin's sack. Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Jozefi abandaki koluka kobanda na kulutu kino na leki. Mpe kopo emonanaki na saki ya Benjame.
13 Then they tore their clothes, and every man loaded his donkey, and they returned to the city. Tango bamonaki bongo, bapasolaki bilamba na bango ; bazongisaki biloko na ba-ane na bango mpe bazongaki bango nyonso na engumba.
14 When Judah and his brothers reached Joseph's house, he was still there, and they fell to the ground before him. Jozefi azalaki kaka na ndako. Tango Yuda na bandeko na ye ya mibali bakotaki na ndako, bagumbamaki kino na se liboso na ye.
15 Joseph said to them, "What have you done? Don't you know a man like me surely tells fortunes?" Jozefi alobaki na bango : — Likambo nini oyo bosali ? Boyebi te ete moto lokola ngai nazali na makoki ya komona makambo na bosoloka ?
16 Judah said, "What can we say to my lord? What can we speak? How can we clear ourselves? Our Father has found your servants' guilt. Look—we are my lord's slaves, both we and the one in whose hand the cup was found." Yuda azongisaki : — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.
17 But he said, "I could never do this. Only the man in whose hand the cup was found will be my slave. The rest of you, go back to your father in peace." Kasi Jozefi alobaki : — Nakoki kosala likambo ya boye te ! Kaka moto oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye nde akozala mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bozonga na kimia epai ya tata na bino.
18 Then Judah stepped forward and said, "Please, my lord, let your servant speak a word to you. Don't be angry with your servant, for you are like Pharaoh himself. Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali.
19 My lord asked his servants, saying, 'Do you have a father or a brother?' Nkolo na ngai atunaki basali na ye : « Bozali na tata to na ndeko mosusu ya mobali ? »
20 We said to my lord, 'We have an old father, and a young son born late in life. His brother is dead; he alone is left of his mother's children, and his father loves him.' Tozongiselaki nkolo na ngai : « Tozali na tata oyo akomi mobange mpe ndeko mobali ya leki oyo babotelaki tata na biso na kimobange. Ndeko na ye ya mobali akufa mpe atikala kaka ye moko mwana mobali na libumu ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mingi. »
21 Then you told your servants, 'Bring him down to me so I can see him myself.' Bongo olobaki na basali na yo : « Bomemela ngai ye mpo ete nakoka komona ye na miso na ngai. »
22 We told my lord, 'The boy can't leave his father, because if he does, his father will die.' Tozongiselaki nkolo na ngai : « Elenge mobali akoki kotika tata na ye te ; soki atiki ye, tata na ye akokufa. »
23 You told your servants, 'If your youngest brother doesn't come down with you, you won't see my face again.' Kasi olobaki na basali na yo : « Soki leki na bino ya mobali ayei elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. »
24 When we went back to my father, your servant, we told him what you had said. Tango tozongaki epai ya mosali na yo, tata na ngai, toyebisaki ye makambo nyonso oyo nkolo na ngai alobaki.
25 And when our father said, 'Go again, buy us a little food,' Bongo tata na biso alobaki : « Bozonga mpe bosomba ndambo ya biloko ya kolia. »
26 we said, 'We can't go down. If our youngest brother comes with us, then we will go. For we can't see the man's face unless our youngest brother is with us.' Kasi tozongisaki : « Tokoki kokende te. Tokokende kaka soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso. Tokoki komona elongi ya moto wana te soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso te. »
27 Then your servant my father said to us, 'You know that my wife bore me two sons. Mosali na yo, tata na biso, alobaki na biso : « Boyebi ete mwasi na ngai, Rasheli, abotelaki ngai bana mibale ya mibali.
28 One left me, and I said, "Surely torn to pieces"; I haven't seen him since. Moko na bango akenda mosika na ngai. Nakanisi ete ezali ya solo, nyama moko ya mabe esila kolia ye. Banda tango wana, natikala komona ye lisusu te.
29 If you take this one too from me, and harm meets him, you'll bring my gray head down to the grave in grief. Soki bozwi ngai lisusu mwana oyo mpe soki likama ekweyeli ye, bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai. »
30 So when I come to your servant, my father, and the boy isn't with us, his life is bound to the boy's life, Sik’oyo, soki elenge mobali azali elongo na biso te tango nakozonga epai ya tata na ngai, mosali na yo, mpe soki tata na ngai, oyo motema na ye ekangama makasi na motema ya elenge mobali oyo,
31 when he sees the boy is gone, he'll die, and your servants will bring your servant our father down to the grave in sorrow.' amoni ete elenge mobali azali elongo na biso te, wana akokufa. Basali na yo bakoboma tata na biso na pasi na kimobange na ye.
32 For your servant guaranteed the boy to my father, saying, 'If I don't bring him back to you, I'll bear the guilt before my father all my life.' Pamba te ngai mosali na yo, nandimaki, na miso ya tata na ngai, kobatela elenge mobali oyo. Nalobaki : « Soki nazongiseli yo ye te, nakozala na ngambo liboso na yo tata na ngai, bomoi na ngai mobimba. »
33 So please, let your servant stay as my lord's slave instead of the boy, and let the boy return with his brothers. Yango wana sik’oyo, nabondeli yo, tika ete mosali na yo akoma mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali oyo mpe tika ete elenge mobali azonga elongo na bandeko na ye ya mibali.
34 How can I return to my father without the boy? I could not bear to see the disaster that would strike my father." Ndenge nini nakoki kozonga epai ya tata na ngai soki elenge mobali azali elongo na ngai te ? Kotika te ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]