Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 42 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When Jacob saw grain was in Egypt, Jacob said to his sons, "Why do you stare at each other?" Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, alobaki na bana na ye ya mibali : « Mpo na nini bozali kotalana bino na bino ?
2 He said, "Look, I've heard there's grain in Egypt. Go down and buy some for us from there, so we live and don't die." Nayoki ete ble ezali na Ejipito. Bokende kuna mpe bosomba ndambo mpo na biso mpo ete towumela na bomoi mpe tokufa te na nzala. »
3 So ten of Joseph's brothers went down to buy grain from Egypt. Bandeko mibali zomi ya Jozefi bakendeki na Ejipito mpo na kosomba ble.
4 But Jacob would not send Joseph's brother Benjamin with them, fearing harm might come to him. Kasi Jakobi atikaki te Benjame, ndeko ya Jozefi ya mobali, ete akende elongo na bango, pamba te azalaki kobanga ete likama ekweyela ye.
5 Israel's sons came to buy grain among the others who came, since famine was in the land of Canaan. Kati na bato oyo bakendeki kosomba ble na Ejipito, bana mibali ya Isalaele mpe bazalaki ; pamba te nzala makasi ekotaki mpe na mokili ya Kanana.
6 Joseph was ruler over the land, selling grain to all its people. Joseph's brothers came and bowed to him, faces to the ground. Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se.
7 Joseph saw and recognized his brothers, but acted like a stranger and spoke harshly: "Where are you from?" "From Canaan," they said, "to buy food." Tango kaka Jozefi amonaki bango, asosolaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi asalaki lokola nde azali mopaya liboso na bango mpe azalaki na maloba makasi epai na bango. Atunaki bango : — Bowuti wapi ? Bazongisaki : — Towuti na mokili ya Kanana ; toyei nde kosomba biloko ya kolia.
8 Joseph recognized his brothers, but they did not recognize him. Atako Jozefi asosolaki ete bazali bandeko na ye, kasi bango basosolaki ye te.
9 Then Joseph remembered the dreams he'd dreamed about them and said to them, "You are spies! You have come to see the land's vulnerable parts." Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango : — Bino bozali penza banongi ! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te !
10 But they said to him, "No, my lord, your servants have come to buy food. Bazongisaki : — Te nkolo na ngai, basali na yo bayei nde kosomba biloko ya kolia.
11 We are all sons of one man; we are honest men. Your servants have never been spies." Tozali biso nyonso bana ya moto moko. Basali na yo bazali bato ya sembo, kasi bazali banongi te.
12 But he said to them, "No, you have come to find the vulnerable parts of the land." Alobaki na bango : — Te ! Boyei na mokili na biso mpo na kotala bisika oyo ebatelami malamu te !
13 They said, "Your servants are twelve brothers, sons of one man in the land of Canaan. The youngest is with our father today, and one is gone." Kasi bango bazongisaki : — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale ; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te.
14 Joseph said to them, "It is just as I said to you: you are spies. Kasi Jozefi alobaki na bango : — Ezali ndenge kaka nalobaki na bino : bozali banongi.
15 By this you will be tested: as Pharaoh lives, you won't leave here unless your youngest brother comes. Tala ndenge nakomeka bino : Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te !
16 Send one of you to bring your brother while the rest of you stay confined, so your words can be tested, whether there is truth in you. If not, as Pharaoh lives, surely you are spies." Botinda moko kati na bino ete akende kozwa ndeko na bino ya mobali ; mpe bino oyo bokotikala, bokozala na boloko mpo na komeka maloba na bino mpe kotala soki bolobi solo. Soki te, na kombo ya Faraon, bozali banongi !
17 And he put them all together in custody for three days. Atiaki bango nyonso na boloko mikolo misato.
18 On the third day Joseph said to them, "Do this and live, for I fear our Father. Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango : — Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi.
19 If you are honest, let one of your brothers stay here in custody, while the rest go, bringing grain for your households' famine. Soki bozali bato ya sembo, tika ete moko kati na bino atikala awa kati na boloko ; bongo bino bamosusu bokende, bomema ble oyo esengeli mpo na mabota na bino, oyo ezali na nzala makasi.
20 Bring your youngest brother to me, so your words are confirmed and you won't die." And they did so. Kasi bomemela ngai leki na bino ya suka. Yango ekolakisa ete bolobaki solo mpe bokokufa te. Basalaki bongo.
21 Then they said to each other, "Truly we are guilty over our brother, for we saw his soul's distress when he begged us and we wouldn't listen. That's why this distress has come on us." Balobanaki bango na bango : — Solo, tozwi etumbu mpo na makambo oyo tosalaki ndeko na biso ; pamba te tomonaki pasi na ye tango azalaki kobondela biso, kasi toyokaki ye te. Yango wana pasi oyo ekomeli biso.
22 Reuben answered them, "Didn't I tell you not to sin against the boy? You wouldn't listen. Now his blood is required." Ribeni alobaki na bango : — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye !
23 They did not know that Joseph understood them, for there was an interpreter between them. Bayebaki te ete Jozefi akokaki kososola maloba na bango, mpo ete azalaki kosalela molimboli mpo na kosolola na bango.
24 He turned away from them and wept, then returned and spoke with them. He took Simeon from them and bound him before their eyes. Jozefi apesaki mokongo, apusanaki mosika mpe abandaki kolela. Bongo azongelaki bango mpe asololaki lisusu na bango. Azwaki Simeoni kati na bango mpe akangaki ye na miso na bango.
25 Joseph ordered their bags filled with grain, each man's silver returned to his sack, and provisions given for the journey. So it was done for them. Jozefi apesaki mitindo ete batondisa ble na basaki na bango, bazongisa mbongo ya moto na moto na saki na ye mpe bapesa bango bilei mpo na nzela. Esalemelaki bango bongo.
26 Then they loaded their grain on their donkeys and departed from there. Batiaki ble na bango likolo ya ba-ane na bango mpe bakendeki.
27 At the lodging place, one opened his sack to feed his donkey and saw his silver there in the sack's mouth. Na esika oyo batelamaki mpo na kolekisa butu, moko na bango afungolaki saki na ye mpo na koleisa ane na ye mpe amonaki mbongo na ye na moto ya saki na ye.
28 He said to his brothers, "My silver was returned—look, it's in my sack!" Their hearts sank; trembling, they said to each other, "What has our Father done to us?" Ayebisaki bandeko na ye : — Bazongiseli ngai mbongo na ngai, tala yango oyo na saki na ngai ! Mitema na bango ebetaki mpe babandaki kolenga, balobanaki bango na bango : — Likambo nini oyo Nzambe asali biso !
29 They came to Jacob their father in the land of Canaan and told him everything that had happened to them: Tango bakomaki epai ya tata na bango Jakobi na mokili ya Kanana, bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango. Balobaki :
30 "The man, lord of the land, spoke harshly to us and treated us as spies of the land. — Moto oyo azali mokonzi ya mokili alobelaki biso na maloba makasi. Azwaki biso lokola banongi.
31 But we said to him, 'We are honest men; we are never spies. Kasi tolobaki na ye : « Tozali bato ya sembo, tozali banongi te.
32 We are twelve brothers, sons of our father. One is gone; the youngest is now with our father in the land of Canaan.' Tozalaki bandeko mibali zomi na mibale, bana ya tata moko. Moko azalaka lisusu te mpe oyo ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, na mokili ya Kanana. »
33 The man, lord of the land, told us, 'This is how I'll know you're honest: leave one brother with me, take grain against your households' famine, and go.' Na boye, moto oyo azali mokonzi ya mokili azongiselaki biso : « Tala lolenge nakoyeba ete bozali bato ya sembo : ‹ Botikela ngai awa ndeko moko kati na bino. Bozwa biloko ya kolia oyo esengeli mpo na mabota na bino oyo ezali na nzala makasi mpe bokende.
34 Bring me your youngest brother, and I'll know you're not spies but honest men. I'll give your brother back, and you may trade in the land." Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo ; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › »
35 As they emptied their sacks, each found his silver bundle in his sack. Seeing their silver bundles, they and their father were afraid. Tango bafungolaki basaki na bango, moko na moko amonaki mbongo na ye na saki. Bango na tata na bango bamonaki mbongo mpe bango nyonso babangaki.
36 Their father Jacob said to them, "You've left me childless: Joseph is gone, Simeon is gone, and now you'd take Benjamin. It's all against me!" Tata na bango Jakobi alobaki na bango : — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai !
37 Reuben said to his father, "You may kill my two sons if I don't bring him back to you. Put him in my hands, and I will bring him back to you." Ribeni alobaki na tata na ye : — Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali.
38 He said, "My son will not go down with you, for his brother is dead, and he alone remains. Should harm meet him on the journey you're taking, you would carry my gray head down to the grave in grief." Jakobi azongisaki : — Te ! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa ; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai !
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]