Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 36 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 This is the family record of Esau (that is, Edom). Tala libota ya Ezawu oyo azali Edomi.
2 Esau took his wives from the daughters of Canaan: Adah daughter of Elon the Hittite, and Oholibamah daughter of Anah, daughter of Zibeon the Hivite, Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana : Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti ; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi ;
3 and Basemath the daughter of Ishmael, the sister of Nebaioth. mpe Basimati, mwana mwasi ya Isimaeli mpe ndeko mwasi ya Nebayoti.
4 Adah gave birth to Eliphaz for Esau, and Basemath gave birth to Reuel, Ada abotelaki Ezawu Elifazi ; mpe Basimati abotelaki ye Reweli.
5 Oholibamah bore Jeush, Jalam, and Korah—Esau's sons, born to him in the land of Canaan. Olibama abotaki Yewushi, Yaelami mpe Kora. Bango nde bana mibali oyo babotelaki Ezawu na mokili ya Kanana.
6 Esau took his wives, sons, daughters, all his household, his livestock, all his animals, and all the property he had gained in Canaan, and moved to a land away from his brother Jacob. Ezawu azwaki basi na ye, bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi, bato nyonso ya ndako na ye mpe bibwele na ye, banyama na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki na mokili ya Kanana, akendeki na mokili mosusu, mosika ya ndeko na ye Jakobi.
7 Their possessions were too great to live together; the land where they stayed couldn't support them both because of their livestock. Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango.
8 So Esau settled in the hill country of Seir. (Esau is Edom.). Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri.
9 These are the records of Esau, father of the Edomites, in the hill country of Seir. Tala libota ya Ezawu, koko ya bato ya Edomi, na ngomba Seiri :
10 These are the names of Esau's sons: Eliphaz son of Adah, Esau's wife; Reuel son of Basemath, Esau's wife. Tala bakombo ya bana mibali ya Ezawu : Elifazi, mwana mobali ya Ada, mwasi ya Ezawu ; mpe Reweli, mwana mobali ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
11 The sons of Eliphaz were Teman, Omar, Zepho, Gatam, and Kenaz. Bana mibali ya Elifazi : Temani, Omari, Tsefo, Gaetami mpe Kenazi.
12 Timna, concubine of Esau's son Eliphaz, bore him Amalek. These were sons of Esau's wife Adah. Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina ; » Timina abotelaki ye Amaleki. Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu.
13 These are Reuel's sons: Nahath, Zerah, Shammah, Mizzah. These are the sons of Esau's wife Basemath. Bana mibali ya Reweli : Naati, Zera, Shama mpe Miza. Bango nde bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
14 These are the sons of Esau's wife Oholibamah, daughter of Anah, daughter of Zibeon: she bore Jeush, Jalam, and Korah to Esau. Tala bana mibali oyo Olibama, mwasi ya Ezawu, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, abotelaki Ezawu : Yewushi, Yaelami mpe Kora.
15 These are the chiefs of Esau's sons. The sons of Eliphaz, Esau's firstborn: chief Teman, chief Omar, chief Zepho, chief Kenaz. Tala bakonzi ya mabota ya bana mibali ya Ezawu : Bana ya Elifazi, mwana liboso ya Ezawu : mokonzi Temani, mokonzi Omari, mokonzi Tsefo, mokonzi Kenazi,
16 Chief Korah, chief Gatam, chief Amalek—these are Eliphaz's chiefs in the land of Edom; these were Adah's sons. mokonzi Kora, mokonzi Gaetami mpe mokonzi Amaleki. Bango nde bakonzi ya libota ya Elifazi, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Ada.
17 These are the sons of Reuel, Esau's son: chief Nahath, chief Zerah, chief Shammah, chief Mizzah. These are Reuel's chiefs in the land of Edom. These are the sons of Basemath, Esau's wife. Bana mibali ya Reweli, mwana mobali ya Ezawu : mokonzi Naati, mokonzi Zera, mokonzi Shama mpe mokonzi Miza. Bango nde bakonzi ya libota ya Reweli, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
18 Sons of Esau's wife Oholibamah: chief Jeush, chief Jalam, chief Korah. These are the chiefs of Esau's wife Oholibamah, daughter of Anah. Bana mibali ya Olibama, mwasi ya Ezawu : mokonzi Yewushi, mokonzi Yaelami mpe mokonzi Kora. Bango nde bakonzi ya libota ya Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe mwasi ya Ezawu.
19 These are the sons of Esau (that is, Edom), and these are their chiefs. Bango nde bazalaki bana mibali ya Ezawu oyo azali Edomi, mpe bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Edomi.
20 These are the sons of Seir the Horite, who lived in the land: Lotan, Shobal, Zibeon, Anah, Tala bakitani ya Seiri, moto ya Ori, bato ya liboso oyo bavandaki na mokili yango : Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana,
21 Dishon, Ezer, and Dishan—chiefs of the Horites, sons of Seir, in Edom's land. Dishoni, Etseri mpe Dishani. Bango nde bakonzi ya libota ya Ori, mwana mobali ya Seiri, na mokili ya Edomi.
22 The sons of Lotan were Hori and Hemam, and Lotan's sister was Timna. Bana mibali ya Lotani : Ori mpe Emami. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani.
23 These are the sons of Shobal: Alvan, Manahath, Ebal, Shepho, and Onam. Bana mibali ya Shobali : Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami.
24 These are Zibeon's sons: Aiah and Anah. This is the Anah who found hot springs in the wilderness while tending his father Zibeon's donkeys. Bana mibali ya Tsibeoni : Aya mpe Ana. Ezali Ana nde amonaki maziba ya mayi kati na esobe tango azalaki koleisa ba-ane ya Tsibeoni, tata na ye.
25 These are the children of Anah: Dishon, and Oholibamah the daughter of Anah. Bana ya Ana : Dishoni, mwana na ye ya mobali ; mpe Olibama, mwana na ye ya mwasi.
26 These are the sons of Dishon: Hemdan, Eshban, Ithran, and Cheran. Bana mibali ya Dishoni : Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani.
27 These are the sons of Ezer: Bilhan, Zaavan, and Akan. Tala bana mibali ya Etseri : Bilani, Zavani mpe Akani.
28 These are the sons of Dishan: Uz and Aran. Bana mibali ya Dishani : Utsi mpe Arani.
29 These are the chiefs of the Horites: chief Lotan, chief Shobal, chief Zibeon, chief Anah, Tala bakonzi ya mabota ya Ori : mokonzi Lotani, mokonzi Shobali, mokonzi Tsibeoni, mokonzi Ana,
30 chief Dishon, chief Ezer, chief Dishan—chiefs of the Horites, clan by clan, in the land of Seir. mokonzi Dishoni, mokonzi Etseri mpe mokonzi Dishani. Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Ori, na mokili ya Seiri.
31 These are the kings who ruled in the land of Edom before any king ruled over the Israelites: Tala bakonzi oyo bakonzaki kati na Edomi liboso ete bana ya Isalaele bazwa mokonzi :
32 Bela the son of Beor reigned in Edom, and the name of his city was Dinhabah. Bela, mwana mobali ya Beori, akomaki mokonzi ya Edomi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. »
33 When Bela died, Jobab the son of Zerah from Bozrah reigned in his place. Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.
34 When Jobab died, Husham from the land of the Temanites reigned in his place. Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.
35 Husham died; Hadad son of Bedad, who defeated Midian in the territory of Moab, reigned in his place. His city was named Avith. Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi oyo alongaki Madiani na bilanga ya Moabi, akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki Aviti.
36 When Hadad died, Samlah from Masrekah reigned in his place. Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi.
37 When Samlah died, Shaul from Rehoboth on the Euphrates reigned in his place. Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi.
38 When Shaul died, Baal-hanan the son of Achbor reigned in his place. Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.
39 When Baal-hanan son of Achbor died, Hadar reigned in his place; his city's name was Pau, and his wife's name was Mehetabel, daughter of Matred, daughter of Mezahab. Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi.
40 These are Esau's chiefs, by clan, by place, by name: chief Timna, chief Alvah, chief Jetheth. Tala bato oyo bazalaki bakonzi ya mabota ya Ezawu kolanda mabota ya botata, bisika oyo bazalaki kovanda mpe bakombo na bango : Timina, Aliva, Yeteti,
41 Chief Oholibamah, chief Elah, chief Pinon, Olibama, Ela, Pinoni,
42 chief Kenaz, chief Teman, chief Mibzar, Kenazi, Temani, Mibitsari,
43 chief Magdiel, and chief Iram. These are Edom's chiefs, by their settlements in the land they held. Esau was father of the Edomites. Magidieli mpe Irami. Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi kolanda bituka na bango, kati na mokili oyo bazalaki kovanda. Ezawu azalaki koko ya bato ya Edomi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]