Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 29 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Then Jacob continued on his journey and came to the land of the eastern peoples. Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este.
2 He saw a well in the field, with three flocks lying beside it, since that well watered the flocks, and a large stone lay over its mouth. Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu.
3 There all the flocks would gather; shepherds rolled the stone off the well's mouth, watered the sheep, then returned the stone to its place over the well's mouth. Tango bibwele nyonso ezalaki kosangana wana, babateli bibwele bazalaki kolongola libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe komelisa bameme. Mpe na sima, bazalaki kozongisa libanga na esika na yango, na monoko ya libulu.
4 Jacob said to them, "My brothers, where are you from?" "We are from Haran," they replied. Jakobi atunaki babateli bibwele : — Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi ? Bazongisaki : — Towuti na Arani.
5 He asked them, "Do you know Laban, the son of Nahor?" "We know him," they answered. Atunaki bango lisusu : — Boyebi Labani, koko ya Naori ? Bazongisaki : — Iyo, toyebi ye.
6 Then he asked, "Is he well?" "He is well," they said. "Look—his daughter Rachel comes with the sheep." Jakobi abakisaki lisusu : — Boni, azali malamu ? Bazongisaki : — Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme.
7 "Look," Jacob said, "the day is still high, too soon to gather the herds. Water the sheep, then go graze them." Kasi Jakobi alobaki : — Tala, moyi ezali nanu makasi ; tango ekoki nanu te mpo na kozongisa bibwele. Bomelisa bameme mpe bozonga lisusu koleisa yango matiti.
8 "We can't," they said, "until all the flocks gather and the stone is rolled off the well's mouth. Then we'll water the sheep." Bazongisaki : — Tokoki kosala yango kaka soki bibwele nyonso esangani ; bongo tokolongola libanga na monoko ya libulu mpe tokomelisa bameme mayi.
9 While Jacob was still speaking with them, Rachel came with her father's flock, for she tended it. Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele.
10 When Jacob saw Rachel, daughter of Laban his mother's brother, and sheep of Laban his mother's brother, he approached, rolled the stone from the well's mouth, and watered the sheep of Laban his mother's brother. Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi.
11 Then Jacob kissed Rachel and wept aloud. Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi.
12 Jacob told Rachel he was her father's relative, Rebekah's son. She ran and told her father. Jakobi ayebisaki Rasheli : « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye.
13 As soon as Laban heard the news about Jacob his sister's son, he ran to meet him, hugged and kissed him, and brought him home. Jacob told Laban everything that had happened. Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki.
14 Laban said to him, "You are indeed my bone and flesh." So Jacob stayed with him a full month. Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.
15 Laban said to Jacob, "Should you serve me for free just because you're my relative? Tell me—what should your wages be?" Labani alobaki na Jakobi : — Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai ? Yebisa ngai : olingi ete lifuti na yo ezala nini ?
16 Now Laban had two daughters. The older was named Leah, and the younger was named Rachel. Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo : Lea mpe leki na ye Rasheli.
17 Leah's eyes were dull, but Rachel was lovely in form and beautiful to look at. Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko.
18 Jacob loved Rachel and said, "I'll serve you seven years for your younger daughter Rachel." Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki : — Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai.
19 Laban said, "Better that I give her to you than to another man. Stay here with me." Labani alobaki : — Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai.
20 Jacob served seven years for Rachel; they felt like only a few days because he loved her. Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli.
21 Jacob said to Laban, "Give me my wife—my time is complete—so I can go in to her." Sima, Jakobi alobaki na Labani : — Mikolo na ngai ekoki ; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye.
22 So Laban gathered together all the men of the place and made a feast. Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti.
23 That evening he brought his daughter Leah to Jacob, and he was intimate with her. Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto.
24 And Laban gave his servant Zilpah to his daughter Leah as her servant. Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.
25 In the morning—it was Leah! Jacob said to Laban, "What have you done to me? Didn't I serve you for Rachel? Why did you deceive me?" Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani : — Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ?
26 Laban replied, "It's not the custom here to give the younger before the firstborn. Labani azongisaki : — Na bokoko na biso awa, topesaka te leki na libala liboso ya kulutu.
27 Finish this one's bridal week, then we'll give you the other too—for another seven years of work." Silisa nanu poso ya babalani elongo na ye. Bongo sima, oyo ya leki mpe akopesamela yo soki osaleli ngai lisusu mibu sambo.
28 Jacob did this, completed her week, and Laban gave him his daughter Rachel as his wife. Jakobi asalaki bongo : asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye.
29 And Laban gave his servant Bilhah to his daughter Rachel as her servant. Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.
30 Jacob slept with Rachel too, and loved her more than Leah. He served Laban seven more years. Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo.
31 When our Father saw that Leah was unloved, he opened her womb; but Rachel was barren. Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te.
32 Leah conceived and bore a son, and named him Reuben, for she said, "Our Father has seen my suffering; surely now my husband will love me." Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. »
33 She conceived again, bore a son, and said, "Because our Father heard I was unloved, he gave me this one too." So she named him Simeon. Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. »
34 She conceived again and bore a son, and said, "This time my husband will be joined to me, since I have borne him three sons." So he was named Levi. Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, pamba te naboteli ye bana mibali misato. » Boye bapesaki ye kombo « Levi. »
35 She conceived again and bore a son, and said, "This time I will praise our Father." So she named him Judah. Then she stopped bearing children. Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]