Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Genesis 24 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Now Abraham was old, well advanced in years, and our Father had blessed Abraham in everything. Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso.
2 Abraham said to his oldest servant, who managed all he owned, "Please put your hand under my thigh, Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso : — Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai
3 I will have you swear by the Father of heaven and earth, not to take a wife for my son from the Canaanites' daughters, among whom I live, mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.
4 but go to my country and relatives, and get a wife for my son Isaac." Kasi okokende na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okozwa mwasi moko mpo na Izaki, mwana na ngai ya mobali.
5 The servant asked him, "What if the woman won't follow me to this land? Must I take your son back to the land you left?" Mosali atunaki ye : — Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta ?
6 Abraham said to him, "See to it that you do not take my son back there. Abrayami alobaki : — Keba na yo ! Kozongisa mwana na ngai kuna te.
7 Our Father, the Father of heaven, who took me from my father's house and the land of my relatives, who spoke to me and swore to me, 'I will give this land to your offspring'—he will send his angel ahead of you, and you will take a wife for my son from there. Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana.
8 But if she won't follow you, you're released from this oath of mine; only don't take my son back there." Soki mwasi yango aboyi na ye kolanda yo, wana okangolami na ndayi oyo nazali kosenga yo kolapa. Kasi komeka kozongisa mwana na ngai ya mobali kuna te.
9 The servant put his hand under Abraham his master's thigh and swore to him about this. Boye, mosali atiaki loboko na se ya mopende ya Abrayami, nkolo na ye, alapaki ndayi ya kosala makambo yango.
10 The servant took ten of his master's camels, and all his master's good things in hand, and set out for Aram-naharaim, the city of Nahor. Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.
11 He had the camels kneel outside the city by the water well at evening, when women go out to draw water. Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.
12 Then he prayed, "Father of my master Abraham, please grant me success today, and show your faithful love to my master Abraham. Abondelaki : « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai.
13 Here I stand by the spring of water, and daughters of the town's men are coming out to draw water. Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi.
14 Let the young woman I say this to—'Please tip your jar so I may drink'—and who answers, 'Drink, and I will water your camels too'—be the one you have appointed for your servant Isaac. That is how I will know you have shown faithful love to my master." Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. »
15 Before he finished speaking, Rebekah came out—daughter of Bethuel, son of Milcah, wife of Nahor, Abraham's brother—her jar on her shoulder. Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami.
16 The girl was very beautiful, a virgin no man had known. She went down to the spring, filled her jar, and came up. Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te ; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki.
17 The servant ran to meet her, saying, "Please let me sip a little water from your jar." Mosali akimaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe alobaki : — Nabondeli yo, tika ngai namela ndambo ya mayi na mbeki na yo.
18 "Drink, my lord," she said, and quickly lowered her jar from her shoulder and gave him a drink. Mwana mwasi alobaki : — Mela na yo, nkolo na ngai ! Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela.
19 When she finished giving him a drink, she said, "I'll draw water for your camels too, until they finish drinking." Sima na kopesa ye mayi ya komela, alobaki : — Nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo nyonso kino ekosilisa komela.
20 She quickly emptied her jar into the trough, ran again to the well, and drew water for all his camels. Asalaki na lombangu mpe asopaki mayi nyonso ya mbeki na ye na esika oyo banyama emelelaka mayi ; akimaki lisusu na libulu mpe atokaki mayi mpo na bashamo na ye nyonso.
21 The man watched her silently, to know if our Father made his journey succeed, or not. Mosali azalaki kotala ye na bokebi, alobaki eloko moko te mpo na koyeba soki Yawe alongisi mobembo na ye to te.
22 When the camels finished drinking, the man took a gold nose ring weighing about a fifth of an ounce, and two gold bracelets for her wrists weighing about four ounces, Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo : moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko.
23 and said, "Whose daughter are you? Please tell me, is there room in your father's house for us to spend the night?" Atunaki ye : — Ozali mwana mwasi ya nani ? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu ?
24 She answered him, "I am the daughter of Bethuel, the son Milcah bore to Nahor." Azongiselaki ye : — Nazali mwana ya Betweli, mwana mobali ya Milika mpe Naori.
25 She also said, "We have plenty of both straw and feed, and room to spend the night." Abakisaki : — Tozali na matiti mpe biloko ebele ya koleisa bibwele ; tozali mpe na esika mpo na yo mpo ete olekisa butu.
26 Then the man bowed down and worshiped our Father. Boye, mosali akitisaki moto na ye na se mpe agumbamelaki Yawe.
27 He said, "Blessed be our Father, the Father of my master Abraham, who has not abandoned his faithful love and faithfulness toward my master. As for me, he led me on the journey to my master's relatives' house." Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! »
28 Then the young woman ran and told her mother's household about these things. Elenge mwasi akimaki mbangu na ndako mpe alobaki epai ya mama na ye makambo oyo elekaki.
29 Now Rebekah had a brother named Laban, and Laban ran out to the man at the spring. Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi.
30 Seeing the nose ring and bracelets on his sister's wrists, and hearing his sister Rebekah say, "The man told me this," he went out to the man—there he was, standing by the camels at the spring. Tango kaka amonaki lopete oyo batiaki na zolo mpe basheneti na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, mpe ayokaki Rebeka koloba makambo oyo mosali alobaki mpo na ye, akendeki epai ya mosali mpo ete amonaki ye ya kotelema pene ya bashamo, pembeni ya libulu ya mayi.
31 He said, "Come in, blessed of God. Why stand outside? I've prepared the house and a place for the camels." Alobaki : « Yaka na ndako na biso, yo oyo opambolama na Yawe. Mpo na nini otelemi awa na libanda ? Nabongisi ndako mpe esika mpo na bashamo. »
32 The man entered the house, and the camels were unloaded. Straw and feed were given to the camels, and water to wash his feet and the feet of the men with him. Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo.
33 Food was set before him, but he said, "I won't eat until I've said what I have to say." "Go on," said Laban. Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki : — Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango. Labani alobaki na ye : — Yebisa biso makambo yango.
34 So he said, "I am Abraham's servant. Azongisaki : — Nazali mosali ya Abrayami.
35 Our Father has greatly blessed my master and made him wealthy, giving him flocks, herds, silver, gold, male and female servants, camels, and donkeys. Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.
36 Sarah, my master's wife, bore him a son in her old age; Abraham has given Isaac all he owns. Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, mpe nkolo na ngai apesaki biloko na ye nyonso epai ya mwana yango.
37 My master made me swear, 'Don't take a wife for my son from the Canaanite women whose land I live in, Nzokande, nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi na maloba oyo : « Kati na bana basi ya Kanana epai wapi nazali kovanda, okozwela mwana na ngai mwasi awa te.
38 but go to my father's house, to my relatives, and take a wife for my son.' Kasi okokende na libota ya tata na ngai mpe na ekolo na ngai, kuna nde okozwa mwasi mpo na mwana na ngai ya mobali. »
39 I said to my master, 'Perhaps the woman will not follow me.' Nazongiselaki nkolo na ngai : « Tango mosusu, mwasi yango akolinga na ye kolanda ngai te. »
40 But he said to me, 'Our Father, before whom I have walked, will send his angel with you and make your journey succeed, and you will take a wife for my son from my clan and from my father's house. Mpe ye alobaki na ngai lisusu : « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai.
41 Then you'll be free of my oath once you reach my family; if they refuse to give her to you, you'll be free of my oath.' Boye tango okokende na ekolo na ngai, soki baboyi kopesa yo ye, okozala na ngambo te na ndayi oyo nalapisi yo. »
42 Today when I came to the spring, I said, 'Father of my master Abraham, if you will make my journey succeed, Nzokande lelo, tango nakomaki na libulu ya mayi, nasambelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, nabondeli Yo, longisa mobembo na ngai.
43 here I am, standing by the spring of water. So when a young woman comes out to draw water and I say to her, "Please give me a little water from your jar to drink," Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? ›
44 and she says to me, "Drink, and I'll draw water for your camels too"—let her be the woman our Father appointed for my master's son.' Mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. »
45 Before I finished praying in my heart, Rebekah came out, her jar on her shoulder, went down to the spring, and drew water. I said to her, 'Please let me drink.' Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye : « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. »
46 Quickly lowering her jar from her shoulder, she said, 'Drink—I'll water your camels too.' So I drank, and she watered the camels too. Akitisaki mbangu mbeki na ye wuta na lipeka na ye mpe alobaki : « Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo. » Boye namelaki mayi, mpe amelisaki lisusu bashamo mayi.
47 I asked, 'Whose daughter are you?' She said, 'Bethuel's daughter, son of Nahor, whom Milcah bore him.' Then I put the ring on her nose and the bracelets on her wrists. Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye.
48 I bowed and worshiped our Father, and blessed the Father of my master Abraham, who led me on the true path to take the daughter of my master's relative for his son. Nakitisaki elongi na se mpe nagumbamelaki Yawe ; nakumisaki Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, oyo atambolisaki ngai na nzela ya sembo mpo na kozwela mwana na ye ya mobali mwana mwasi ya ndeko ya nkolo na ngai.
49 Now, if you will deal in faithful love and truth with my master, tell me; if not, tell me, so I can turn right or left." Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu.
50 Laban and Bethuel answered, "This is from God; we can't say good or bad. Labani mpe Betweli bazongisaki : — Makambo oyo nyonso ewuti epai na Yawe. Tozali na likambo mosusu te ya koloba na yo.
51 Rebekah is before you; take her and go—let her be your master's son's wife, as our Father has spoken." Tala Rebeka, azali liboso na yo ! Kamata ye mpe kende na ye ; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi.
52 When Abraham's servant heard their words, he bowed down to the ground before our Father. Tango mosali ya Abrayami ayokaki makambo oyo bayebisaki ye, akitisaki elongi na ye kino na se liboso ya Yawe.
53 The servant brought out silver and gold objects and clothing, gave them to Rebekah, and gave costly gifts to her brother and mother. Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye.
54 He and the men with him ate, drank, and spent the night there. In the morning they rose, and he said, "Send me to my master." Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana. Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango : — Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
55 But her brother and her mother said, "Let the young woman stay with us ten days or so; then she may go." Ndeko mobali mpe mama ya Rebeka bazongisaki : — Tika ete elenge mwasi atikala nanu elongo na biso mikolo zomi, sima nde bokoki kokende.
56 But he said, "Don't delay me—our Father has made my journey succeed. Send me away, let me go to my master." Kasi alobaki na bango : — Bowumisa ngai te, pamba te Yawe alongisi mobembo na ngai ; botika ngai kokende mpo ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
57 They said, "Let us call the young woman and ask her about it." Balobaki na ye : — Tika ete tobenga elenge mwasi mpe totuna posa na ye.
58 They called Rebekah and asked, "Will you go with this man?" "I will go," she said. Babengaki Rebeka mpe batunaki ye : — Ondimi solo kokende na mobali oyo ? Rebeka azongisaki : — Iyo, nandimi.
59 So they sent off their sister Rebekah and her nurse, along with Abraham's servant and his men. Boye batikaki ndeko na bango ya mwasi Rebeka ete akende elongo na mama oyo asungaka ye, na mosali ya Abrayami elongo na bato na ye.
60 They blessed Rebekah, saying, "Our sister, may you become mother of thousands upon thousands; may your offspring capture the cities of those who hate them." Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango ! »
61 Rebekah and her attendants got up, mounted the camels, and followed the man. So the servant took Rebekah and went on. Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko.
62 Now Isaac had come from Beer-lahai-roi, for he was living in the Negev. Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi.
63 Isaac went out to meditate in the field at evening; looking up, he saw camels coming. Na pokwa, Izaki akendeki na bilanga mpo na kozwa tango ya kokanisa na bozindo. Tango atombolaki miso, amonaki bashamo kopusana pene ya esika oyo azalaki.
64 Rebekah also looked up, and when she saw Isaac, she got down from her camel. Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye.
65 She asked the servant, "Who is that man walking across the field to meet us?" "My master," he answered. So she took her veil and covered herself. Atunaki mosali ya Abrayami : — Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso ; azali nani ? Mosali ya Abrayami azongisaki : — Azali nkolo na ngai. Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi.
66 Then the servant told Isaac everything he had done. Mosali ya Abrayami ayebisaki Izaki makambo nyonso oyo asalaki.
67 Isaac brought her into his mother Sarah's tent, married Rebekah, and loved her. So Isaac was comforted after his mother's death. Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]