Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 7 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When your Father brings you into the land you're entering to possess, and drives out many nations ahead of you—Hittites, Girgashites, Amorites, Canaanites, Perizzites, Hivites, and Jebusites—seven nations bigger and stronger than you. Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi—
2 When your Father gives them to you and you defeat them, you must devote them to complete destruction. Make no covenant with them, show them no mercy. mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te.
3 Don't intermarry with them—don't give your daughters to their sons or take their daughters for your sons. Okosangana ata moke te na bango na nzela ya libala, okopesa te na libala bana na yo ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe okozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na yo ya mibali ;
4 For they will turn your children from following me to serve other gods; our Father's anger will burn against you, and he will quickly destroy you. noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki.
5 Instead, do this to them: tear down their altars, smash their sacred pillars, cut down their Asherah poles, and burn their carved images with fire. Tala makambo oyo bosengeli kosala bango : bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko,
6 You are a people holy to your Father; your Father chose you from all peoples on earth to be his people, his treasured possession. pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza.
7 Your Father loved and chose you not because you outnumbered other peoples—you were the fewest of all peoples. Ezali te mpo ete bozalaki mingi koleka bato mosusu nde Yawe alakisaki bino bolingo na Ye, bozalaki kutu moke koleka bato nyonso.
8 But because your Father loves you and keeps his oath sworn to your fathers, he brought you out with a mighty hand and redeemed you from the house of slavery, from the hand of Pharaoh king of Egypt. Kasi ezali mpo ete Yawe alingaka bino mpe abatelaka ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na bino. Yango wana, na loboko na Ye ya nguya, Yawe abimisaki bino mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu, na maboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito.
9 Know: your Father is our Father, the faithful One who keeps covenant and faithful love for 1,000 generations, for those who love him and keep his commands, Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye.
10 but repays haters to their face, destroying them; he is not slow to repay a hater to his face. Kasi azelaka te kopesa etumbu na moto oyo ayinaka Ye mpe abomaka ye mbala moko.
11 So keep the commandment—the statutes and the rules—that I am commanding you today, and carry them out. Yango wana, bosala keba mpo na kosalela mitindo, bikateli mpe mibeko oyo napesi bino lelo.
12 Because you listen to these rules, keeping and doing them, your Father will keep for you the covenant and faithful love sworn to your fathers. Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.
13 He will love you, bless you, multiply you—bless the fruit of your womb and the fruit of your ground: grain, new wine, oil, the increase of your herds, the young of your flock—in the land he swore to your fathers to give you. Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino : milona na bino, vino ya sika mpe mafuta ; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango.
14 You will be blessed above all peoples; none among you, male or female, will be barren, nor your livestock. Bokopambolama koleka bato nyonso. Mobali moko te to mwasi moko te akozanga bana, mpe ebwele na yo moko te ekozanga bana.
15 Your Father will remove all sickness from you, putting none of Egypt's evil diseases you knew on you, but on all who hate you. Yawe akobatela yo na bokono nyonso, akobwakela yo ata bokono moko te oyo yo oyebaki te na Ejipito, kasi akokweyisa yango likolo ya bayini na yo.
16 Destroy all the peoples your Father gives you. Don't pity them or serve their gods—that will trap you. Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.
17 If you think, 'These nations are greater than I; how can I drive them out?' Tango mosusu okomilobela : « Bikolo oyo ezali makasi koleka biso, ndenge nini tokolonga kobengana yango ? »
18 do not fear them. Remember well what your Father did to Pharaoh and to all Egypt: Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba.
19 the great trials your eyes saw, the signs and wonders, the strong hand and outstretched arm by which your Father brought you out. Your Father will do the same to all peoples you fear. Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga.
20 Your Father will send the hornet among them until those remaining and hiding from you die. Mpe kutu, Yawe, Nzambe na yo, akotindela bango banzoyi ya minene kino tango bato oyo bakotikala mpe bakobombama liboso na yo bakokufa.
21 Do not dread them, for your Father is among you, a great and awesome our Father. Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo.
22 Your Father will drive out these nations before you slowly. You cannot finish them quickly, or wild animals will multiply against you. Yawe, Nzambe na yo, akobengana moke-moke bikolo oyo ezali liboso na yo ; okokoka te kosilisa bango na mbala moko, noki te banyama mabe ekokoma ebele zingazinga na yo.
23 Your Father will hand them over to you, throwing them into great confusion until they are destroyed. Kasi Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, akotia bango noki na mobulu monene kino bakobebisama.
24 He will give their kings into your hand, and you will erase their name from under heaven. No one will be able to stand against you until you destroy them. Yawe akokaba bakonzi na bango na maboko na yo, mpe okolimwisa bakombo na bango na mokili ; moko te akokoka kotelemela yo, okobebisa bango.
25 Burn their gods' carved images with fire. Don't crave the silver or gold on them or take it for yourself, or you'll be trapped by it—it is detestable to your Father. Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo.
26 Do not bring a detestable thing home, or you will be devoted to destruction like it. Detest it, despise it, for it is devoted to destruction. Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]