Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Deuteronomy 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Moses spoke these words to all Israel across the Jordan, in the wilderness, in the Arabah opposite Suph, between Paran and Tophel, Laban, Hazeroth, and Dizahab. Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi.
2 It is eleven days' journey from Horeb by the way of Mount Seir to Kadesh-barnea. Esengaka mikolo zomi na moko ya mobembo wuta na Orebi kino na Kadeshi-Barinea, na nzela ya ngomba Seiri.
3 In the fortieth year, on the eleventh month's first day, Moses told Israel all our Father had commanded him for them, Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na moko, na mobu ya minei, Moyize alobaki na bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye na tina na bango.
4 after he defeated Sihon king of the Amorites, who lived in Heshbon, and Og king of Bashan, who lived in Ashtaroth and Edrei. Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
5 Beyond the Jordan, in the land of Moab, Moses began to explain this instruction, saying: Ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, na mokili ya Moabi, nde Moyize alimbolaki mobeko oyo. Alobaki na bango :
6 Our Father spoke to us at Horeb, saying, "You have stayed long enough at this mountain. « Yawe, Nzambe na biso, alobaki na biso, na ngomba Orebi : ‹ Bowumeli mpe mingi na ngomba oyo.
7 Turn and travel to the Amorite hills and all their neighbors—the Arabah, hills, lowland, Negev, seacoast—the Canaanite land, Lebanon, as far as the great Euphrates River. Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene.
8 Look, I have set the land before you. Go possess the land I swore to give your fathers—Abraham, Isaac, and Jacob—and their descendants after them." Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › »
9 At that time I said to you, "I am not able to carry you by myself. Na tango wana, nalobaki na bino : — Ngai moko nakokoka te kokamba bino.
10 Your Father has multiplied you, and today you are as numerous as the stars of heaven. Yawe, Nzambe na bino, akomisi bino ebele koleka mpe tala lelo motango na bino ekomi lokola minzoto na likolo.
11 May our Father multiply you 1,000 times over and bless you, as he promised you. Tika ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, akomisa bino ebele mbala nkoto moko mpe apambola bino ndenge alakaki !
12 How can I bear by myself the weight and burden of you and your strife? Nakokoka ndenge nini komema ngai moko makambo na bino, mikumba na bino, mpe kowelana na bino ?
13 Choose for your tribes wise, understanding, and experienced men, and I will appoint them as your heads." Bopona bato ya bwanya, ya mayele mpe ya lokumu kati na moko na moko ya mabota na bino, mpe ngai nakotia bango bakambi na bino.
14 And you answered me, "The thing that you have spoken is good for us to do." Bozongiselaki ngai : — Makambo oyo osili koyebisa biso ezali malamu.
15 So I took your tribal heads—wise, experienced men—and made them leaders over you: commanders of thousands, hundreds, fifties, tens, and officers for your tribes. Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino.
16 At that time I instructed your judges: "Hear cases between your brothers, and judge justly between a man, his brother, or the foreigner with him. Na tango wana, napesaki bakambi na bino mokumba oyo : « Boyoka kowelana oyo ezali kati na bandeko na bino mpe bokata makambo na bosembo ; ezala kowelana kati ya bana ya Isalaele bango na bango to kati ya mwana ya Isalaele mpe mopaya.
17 Show no favoritism in judgment; hear small and great alike. Fear no one, for judgment belongs to our Father. Bring me any case too hard for you; I will hear it." Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »
18 And I commanded you at that time all the things that you should do. Mpe na tango wana, nayebisaki bino makambo nyonso oyo bosengeli kosala.
19 We left Horeb and went through that whole vast, frightening wilderness you saw, toward the Amorite hill country, as our Father commanded us, and came to Kadesh-barnea. Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea.
20 I said to you: You have reached the Amorites' hill country, which our Father is giving us. Nalobaki na bino : — Bosili kokoma na etuka ya bangomba ya bato ya Amori, etuka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.
21 See, your Father has put the land before you. Go up, take it, as our Father promised. Don't fear or lose heart. Botala, Yawe, Nzambe na bino, apesi bino mokili ; bokende mpe bokamata yango ndenge Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alobaki na bino. Bobanga te mpe bozala na mpiko.
22 All of you came to me and said, "Let's send men ahead to scout the land for us and bring back word on the route to take and the cities we'll reach." Bato nyonso kati na bino bayaki epai na ngai mpe balobaki : — Tika ete totinda liboso na biso bato mpo na konongela biso mokili mpe komemela biso sango ya nzela oyo tokoki kolanda mpe ya bingumba epai wapi tokokende.
23 The plan seemed good to me, so I took twelve of your men, one from each tribe. Likanisi yango emonanaki malamu na miso na ngai, yango wana naponaki kati na bino mibali zomi na mibale, mobali moko mpo na libota moko.
24 They turned and went up into the hill country, reached the Valley of Eshcol, and explored it. Balongwaki mpe bakendeki, bongo bamataki kino na etuka ya bangomba mpe bakomaki na lubwaku ya Eshikoli oyo banongaki.
25 They took some of the land's fruit in their hands, brought it down to us, and reported: "The land our Father is giving us is good." Bakamataki na maboko na bango ndambo ya bambuma ya mokili wana mpe bamemelaki biso yango. Tala sango oyo bapesaki biso : « Mboka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso ezali malamu. »
26 Yet you would not go up, and you rebelled against the command of your Father. Kasi boboyaki komata, botombokelaki etinda ya Yawe, Nzambe na bino.
27 And you grumbled in your tents and said, "Because God hates us, he brought us out of the land of Egypt to put us in the Amorites' hands, to destroy us. Bongo boyimaki-yimaki kati na bandako na bino mpe bolobaki : « Yawe alingaka biso te, yango wana abimisaki biso na Ejipito mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Amori mpo ete bango baboma biso.
28 Where are we going up? Our brothers melted our hearts, saying, 'A people bigger and taller than us; huge cities walled to the sky; and we saw Anakim's sons there too.'" Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »
29 Then I said to you, "Do not be terrified or afraid of them. Nalobaki na bino : « Bozala na somo te mpe bobanga bango te,
30 Your Father, going before you, will himself fight for you, as he did for you in Egypt, before your eyes, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso.
31 and in the wilderness, where you saw your Father carry you, as a father carries his son, all the way you traveled until you reached this place." Mpe na esobe, na banzela nyonso oyo botambolaki kino bokoma na esika oyo, bomonaki ndenge nini Yawe, Nzambe na bino, amemaki bino ndenge tata amemaka mwana na ye. »
32 Yet in spite of this word you did not believe your Father, Atako bongo, botiaki elikya te epai na Yawe, Nzambe na bino,
33 going ahead of you on the road to scout your campsite—fire by night, cloud by day—showing you the way to go. oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto ; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata ; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola.
34 And our Father heard what you said, and he was angry, and he swore, Tango Yawe ayokaki nyonso oyo bozalaki koloba, asilikaki mpe alapaki ndayi :
35 "None of these men, this evil generation, will see the good land I swore to give your fathers, « Moto moko te kati na molongo oyo ya bato mabe akoki komona mokili ya kitoko oyo nalakaki kopesa na bakoko na bango na nzela ya ndayi,
36 except Caleb son of Jephunneh. He will see it, and I will give him the land he walked on, and his children, because he fully followed our Father.' longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. »
37 "our Father was angry with me too because of you, saying, 'You also will not enter there.' Likolo na bino, Yawe asilikelaki mpe ngai ; alobaki : « Yo mpe lisusu okokota te kati na mokili yango.
38 Joshua son of Nun, who stands before you, will enter there. Strengthen him; he will give Israel its inheritance. Kasi mosungi na yo Jozue, mwana mobali ya Nuni, ye akokota kati na yango. Lendisa ye, pamba te ye nde akokamba Isalaele mpo na kozwa mokili yango lokola libula.
39 Your little ones, who you said would be plunder, and your children, who today don't know good from evil—they will enter it. I will give it to them; they will possess it. Bongo, bana na bino oyo bolobaki ete bakomema bango na bowumbu, bana na bino oyo bayebi nanu te kokesenisa malamu mpe mabe, bango nde bakokota na mokili yango. Nakopesa bango mokili yango, mpe bakokamata yango.
40 But you—turn and set out into the wilderness by the road to the Red Sea." Mpo na bino, bobaluka mpe bokende na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo. »
41 Then you answered me, "We sinned against our Father. We will go up and fight, as our Father commanded us." Each of you strapped on his weapons, thinking it easy to go up into the hill country. Bozongiselaki ngai : « Tosali masumu epai na Yawe. Tokokende mpe tokobunda ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso. » Boye, moto nyonso kati na bino alataki bibundeli na ye, mpe bokanisaki ete ezali likambo ya pasi te komata na etuka ya bangomba.
42 Our Father said to me, "Tell them: 'Don't go up or fight, for I'm not among you, or you'll be struck down before your enemies.'" Kasi Yawe alobaki na ngai : « Yebisa bango ete bamata te mpe babunda te, pamba te nakozala elongo na bango te ; banguna na bango bakolonga bango. »
43 I spoke to you, but you didn't listen. You rebelled against our Father's command, acted arrogantly, and went up into the hill country. Nzokande nayebisaki bino, kasi boyokaki kaka te ; botombokelaki mitindo ya Yawe ; mpe, na lolendo na bino, bomataki na etuka ya bangomba.
44 The Amorites living in that hill country came out against you, chased you like bees, and crushed you in Seir as far as Hormah. Boye, bato ya Amori oyo bavandaka na bangomba yango bakitelaki bino mpe babundisaki bino, babenganaki bino lokola liboke ya banzoyi mpe balongaki bino longwa na Seiri kino na Orima.
45 You returned and wept before our Father, but our Father didn't hear your voice or listen to you. Bozongaki mpe bolelaki liboso ya Yawe, kasi aboyaki koyoka kolela na bino, akangaki matoyi na Ye.
46 So you stayed at Kadesh many days, the many days that you remained there. Bongo bovandaki na Kadeshi mikolo ebele.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]