Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Acts 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Saul approved of Stephen's killing. That day a great persecution erupted against the Jerusalem church, scattering everyone except the apostles through Judea and Samaria. Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kobanda na mokolo wana, minyoko ya makasi ekweyelaki Lingomba kati na Yelusalemi ; mpe bandimi nyonso bapalanganaki na Yuda mpe na Samari, longola kaka bantoma.
2 Devout men buried Stephen and mourned loudly over him. Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi.
3 But Saul was destroying the church, entering house after house, dragging off men and women, throwing them in prison. Kasi Saulo akomaki koluka kopanza Lingomba ; azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
4 So those scattered went everywhere, proclaiming the good news of the word. Bandimi oyo bapalanganaki bazalaki koteya Liloba na Nzambe bisika nyonso bazalaki kokende.
5 Philip went down to the city of Samaria and proclaimed Christ to them. Filipo akendeki na engumba moko ya Samari mpe, kuna, ateyaki Klisto.
6 The crowds paid attention together to Philip's words, hearing and seeing the signs he did. Bongo tango ebele ya bato bayokaki mpe bamonaki bikamwa oyo asalaki, bakangamaki na makambo oyo Filipo azalaki koloba.
7 Unclean spirits came out of many who were possessed, screaming loudly, and many paralyzed and lame were healed. Pamba te milimo ya mbindo ezalaki kobima kati na bato mingi na koganga makasi, mpe bato mingi oyo bakufa makolo mpe oyo batambolaka tengu-tengu babikaki.
8 So there was great joy in that city. Boye, bato ya engumba yango batondisamaki na esengo makasi.
9 A man named Simon had already practiced magic in that city, amazing Samaria's people and claiming to be someone great. Nzokande, wuta kala, kati na engumba yango, ezalaki na moto moko oyo kombo na ye ezalaki « Simona. » Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato ya Samari mpe komimona moto monene.
10 Everyone, from least to greatest, listened to him, saying, "This man is God's power, called Great." Bato nyonso, kobanda na bana mike kino na mikolo, bayokaki ye na bokebi mpe balobaki : « Moto oyo, azali penza nguya ya Nzambe, nguya oyo babengaka : Nguya monene. »
11 They paid attention to him because for a long time he had amazed them with his magic. Bazalaki kolanda ye mpo ete, wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji.
12 But when they believed Philip's good news about the kingdom of our Father and the name of Jesus Christ, men and women were baptized. Kasi tango bandimaki Sango Malamu oyo Filipo ateyaki na tina na Bokonzi ya Nzambe mpe na tina na Kombo na Yesu-Klisto, mibali mpe basi bazwaki libatisi.
13 Simon himself believed, was baptized, and stayed close to Philip, amazed at the signs and great miracles he saw. Simona mpe andimaki mpe azwaki libatisi ; azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalema na miso na ye.
14 When the apostles in Jerusalem heard Samaria had received our Father's word, they sent Peter and John to them. Tango bantoma, kati na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba na Nzambe, batindelaki bango Petelo mpe Yoane.
15 When they arrived, they prayed for them that they might receive the Holy Spirit, Tango bakomaki kuna, basambelaki mpo na bandimi ya sika mpo ete bazwa Molimo Mosantu,
16 for the Holy Spirit had not yet fallen on any of them; they were only baptized into the name of the Lord Jesus. pamba te Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango ; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu.
17 Then they laid their hands on them, and they received the Holy Spirit. Bongo, Petelo mpe Yoane batielaki bango maboko, mpe bazwaki Molimo Mosantu.
18 When Simon saw the Spirit given through the apostles' laying on of hands, he offered them money, Tango Simona amonaki ete bato oyo bandimaki bazwaki Molimo Mosantu, wana bantoma batielaki bango maboko, apesaki Petelo mpe Yoane mbongo ;
19 saying, "Give me this power too, so whoever I lay hands on receives the Holy Spirit." mpe alobaki : — Bopesa ngai mpe nguya oyo, mpo ete moto nyonso oyo nakotiela maboko akoka kozwa Molimo Mosantu.
20 Peter said to him, "May your silver perish with you, since you thought you could buy our Father's gift with money! Kasi Petelo azongiselaki ye : — Mpo ete okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na nzela ya mbongo, tika ete yo mpe mbongo na yo bokufa !
21 You have no part or share in this matter, for your heart is not right before our Father. Solo, ozali na libula te to na makoki te kati na lotomo oyo, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe.
22 So turn from this evil, and pray to our Father that, if possible, your heart's intent may be forgiven you. Boye, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo ete alimbisa yo, soki ekoki kosalema, mpo na makanisi oyo ozalaki na yango kati na motema na yo.
23 I see you poisoned by bitterness and bound by evil." Pamba te namoni ete motema na yo etondi na zuwa mpe ozali mowumbu ya masumu.
24 Simon answered, "Pray to God for me, that nothing you have said may come upon me." Simona azongisaki : — Bobondela Nkolo mpo na ngai mpo ete, kati na oyo bowuti koloba, eloko moko te ekomela ngai.
25 So, having testified and spoken our Lord Jesus's word, they returned to Jerusalem, preaching the good news in many Samaritan villages. Sima na bango kotatola mpe kosakola Liloba na Nkolo, Petelo mpe Yoane bazongaki na Yelusalemi ; na nzela, bazalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka ebele ya Samari.
26 Then an angel of our Father told Philip, "Get up and go south to the road going down from Jerusalem to Gaza"—a desert road. Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo : — Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza.
27 He got up and went. There was an Ethiopian eunuch, a court official of Candace, queen of the Ethiopians, in charge of all her treasury, who had come to Jerusalem to worship, Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki ; na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, moto ya mboka Etiopi ; azalaki kalaka moko ya lokumu mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mwasi mokonzi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kogumbamela ;
28 and was returning, seated in his chariot and reading the prophet Isaiah. bongo wana azalaki kozonga na mboka na ye, azalaki ya kovanda kati na shar na ye mpe azalaki kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi.
29 And the Holy Spirit said to Philip, "Go over and catch up with that chariot." Molimo alobaki na Filipo : — Kende mpe pusana pene ya shar wana.
30 Philip ran up, heard him reading the prophet Isaiah, and asked, "Do you understand what you're reading?" Filipo akendeki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. Filipo atunaki ye : — Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga ?
31 He said, "How can I, unless someone guides me?" and invited Philip up to sit with him. Azongisaki : — Nakososola ndenge nini soki moto alimboleli ngai yango te ? Boye abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.
32 Now the passage of Scripture he was reading was this: "Like a sheep he was led to the slaughter, and like a lamb silent before its shearer, so he did not open his mouth. Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.
33 In his humiliation justice was denied him. Who can describe his generation? For his life is taken away from the earth." Basambwisaki ye mpe baboyaki kolongisa ye. Nani akoyebisa bakitani na ye ? Pamba te balongoli bomoi na ye na mokili. »
34 The eunuch said to Philip, "Tell me, of whom does the prophet say this—himself, or someone else?" Bongo, soda oyo baboma nzoto ya mibali atunaki Filipo : — Nabondeli yo, yebisa ngai : mosakoli azali koloba makambo oyo na tina na nani ? Azali koloba yango na tina na ye moko to na tina na moto mosusu ?
35 Philip opened his mouth and, starting from this Scripture, told him the good news about Jesus. Filipo azwaki maloba mpe, na nzela ya eteni yango ya Makomi, ateyaki ye Sango Malamu ya Yesu.
36 Traveling the road, they reached water, and the eunuch said, "Look, water! What stops me from being baptized?" Wana bazalaki kokoba mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi, mpe soda oyo baboma mokongo alobaki : — Tala mayi, yango oyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai kozwa libatisi ? [
37 Not in this edition Filipo alobaki : — Soki kaka ondimi wuta na motema na yo mobimba, okoki na yo kozwa libatisi. Moto yango azongisaki : — Nandimi ete Yesu-Klisto azali Mwana na Nzambe !]
38 He ordered the chariot to stop; both went down into the water, Philip and the eunuch, and Philip baptized him. Mbala moko, apesaki mitindo ete batelemisa shar. Bongo bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo, bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye.
39 When they came up out of the water, the Spirit of our Father snatched Philip away; the eunuch never saw him again, but went on his way rejoicing. Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te, kasi akobaki mobembo na ye na esengo.
40 Philip found himself at Azotus. He traveled through, announcing the good news in every town until he reached Caesarea. Nzokande, Filipo amonanaki na Azoti ; mpe longwa kuna, akendeki na Sezarea, wana azalaki koteya Sango Malamu kati na bamboka nyonso epai wapi azalaki kolekela.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]