Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Acts 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 "Brothers and fathers, listen now to my defense before you." — Bandeko mpe batata, boyoka sik’oyo ndenge nini nalingi komilongisa.
2 When they heard him speaking to them in Hebrew, they grew even more quiet. And he said: Tango bayokaki Polo koloba na lokota ya Arami, bavandaki lisusu kimia koleka. Bongo, Polo alobaki :
3 "I am a Jew, born in Tarsus of Cilicia, raised in this city, trained at Gamaliel's feet in the strict law of our ancestors, as eager for God as all of you are today. — Nazali Moyuda, nabotama na Tarse kati na Silisi, kasi nakoli kaka awa, na engumba oyo ya Yelusalemi. Gamalieli nde azalaki molakisi na ngai ; ye nde ateyaki ngai na bosolo nyonso Mobeko ya bakoko na biso. Nazalaki na bolingo makasi mpo na Nzambe, ndenge bino nyonso bozali na yango lelo.
4 I persecuted this Way to the death, binding and delivering to prison both men and women, Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.
5 as the high priest and the whole council of elders can testify. From them I received letters to the brothers in Damascus, and went to bring those there as prisoners to Jerusalem for punishment." Mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe lisanga mobimba ya bakambi bakoki kotatola bosolo ya makambo oyo nazali koloba. Bango nde kutu bapesaki ngai mikanda mpo ete nakende kopesa na bandeko na bango ya Damasi. Boye, nakendeki kuna mpo na kokanga bato mpe komema bango na Yelusalemi, mpo ete bapesa bango etumbu.
6 "Traveling and nearing Damascus about noon, a great light from heaven suddenly flashed around me." Wana nazalaki na nzela mpe nakomaki pene ya Damasi, na ngonga pene ya midi, namonaki mbala moko pole makasi kowuta na Likolo mpe kongengela ngai.
7 I fell to the ground and heard a voice say to me, "Saul, Saul, why are you persecuting me?" Nakweyaki na mabele mpe nayokaki mongongo moko koloba na ngai : « Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola Ngai ? »
8 I answered, "Who are you, Lord?" He replied, "I am Jesus of Nazareth, whom you're persecuting." Natunaki : « Nkolo, yo nani ? » Alobaki na ngai : « Nazali Yesu ya Nazareti, oyo yo ozali konyokola. »
9 "Those with me saw the light but didn't understand the voice of the one speaking to me." Bato oyo bazalaki na ngai elongo bamonaki pole yango, kasi bayokaki te mongongo ya moto oyo azalaki koloba na ngai.
10 I said, "What should I do, Lord?" The Lord replied, "Get up and go into Damascus. There you'll be told all you've been appointed to do." Natunaki : « Nkolo, nasala nini ? » Nkolo alobaki na ngai : « Telema, kende na Damasi ; kuna, bakoyebisa yo makambo nyonso oyo osengeli kosala. »
11 "Since that light's brightness blinded me, my companions led me by the hand into Damascus." Baninga na ngai basimbaki ngai na loboko mpe bamemaki ngai kino na Damasi, pamba te kongenga ya pole wana ebomaki ngai miso.
12 "A man named Ananias, devout by the law, well spoken of by all the Jews living there, Ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye ezalaki « Ananiasi. » Azalaki kotosa makambo ya Nzambe ndenge Mobeko ezalaki kotinda, mpe azalaki na lokumu mingi na miso ya Bayuda nyonso ya engumba wana.
13 came and stood by me and said, 'Brother Saul, receive your sight.' At that very hour I looked up and saw him." Ayaki kokutana na ngai mpe alobaki : « Ndeko na ngai, Saulo, mona lisusu. » Mpe kaka na tango yango, nazwaki lisusu makoki ya komona mpe namonaki ye.
14 "He said, 'The God of our fathers appointed you to know his will, to see the Righteous One, and to hear a voice from his mouth; Bongo alobaki na ngai : « Nzambe ya bakoko na biso apona yo wuta kala mpo ete oyeba mokano na Ye, omona Moto na sembo mpe oyoka mongongo na Ye.
15 for you will be his witness to everyone of what you have seen and heard. Okozala motatoli na Ye liboso ya bato nyonso, mpo na koyebisa bango makambo nyonso oyo osili komona mpe koyoka.
16 And now, why wait? Get up, be baptized, wash away your sins, calling on his name." Mpo na nini ozali kolekisa tango ? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »
17 "When I had returned to Jerusalem and was praying in the temple, I fell into a trance," Sima na ngai kozonga na Yelusalemi, wana nazalaki kosambela na Tempelo, nakweyaki na Molimo
18 and saw him saying to me, "Hurry and leave Jerusalem quickly, because they won't accept your testimony about me." mpe nayokaki Nkolo koloba na ngai : « Sala noki, bima na Yelusalemi, pamba te bato na yango bakondima te litatoli oyo okoloba na tina na Ngai. »
19 I said, "Lord, they themselves know that I went from synagogue to synagogue imprisoning and beating those who believed in you. Nazongisaki : « Nkolo, bato wana bayebi malamu ete nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kobwaka na boloko mpe kobetisa fimbu, bato oyo bazalaki kondimela Yo.
20 When the blood of your witness Stephen was being shed, I stood by, approving and guarding the cloaks of those killing him.'" Tango basopaki makila ya Etieni, motatoli na Yo, ngai mpe nazalaki wana, nandimaki makambo oyo esalemaki mpe nazalaki kokengela bilamba ya bato oyo babomaki ye. »
21 "And he said to me, 'Go, for I will send you far away to the Gentiles.'" Kasi Nkolo azongiselaki ngai : « Kende, nakotinda yo mosika, epai ya bato ya bikolo ya bapaya. »
22 Up to that point they listened, then they raised their voices and shouted, "Erase such a man from the earth! He shouldn't be allowed to live!" Bato bayokaki Polo kino tango alobaki maloba wana. Boye, batombolaki mingongo na bango mpe bagangaki : — Bolongola ye na mokili ! Asengeli te kozala na bomoi !
23 And as they were shouting and throwing off their cloaks and flinging dust into the air, Lokola bazalaki koganga makasi mpe kobwaka bilamba na bango mpe putulu na likolo,
24 the commander ordered him taken into the barracks and whipped, to learn why they were shouting against him like this. mokonzi ya basoda apesaki mitindo ete bakotisa Polo kati na lopango ya basoda mpe babeta ye fimbu, mpo ete aloba polele tina nini Bayuda bazali koganga bongo mpo na ye.
25 As they stretched him out for the straps, Paul said to the centurion standing there, "Is it legal for you to whip a Roman citizen who hasn't been condemned?" Wana bazalaki kokanga Polo basinga, Polo atunaki mokonzi oyo azalaki wana : — Boni, mibeko epesi penza ndingisa ya kobeta moto ya Rome fimbu, wana bosambisi ye nanu te ?
26 Hearing this, the centurion went to the commander and reported it: "What are you about to do? This man is a Roman citizen." Tango mokonzi ayokaki bongo, akendeki koyebisa mokonzi ya basoda : — Okosala nini ? Tata oyo azali moto ya Rome.
27 So the commander came and asked, "Tell me, are you a Roman citizen?" "Yes," he said. Mbala moko, mokonzi ya basoda akendeki epai ya Polo mpe atunaki ye : — Yebisa ngai solo, ozali penza moto ya Rome ? Azongisaki : — Iyo, ezali bongo !
28 The commander said, "I paid a large sum for this citizenship." But Paul said, "I was born a citizen." Mokonzi ya basoda alobaki : — Nafutaki mbongo mingi mpo na kozwa makoki ya kokoma moto ya Rome. Polo azongisaki : — Kasi ngai, nazali moto ya Rome ya kobotama.
29 So those about to question him withdrew at once; the commander was afraid, realizing he had bound a Roman citizen. Mbala moko, bato oyo balingaki kobeta ye fimbu batikaki ye. Mokonzi ya basoda akomaki kobanga tango asosolaki ete tata oyo ye akangaki minyololo azali penza moto ya Rome.
30 The next day, wanting to know exactly why the Jews accused him, the commander freed Paul, ordered the chief priests and the whole council to assemble, brought Paul down, and set him before them. Mokolo oyo elandaki, lokola mokonzi ya basoda azalaki na posa ya koyeba malamu tina oyo Bayuda bafundelaki Polo, apesaki mitindo ete bafungola Polo minyololo ; mpe abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato ya Likita-Monene mpo ete basala mayangani. Bongo amemaki Polo mpe atiaki ye liboso na bango.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]