Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

Acts 2 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 When the day of Pentecost arrived, they were all together in one place. Tango mokolo ya Pantekoti ekomaki, bango nyonso basanganaki esika moko.
2 Suddenly a sound like a violent, rushing wind came from heaven and filled the entire house where they sat. Mbala moko, lokito moko ewutaki na likolo lokola lokito ya mopepe makasi, mpe etondisaki ndako mobimba epai wapi bazalaki kosangana.
3 What looked like divided tongues of fire appeared and rested on each one of them. Bamonaki biloko moko lokola ndemo ya moto kokabwana mpe kovanda na moto ya moko na moko kati na bango.
4 All were filled with the Holy Spirit and began speaking in other tongues, as the Spirit gave them words to say. Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.
5 At that time devout Jews from every nation under heaven were living in Jerusalem. Nzokande, kati na Yelusalemi, ezalaki na Bayuda oyo babangaka Nzambe, oyo bawutaki na bikolo nyonso ya mokili.
6 When this sound rang out, a crowd gathered, confused, since each one heard them speak in his own language. Tango bayokaki lokito wana, ebele ya bato bayaki mbangu kosangana wana mpe bakomaki kokamwa, pamba te moko na moko kati na bango azalaki koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka.
7 They were amazed and astonished, saying, "Are not all these who are speaking Galileans? Bakamwaki mingi penza mpe bakomaki kotuna : « Boni, bato nyonso oyo bazali koloba, bazali bato ya Galile te ?
8 How is it, then, that each of us hears them in our own native language? Boye, ndenge nini moto na moto kati na biso azali koyoka bango koloba na monoko na ye ya mboka ?
9 Parthians, Medes, and Elamites; those who live in Mesopotamia, Judea and Cappadocia, Pontus and Asia, Bato ya Parte, ya Mede mpe ya Elami, bavandi ya Mezopotami, ya Yuda, ya Kapadose, ya Ponti mpe ya Azia,
10 Phrygia, Pamphylia, Egypt, the parts of Libya near Cyrene; visitors from Rome, Jews and converts to Judaism; ya Friji mpe ya Pafili, ya Ejipito mpe ya Libi oyo ezali pembeni ya Sirene, bapaya oyo bawutaki na Rome,
11 Cretans and Arabs—we hear them telling in our own tongues the mighty works of our Father!" bango nyonso, ezala Bayuda to bapaya oyo bakota na lingomba ya Bayuda : bato ya Kreti mpe ya Arabi, biso nyonso tozali koyoka bango kotatola misala minene ya Nzambe, na nkota na biso ya mboka ! »
12 They were all amazed and perplexed, saying to one another, "What does this mean?" Bango nyonso, elekelaki bango, bazalaki kokamwa mingi mpe bakomaki kotunana : « Likambo oyo elingi koloba nini ? »
13 But others mocked and said, "They are full of sweet wine." Nzokande, bato mosusu bazalaki koseka bango mpe koloba : « Balangwe vino ya sika. »
14 But Peter stood with the eleven, raised his voice, and declared to them: "Men of Judea, everyone living in Jerusalem—know this and listen carefully to my words. Petelo atelemaki elongo na bantoma zomi na moko ; mpe na mongongo makasi, alobaki na ebele ya bato : — Bino Bayuda, mpe bino nyonso oyo bovandaka na Yelusalemi, botika ete nalimbola mpo na bino likambo oyo, boyoka malamu makambo oyo nalingi koloba.
15 These people are not drunk, as you suppose, for it is only nine o'clock in the morning. Bato oyo balangwe masanga te ndenge bozali kokanisa. Pamba te tozali nanu na ngonga ya libwa ya tongo.
16 No, this is what was spoken through the prophet Joel: Kasi ezali nde makambo oyo mosakoli Joeli alobaki :
17 'And in the last days, says our Father, I will pour out my Spirit on all people; your sons and your daughters will prophesy, your young men will see visions, and your old men will dream dreams. « Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola ; bilenge na bino bakozwa bimoniseli, mibange na bino bakolota bandoto.
18 Even on my male servants and my female servants in those days I will pour out my Spirit, and they will prophesy. Solo, na mikolo wana, nakosopa Molimo na Ngai kati na basali na Ngai ya mibali mpe ya basi, mpe bakosakola.
19 I will show wonders in the heavens above and signs on the earth below—blood and fire and billows of smoke. Nakolakisa bikamwa kuna na Likolo, mpe bilembo ya kokamwa awa na mokili : makila, moto mpe likonzi ya milinga.
20 The sun will be turned to darkness and the moon to blood, before the great and glorious day of the Lord comes. Moyi ekobongwana molili, sanza ekobongwana makila liboso ete mokolo ya Nkolo ekoma, mokolo oyo ya monene mpe ya nkembo.
21 And everyone who calls on the name of the Lord will be saved.'" Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »
22 "Men of Israel, hear these words: Jesus of Nazareth—a man our Father attested to you through miracles, wonders, and signs our Father did through him among you, as you yourselves know. Bato ya Isalaele, boyoka maloba oyo : Yesu ya Nazareti, moto oyo, na nzela ya bikamwa, ya bilembo mpe ya misala ya minene, Nzambe alakisaki bino ete awutaki epai na Ye ndenge bino moko boyebi yango,
23 This man, handed over by our Father's set plan and foreknowledge, you crucified and killed by the hands of lawless men. akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.
24 But our Father raised him, freeing him from death's agony, since death could not hold him. Kasi Nzambe abukaki minyololo ya kufa, asekwisaki Ye, pamba te ekokaki kosalema te ete kufa ekanga Ye.
25 For David says of him: 'I saw our Father always before me, for he's at my right hand, so I won't be shaken.' Boye, tala makambo oyo Davidi aloba na tina na Ye : « Nazalaki komona Nkolo mikolo nyonso liboso na ngai, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.
26 Therefore my heart was glad and my tongue rejoiced; moreover, my body also will rest in hope. Yango wana, motema na ngai etondi na esengo, mpe lolemo na ngai ezali kosepela. Solo, nzoto na ngai ekopema na elikya,
27 For you will not abandon my soul to the grave, nor let your Holy One see decay. pamba te okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi mpe okotika te ete mosantu na Yo apola.
28 You have shown me the paths of life; you will fill me with gladness in your presence." Pamba te olakisaki ngai nzela ya bomoi, mpe okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo. »
29 "Brothers, I can tell you plainly: our ancestor David died, was buried, and his tomb remains with us to this day. Bandeko na ngai, tika ete naloba na bino solo na tina na Davidi, koko na biso, ete akufa mpe bakunda ye ; mpe kunda na ye ezali awa kino lelo.
30 Since he was a prophet, he knew our Father had sworn an oath to seat one of his descendants on his throne, Kasi azalaki mosakoli mpe ayebaki ete Nzambe apesaki ye elaka, na nzela ya ndayi, ete moko kati na bakitani na ye akovanda na kiti na ye ya bokonzi.
31 he foresaw and spoke of the Christ's resurrection, that he was not abandoned to the grave, nor his body saw decay. Davidi amonaki makambo oyo wuta kala, alobelaki lisekwa ya Klisto ete Nzambe akosundola Ye te kati na mboka ya bakufi mpe akotika te ete nzoto na Ye epola.
32 This Jesus our Father raised up, and we are all witnesses of it. Nzambe asekwisaki Yesu kati na bakufi ; boye biso nyonso tozali batatoli ya lisekwa yango.
33 So, lifted up to our Father's right hand, having received the promised Holy Spirit from the Father, he poured out what you now see and hear. Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.
34 For David never went up into heaven, but he himself says: "Our Father said to my Lord, 'Sit at my right hand, Pamba te, Davidi amataki te na Likolo, kasi alobaki : « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali
35 until I make your enemies a footstool for your feet.'" kino nakomisa banguna na Yo enyatelo makolo na Yo. › »
36 "So let the whole house of Israel know for certain: our Father made this Jesus, whom you crucified, both Lord and Christ." Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.
37 Cut to the heart at this, they asked Peter and the other apostles, "Brothers, what should we do?" Tango bato bayokaki bongo, mitema na bango eyokaki pasi makasi mpe balobaki na Petelo mpe bantoma mosusu : — Bandeko, tosala nini ?
38 Peter said to them, "Repent, and each of you be baptized in the name of Jesus Christ for the forgiveness of your sins, and you will receive the gift of the Holy Spirit. Petelo azongiselaki bango : — Bobongola mitema ; tika ete moko na moko kati na bino azwa libatisi na Kombo na Yesu-Klisto mpo ete masumu na ye elimbisama, bongo bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.
39 For the promise is for you, your children, and all far off—as many as the Sovereign our Father will call to himself." Pamba te elaka oyo ezali mpo na bino, mpo na bana na bino mpe mpo na bavandi nyonso ya bikolo ya mosika, bato nyonso oyo Nkolo, Nzambe na biso, akobenga.
40 And with many other words he warned and urged them, saying, "Save yourselves from this corrupt generation." Petelo azalaki kokebisa bango na maloba ebele mpe azalaki kolendisa bango na maloba oyo : — Boyamba lobiko mpo ete bozwa etumbu te oyo ezali kozela bato mabe.
41 So those who welcomed his message were baptized, and about 3,000 people were added that day. Bato oyo bandimaki mateya ya Petelo bazwaki libatisi. Mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato babakisamaki na lisanga ya bandimi.
42 They devoted themselves to the apostles' teaching and deep communion, to the breaking of bread and the prayers. Bazalaki komipesa mingi penza na malakisi ya bantoma, na kozala lisanga, na kobuka lipa mpe na kosambela.
43 Awe came over everyone, and many wonders and signs were done through the apostles. Bato nyonso batondisamaki na somo, mpo ete bantoma bazalaki kosala makamwisi ebele mpe bilembo ya kokamwa.
44 All who believed were together and had all things in common. Bandimi nyonso bakomaki na bomoko, mpe biloko na bango ezalaki mpo na bango nyonso.
45 They sold their property and possessions and distributed the proceeds to all, as anyone needed. Bazalaki koteka mabele na bango mpe biloko na bango, mpe bazalaki kokabola mbongo kati na bango, ndenge ezalaki posa ya moto na moto.
46 Every day, devoting themselves together in the temple, breaking bread house to house, they shared food with joyful, sincere hearts, Mikolo nyonso bazalaki kokoba kosangana na Tempelo. Bazalaki kokabola lipa na bandako na bango, kolia bilei na bango na esengo nyonso mpe na motema ya komikitisa.
47 praising our Father, with favor among all the people. The Lord added to their number daily those being saved. Bazalaki kokumisa Nzambe, mpe bato nyonso bazalaki kolinga bango. Bongo, mikolo nyonso, Nkolo azalaki kobakisa na lisanga na bango bato oyo bazalaki kobika.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]