Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

3 John 1 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The elder, to the beloved Gaius, whom I love in truth. Ngai mpaka ; Epai ya Gayusi, molingami na ngai, oyo nalingaka kati na solo.
2 Beloved, I pray you prosper in every way and stay healthy, as your soul prospers. Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.
3 I rejoiced greatly when brothers arrived and testified about your faithfulness to the truth—for you truly are walking in it. Nasepelaki makasi koyoka litatoli na tina na yo, na monoko ya bandeko oyo bayaki wuta epai na yo, ete ozali kokoba kokangama na bosolo, mpe ozali kobika kolanda bosolo yango.
4 I have no greater joy than this: to hear that my children are walking in the truth. Nazalaka na esengo makasi tango nayokaka ete bana na ngai bazali kobika kolanda bosolo.
5 Beloved, you act faithfully in all you do for the brothers, even strangers. Molingami na ngai, makambo oyo osalaka mpo na bandeko kati na kondima, ezala mpo na ba-oyo bazali bapaya na miso na yo, osalaka yango penza kolanda kondima na yo.
6 They testified to your love before the church. Send them on in a way worthy of our Father. Batatolaki na miso ya Lingomba na tina na bolingo na yo. Bongo, okosala lisusu malamu koleka soki osungi bango, na lolenge oyo ekosepelisa Nzambe, mpo ete bakoba mobembo na bango.
7 For they went out for the sake of the Name, accepting nothing from the Gentiles. Pamba te ezali mpo na kosakola Klisto nde bazali kotambola mpe koboya kozwa lisungi na maboko ya Bapagano.
8 Therefore we ought to support such people, so that we may be fellow workers for the truth. Boye, tosengeli kosunga bato ya lolenge oyo mpo ete tosangana na bango na makambo oyo bazali kosala mpo na solo.
9 I wrote something to the church, but Diotrephes, who loves being first among them, does not receive us. Nakomelaki Lingomba mokanda moko ya mokuse ; kasi Diotrefi, oyo alingaka kaka kozala mokonzi na makambo nyonso, akoyamba biso te.
10 So if I come, I'll expose what he's doing—slandering us with malicious words. Not satisfied with that, he refuses to welcome the brothers, stops those who want to, and throws them out of the church. Yango wana, tango nakoya, nakobimisa mabe na ye na polele ; azali koloba makambo ya mabe mpe ya lokuta na tina na biso. Mpe asuki kaka wana te, azali ata koboya koyamba bandimi mosusu, azali kopekisa, kotelemela mpe kobengana na Lingomba, bato oyo bandimi koyamba bango.
11 Beloved, don't imitate evil, but good. Whoever does good is from our Father; whoever does evil hasn't seen our Father. Molingami na ngai, komekolaka mabe te, mekolaka nde bolamu. Moto oyo asalaka bolamu azali ya Nzambe, kasi moto oyo asalaka mabe ayebi Nzambe te.
12 All speak well of Demetrius, and so does the truth. We testify too, and you know our testimony is true. Bato nyonso bazali kopesa litatoli ya malamu na tina na Demetriusi, ezala yango moko bosolo ezali mpe kopesa litatoli ya malamu na tina na ye. Biso mpe tozali kopesa litatoli ya malamu na tina na ye, mpe oyebi malamu ete litatoli na biso ezalaka ya solo.
13 I had much to write to you, but I would rather not write with pen and ink. Nazali lisusu na makambo ebele ya kokomela yo, kasi naboyi kosala yango na nzela ya ekomeli mpe ya mayi na yango.
14 I hope to see you soon, and we will talk face to face. Nazali kolikya komona yo kala mingi te, bongo tokosolola malamu.
15 Peace to you. The friends send their greetings. Greet each of the friends by name. Tika ete kimia ezala na yo ! Balingami ya awa bapesi yo mbote. Pesa mpe balingami ya kuna mbote, moko na moko na kombo na ye.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]