Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Samuel 6 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Once again David gathered all the chosen men of Israel, 30,000. Davidi asangisaki basoda ya mpiko ya Isalaele, bazalaki nkoto tuku misato.
2 David set out with all his people from Baale-judah to bring up from there the ark of our Father, called by the Name, the name of the Father of heaven's armies seated on the cherubim. Davidi elongo na basoda na ye nyonso bakendeki na Baale-Yuda mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo moko, Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka kati na basheribe na likolo ya Sanduku.
3 They put the ark of our Father on a new cart and brought it from Abinadab's house on the hill; Uzzah and Ahio, sons of Abinadab, drove the new cart, Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ezalaki Uza mpe Ayiyo, bana mibali mibale ya Abinadabi, nde bazalaki kotambolisa shario yango oyo ya sika.
4 with the ark of our Father, and Ahio walked ahead of the ark. Bamemaki shario elongo na Sanduku ya Nzambe, wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ayiyo azalaki kotambola liboso ya shario.
5 David and all the house of Israel celebrated before our Father with all their might—songs, lyres, harps, tambourines, castanets, and cymbals. Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela na liboso ya Yawe, na kobeta lolenge nyonso ya bibetelo mindule basala na mabaya ya sipele, mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, makembe mpe manzanza.
6 When they arrived at Nacon's threshing floor, Uzzah reached out and grabbed our Father's ark, for the oxen had stumbled. Tango bakomaki na etando ya Nakoni, Uza asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe elingaki kokweyisa Sanduku.
7 The anger of our Father burned against Uzzah; he struck him there for his irreverence, and he died there beside the ark of our Father. Yawe asilikelaki Uza makasi, mpe Nzambe abetaki ye mpo na mbeba na ye. Boye Uza akufaki kaka wana, pembeni ya Sanduku ya Nzambe.
8 David was angry that our Father broke out against Uzzah; the place is still called Perez-uzzah today. Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. »
9 David feared our Father that day and said, "How can the ark of our Father come to me?" Na mokolo wana, Davidi abangaki Yawe mpe amitunaki : « Ndenge nini Sanduku ya Yawe eya epai na ngai ? »
10 David refused to bring the ark of our Father into the City of David, taking it instead to Obed-edom the Gittite's house. Boye, Davidi aboyaki komema Sanduku ya Yawe epai na ye, kati na engumba ya Davidi ; akendeki kotia yango kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati.
11 The ark of our Father stayed three months in Obed-edom the Gittite's house, and our Father blessed Obed-edom and his whole household. Sanduku ya Yawe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati ; mpe Yawe apambolaki Obedi-Edomi elongo na libota na ye nyonso.
12 King David was told, "Our Father has blessed Obed-edom's household and all he owns because of the ark." So David went and brought the ark of our Father up from Obed-edom's house to the city of David, rejoicing. Tango bayaki koyebisa mokonzi Davidi ete Yawe apamboli ndako ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso mpo na Sanduku ya Nzambe, Davidi akendeki kozwa na esengo Sanduku ya Nzambe wuta na ndako ya Obedi-Edomi, mpe bakendeki na yango kati na engumba ya Davidi.
13 When those carrying our Father's ark had gone six steps, David sacrificed an ox and a fattened calf. Tango bato oyo bazalaki komema Sanduku ya Yawe batindikaki makolo na bango mbala motoba, batelemaki, mpe Davidi abonzaki lokola mbeka ngombe moko ya mobali mpe mwana ngombe moko ya mafuta.
14 Then David danced before our Father with all his might, wearing a linen ephod. Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.
15 David and all the house of Israel brought up the ark of our Father with shouts and ram's-horn blasts. Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Yawe na kobeta milolo ya esengo mpe na kobeta bakelelo.
16 As the ark of our Father entered the city of David, Michal, Saul's daughter, looked down from the window and saw King David leaping and dancing before our Father—and despised him in her heart. Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.
17 They brought in the ark of our Father, set it in its place inside the tent David had pitched for it, and David offered burnt and peace offerings before our Father. Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango. Mpe Davidi abonzaki liboso ya Yawe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
18 Once David finished offering burnt offerings and peace offerings, he blessed the people in the name of the Father of heaven's armies. Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga.
19 He gave all the people—Israel's whole crowd, man and woman alike—to each one a loaf of bread, a date cake, and a raisin cake. Then everyone went, each to his own home. Bongo apesaki na bato nyonso, na lisanga mobimba ya Isalaele, mibali mpe basi, lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati, gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka. Sima na yango, bato nyonso bazongaki na bandako na bango.
20 When David returned to bless his own household, Michal the daughter of Saul came out to meet him and said, "How the king of Israel has honored himself today, uncovering himself before the eyes of the household servant girls, as any vulgar man would shamelessly uncover himself!" Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki : — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ?
21 David told Michal, "It was before our Father, who chose me over your father and all his house to make me ruler over our Father's people, over Israel. So I will celebrate before him. Davidi alobaki na Mikali : — Nazalaki nde kosepela liboso ya Yawe oyo aponaki ngai mpe asepelaki na ngai koleka tata na yo mpe moto nyonso ya ndako na ye, tango akomisaki ngai mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe.
22 I will humble myself even more than this, low in my own eyes; but with the maidservants you spoke of, with them I will be honored." Nakokoma lisusu moto pamba koleka mpe nakomikitisa lisusu koleka na miso na ngai moko. Kasi liboso ya basi oyo yo ozali kolobela, ngai nakozwa lokumu.
23 And Michal the daughter of Saul had no child until the day she died. Mpo na yango, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotaki te kino na mokolo na ye ya kufa.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]