Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 Josiah, eight when made king, reigned thirty-one years in Jerusalem. Mother: Jedidah daughter of Adaiah, from Bozkath. Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yedida. » Yedida azalaki mwana ya Adaya, moto ya mboka Botsikati.
2 He did right in our Father's eyes, walking in all the ways of David his father, turning neither right nor left. Joziasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali.
3 In his eighteenth year, King Josiah sent Shaphan son of Azaliah son of Meshullam, the secretary, to our Father's house, saying: Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye :
4 Go up to Hilkiah the high priest and have him total the money brought into our Father's house, which the doorkeepers collected from the people. — Kende koyebisa Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ete atanga mbongo nyonso oyo bato bamemaki na Tempelo ya Yawe mpe oyo bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe bakongolaki.
5 Give it to the supervisors appointed over the work in our Father's house, and have them pay the workers in our Father's house repairing its damage. Tika ete bapesa mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe mpo ete bafuta basali oyo bazali kobongisa yango :
6 The carpenters, builders, masons—and to buy timber and hewn stone to repair the house. basharipantie, bangamba mpe batongi ndako. Kaka na mbongo yango, bakosomba lisusu mabaya mpe mabanga bakata mpo na kolendisa Tempelo ya Yawe.
7 No accounting is required of the money entrusted to them, for they act faithfully. Kasi batuna bango te ndenge nini bakosalela mbongo yango, pamba te basalaka na boyengebene.
8 High priest Hilkiah told secretary Shaphan, "I found the Book of the Law in our Father's house." He gave it to Shaphan, who read it. Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, alobaki na Shafani, mokomi mikanda : — Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe. Ilikia apesaki buku yango epai ya Shafani, mpe Shafani atangaki yango.
9 Shaphan the secretary told the king, "Your servants poured out the money found in the temple and gave it to the workers and supervisors at the house of our Father." Bongo Shafani, mokomi mikanda, akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye : — Basali na yo bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala na yango,
10 Shaphan the scribe told the king, "Hilkiah the priest gave me a scroll," and read it aloud before him. mpe Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko. Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi.
11 When the king heard the words of the Book of the Law, he tore his clothes. Tango mokonzi ayokaki maloba ya buku ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye
12 The king commanded Hilkiah the priest, Ahikam Shaphan's son, Achbor Micaiah's son, Shaphan the scribe, and Asaiah the king's servant: mpe apesaki mitindo oyo epai ya Nganga-Nzambe Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, epai ya Akibori, mwana mobali ya Mishe, epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi :
13 "Go, ask our Father for me, for the people, for all Judah about the words of this discovered book. Great is our Father's anger burning against us, because our ancestors did not obey this book's words by doing all that is written about us." — Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango.
14 So Hilkiah the priest, Ahikam, Achbor, Shaphan, and Asaiah went to Huldah the woman prophet, wife of Shallum son of Tikvah son of Harhas, wardrobe keeper, living in Jerusalem's Second District, and spoke with her. Boye Nganga-Nzambe Ilikia, Ayikami, Akibori, Shafani mpe Asaya bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tikiva, koko ya Arasi, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, kati na etuka ya sika. Tango basilisaki koyebisa ye makambo,
15 She told them, "This is what our Father, the God of Israel, says: Tell the man who sent you to me, Ulida alobaki na bango : — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boloba na tata oyo atindi bino epai na Ngai :
16 our Father says: I am bringing disaster on this place and its people—all the words the king of Judah has read in the book. « Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda makambo nyonso oyo ekomama kati na buku oyo mokonzi ya Yuda awuti kotanga.
17 Because they abandoned me, burned incense to other gods, provoking me to anger with all their handiwork, my anger will burn against this place unquenched. Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola Ngai na nzela ya biloko nyonso oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai epeli makasi mpo na kobebisa esika oyo, mpe ekokita te. »
18 Tell Judah's king, who sent you to inquire of the Father: our Father, Israel's God, says this about the words you heard. Boloba na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino kotuna toli ya Yawe : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na maloba oyo oyokaki :
19 Because your heart was soft and you humbled yourself before the Father on hearing what I spoke against this place and its people—that they would become a ruin and a curse—and tore your clothes and wept before me, I too have heard you, declares the Father. Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.
20 So I will gather you to your ancestors; you will be gathered to your grave in peace, your eyes not seeing all the disaster I will bring on this place." Then they brought her answer back to the king. Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. » Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]