Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Kings 17 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 In Ahaz king of Judah's twelfth year, Hoshea son of Elah became king over Israel in Samaria, and he reigned nine years. Tango Akazi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Oze, mwana mobali ya Ela, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Akonzaki mibu libwa.
2 He did evil in our Father's sight, though not like the kings of Israel before him. Oze asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na bakonzi ya Isalaele, oyo bazalaki liboso na ye.
3 Shalmaneser king of Assyria marched up against him, and Hoshea became his vassal and paid him tribute. Salimanasari, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Oze. Mpe Oze akomaki mowumbu mpe akomaki kofuta mpako epai ya Salimanasari.
4 But Assyria's king discovered that Hoshea was plotting treachery: he had sent messengers to So king of Egypt and stopped paying Assyria's king the yearly tribute. So Assyria's king seized and bound him in prison. Kasi mokonzi ya Asiri asosolaki ete Oze asaleli ye likita, pamba te Oze atindaki bantoma epai ya So, mokonzi ya Ejipito, mpe atikaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Asiri ndenge azalaki kosala mobu na mobu. Boye Salimanasari akangaki Oze mpe atiaki ye na boloko.
5 The king of Assyria invaded the whole land, marched up to Samaria, and besieged it three years. Mokonzi ya Asiri akotaki na makasi na mokili mobimba, abundisaki Samari mpe azingelaki yango mibu misato.
6 In Hoshea's ninth year Assyria's king took Samaria, exiled Israel to Assyria, settling them in Halah, on the Habor, Gozan's river, and in Media's cities. Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.
7 All this happened because Israel sinned against our Father, who brought them up from Egypt, from under the hand of Pharaoh king of Egypt, and they worshiped other gods, Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele basalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na bango, oyo abimisaki bango wuta na bokonzi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ; bagumbamelaki banzambe mosusu.
8 and followed the customs of the nations our Father drove out before them, and those Israel's kings introduced. Balandaki bizaleli ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango mpe makambo oyo bakonzi ya Isalaele bakotisaki.
9 Israel secretly did wrong against our Father, building high places in all their towns, from watchtower to fortified city. Bato ya Isalaele basalaki na nkuku makambo ya nkele na miso ya Yawe, Nzambe na bango. Batongaki bisambelo ya likolo ya bangomba kati na bingumba na bango nyonso, kobanda na likolo ya bamir ya lopango kino na bingumba batonga makasi.
10 They set up sacred pillars and Asherah poles on every high hill and under every green tree. Batelemisaki mabanga ya bule mpe makonzi ya nzambe mwasi Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu.
11 At every high place they burned incense, like the nations our Father drove out before them. They did evil that provoked our Father to anger. Batumbaki ansa na bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba, ndenge bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango ezalaki kosala. Basalaki makambo mabe oyo etumbolaki kanda ya Yawe.
12 They served idols, though our Father had told them, "You must not do this." Bagumbamelaki banzambe ya bikeko oyo na tina na yango Yawe alobaki : « Bokosala bongo te. »
13 Our Father warned Israel and Judah through every prophet and seer: "Turn from your evil ways and keep my commands and decrees—the whole law I gave your ancestors and sent you through my servants the prophets." Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo : « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. »
14 But they would not listen. They stiffened their necks like their ancestors, who did not trust our Father. Kasi bayokaki te ; batiaki moto makasi lokola bakoko na bango, oyo baboyaki kondimela Yawe, Nzambe na bango.
15 They rejected his decrees, the covenant with their ancestors, and his warnings. They chased worthless idols and became worthless, imitating the surrounding nations our Father forbade them to copy. Babwakaki bikateli na Ye, boyokani oyo asalaki elongo na bakoko na bango mpe makebisi oyo apesaki bango. Balandaki bikolo oyo ezalaki zingazinga na bango. Yawe apesaki bango mitindo ete basala te lokola bango, kasi bango basalaki kaka makambo oyo Yawe apekisaki bango kosala.
16 They abandoned all our Father's commandments, made two cast calf idols and an Asherah pole, bowed to all heaven's starry host, and served Baal. Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala.
17 They burned their sons and daughters as sacrifices, practiced fortune-telling and witchcraft, sold themselves to do evil before our Father, provoking his anger. Batumbaki na moto lokola mbeka bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi. Basalelaki soloka mpe kindoki, mpe bamikabaki mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. Boye batumbolaki kanda ya Yawe.
18 So our Father, furious with Israel, removed them from his presence. Only the tribe of Judah remained, Yawe asilikelaki makasi bana ya Isalaele mpe abenganaki bango mosika na Ye. Kaka libota ya Yuda nde batikalaki.
19 Judah too did not keep the commands of our Father, but followed Israel's practices. Nzokande, libota yango mpe ya Yuda babatelaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bango, balandaki bizaleli oyo Isalaele akotisaki.
20 So our Father rejected all Israel's descendants, brought suffering on them, and handed them to raiders until he cast them from his presence. Boye, Yawe abwakaki bana nyonso ya Isalaele, ayokisaki bango pasi, akabaki bango na maboko ya bato ya mobulu, mpe abenganaki bango mosika na Ye.
21 When our Father tore Israel from the house of David, they crowned Jeroboam son of Nebat their king. Jeroboam drove Israel from following our Father and led them into great sin. Tango Yawe alongolaki Isalaele na se ya bokonzi ya Davidi, bana ya Isalaele bakomisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mokonzi na bango. Jeroboami atindikaki Isalaele ete balanda Yawe te, mpe amemisaki bango lisumu ya monene.
22 Israel persisted in all the sins Jeroboam committed; they did not turn from them, Bato ya Isalaele bakangamaki na masumu nyonso ya Jeroboami mpe batikaki yango te
23 until our Father removed Israel from his presence, as he said through all his servant prophets. So Israel was exiled from their land to Assyria, remaining there to this day. kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo.
24 Assyria's king brought people from Babylon, Cuthah, Avva, Hamath, and Sepharvaim, settling them in Samaria's towns to replace Israel. They took over Samaria and lived in its towns. Mokonzi ya Asiri amemaki bato wuta na bingumba ya Babiloni, ya Kuti, ya Ava, ya Amati mpe ya Sefarivayimi ; mpe atiaki bango na Samari, na esika ya bana ya Isalaele. Bato yango bazwaki Samari mpe bavandaki kati na bingumba na yango.
25 When they first lived there, they didn't worship our Father; so he sent lions among them that killed some of them. Liboso, tango bazalaki kovanda kuna, bato yango bazalaki kogumbamela Yawe te. Boye Yawe atindaki nkosi kati na bango, mpe ebomaki ndambo ya bato kati na bango.
26 They told Assyria's king: "The nations you deported to Samaria's towns don't know what the god of the land requires. So he sent lions among them, killing them, because they don't know what the land's god requires." Bayebisaki mokonzi ya Asiri : — Bikolo oyo omemaki na bowumbu mpe otiaki kati na bingumba ya Samari bayebi te makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. Boye Nzambe atindi kati na bango nkosi oyo ezali koboma bango, pamba te bato yango bayebi te makambo oyo Nzambe yango alingaka.
27 Assyria's king ordered: "Send back one priest you exiled from Samaria. Let him live there and teach the people what the land's god requires." Boye mokonzi ya Asiri apesaki mitindo oyo : — Botinda kuna moko kati na Banganga-Nzambe oyo bomemaki na bowumbu wuta na Samari mpo ete avanda kuna mpe alakisa bato makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka.
28 So one of the priests deported from Samaria settled in Bethel and taught them how to worship our Father. Boye moko kati na Banganga-Nzambe oyo bamemaki na bowumbu wuta na Samari ayaki kovanda na Beteli mpe alakisaki bango kogumbamela Yawe.
29 But each nation made its own gods and set them in the high-place shrines the Samaritans built, each nation in the towns where it lived. Kasi ekolo na ekolo esalaki banzambe na yango kati na bingumba nyonso oyo bazalaki kovanda, mpe batiaki banzambe yango kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bato ya Samari batongaki.
30 The people from Babylon made Succoth-benoth, those from Cuth made Nergal, those from Hamath made Ashima, Bato oyo bawutaki na Babiloni basalaki ekeko ya nzambe Sukoti-Benoti ; ba-oyo bawutaki na Kuti basalaki ekeko ya nzambe Nerigali ; ba-oyo bawutaki na Amati basalaki ekeko ya nzambe Ashima ;
31 the Avvites made Nibhaz and Tartak, the Sepharvites burned their children in the fire as sacrifices to Adrammelech and Anammelech, gods of Sepharvaim. ba-oyo bawutaki na Ava basalaki bikeko ya nzambe Nibikazi mpe nzambe Taritaki ; ba-oyo bawutaki na Sefarivayimi bazalaki kokoba kotumba bana na bango na moto lokola mbeka epai ya Adrameleki mpe Anameleki, banzambe ya bato ya Sefarivayimi.
32 They worshiped our Father yet appointed from among themselves all sorts of priests for the high places, who sacrificed for them at the shrines. Bato ya bikolo yango bazalaki na bango kotosa Yawe, kasi baponaki lisusu kati na bango bato mpo na kosala mosala ya bonganga-nzambe kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba.
33 They worshiped our Father, yet served their own gods by the customs of the nations they were deported from. Atako bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango kolanda bizaleli ya bikolo epai wapi bawutaki.
34 To this day they keep their former customs. They do not worship our Father, nor do they follow statutes, rules, law, and commandment our Father gave Jacob's children, whom he named Israel. Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »
35 When our Father made a covenant with them, he commanded them: "Don't worship, bow to, serve, or sacrifice to other gods. Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango : « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te ;
36 But your Father brought you out of Egypt with great power and an outstretched arm—worship him. Bow to him; offer sacrifices to him. kaka Yawe oyo abimisaki bino wuta na Ejipito, na nguya mpe na loboko esembolama, nde bosengeli kogumbamela. Liboso na Ye kaka nde bosengeli kogumbama mpe kobonza bambeka.
37 Always be careful to keep the statutes, rules, law, and commandment he wrote for you. Do not worship other gods. Bosengeli tango nyonso kozala na bokebi mpo na kobatela bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe akomaki mpo na bino. Bogumbamela banzambe mosusu te,
38 Do not forget the covenant I made with you, and do not worship other gods. bobosana te boyokani oyo nasalaki elongo na bino, mpe bogumbamela banzambe mosusu te.
39 But worship your Father, and he will rescue you from the hand of all your enemies." Kaka Yawe, Nzambe na bino, nde bosengeli kogumbamela, pamba te Ye nde akangolaki bino na maboko ya banguna na bino nyonso. »
40 They would not listen, however, but persisted in their former customs. Kasi bato ya bikolo wana bayokaki te mpe batingamaki kaka na bizaleli na bango ya kala.
41 These nations worshiped our Father yet served their idols. Their children and grandchildren do as their ancestors did, to this day. Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]