Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Chronicles 8 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 After twenty years, in which Solomon built the house of our Father and his own palace, Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko,
2 Solomon rebuilt the cities that Huram had given him, and settled the people of Israel in them. Salomo atongaki lisusu bingumba mike oyo Irami apesaki ye mpe avandisaki kuna bana ya Isalaele.
3 Then Solomon marched against Hamath-zobah and overpowered it. Salomo akendeki kobundisa engumba Amati ya Tsoba mpe abotolaki yango.
4 He built Tadmor in the wilderness, along with all the storage cities he built in Hamath. Kati na esobe, atongaki engumba Tadimori ; mpe kati na Amati, atongaki bingumba nyonso ya kobombela biloko.
5 He also rebuilt Upper Beth-horon and Lower Beth-horon as fortified cities, with walls, gates, and bars, Atongaki lisusu Beti-Oroni ya likolo mpe Beti-Oroni ya se lokola bingumba batonga makasi, elongo na bamir, bikuke mpe bibende oyo bakangelaka bikuke,
6 Baalath, all Solomon's supply cities, his chariot and horsemen cities, and all he desired to build in Jerusalem, Lebanon, and his whole realm. Baalati mpe bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, na Libani mpe na mokili nyonso oyo azalaki kokamba.
7 There were still people left from the Hittites, Amorites, Perizzites, Hivites, and Jebusites, who were not Israelites. Batikali nyonso kati na bato ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, ba-oyo bazalaki bana ya Isalaele te,
8 Their descendants still living in the land, whom Israel had not destroyed, Solomon conscripted for forced labor, as they still are today. ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi, kino na mokolo ya lelo.
9 Solomon enslaved no Israelites for his work; they were soldiers, commanders of his officers, and commanders of his chariots and horsemen. Kasi Salomo akomisaki te bana ya Isalaele bawumbu mpo na kosala misala makasi na ye, pamba te bazalaki bato ya bitumba, bakonzi ya basoda na ye, bakonzi ya bashar na ye mpe ya basoda na ye, oyo batambolisaka bashar.
10 These were King Solomon's chief officers: 250 who supervised the people. Ezalaki mpe na bakalaka ya lokumu oyo mokonzi Salomo atiaki mpo na kokamba basali na ye. Motango na bango ezalaki nkama mibale na tuku mitano.
11 Solomon brought Pharaoh's daughter from the City of David to the house he built her, saying, "No wife of mine will live in David king of Israel's house, for holy is wherever our Father's ark has entered." Salomo alongolaki mwana mwasi ya Faraon kati na engumba ya Davidi mpe amemaki ye na ndako oyo atongelaki ye, pamba te alobaki : « Mwasi na ngai asengeli te kovanda kati na ndako ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete bisika oyo Sanduku ya Yawe ekoti ezali bule. »
12 Then Solomon offered burnt offerings to our Father on the altar he built before the portico, Salomo abonzaki epai na Yawe bambeka ya kotumba, na etumbelo ya Yawe, oyo atongaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe.
13 daily as required, by Moses' command: Sabbaths, New Moons, and three yearly festivals—the Feast of Unleavened Bread, the Feast of Weeks, and the Feast of Tabernacles. Azalaki kobonza yango mokolo na mokolo, kolanda mitindo ya Moyize na tina na mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti misato oyo esalemaka mibu nyonso : feti ya Mapa ezanga levire, feti ya Baposo mpe feti ya Bandako ya kapo.
14 Following his father David's rules, he set priestly divisions for service, Levite divisions to praise and serve before the priests as each day required, and gatekeeper divisions at each gate, for David the man of our Father had commanded it. Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki.
15 They followed the king's orders to the priests and Levites exactly, down to the storerooms. Batosaki na makambo nyonso mitindo ya mokonzi mpo na oyo etali Banganga-Nzambe mpe Balevi, ezala mpo na oyo etali bibombelo bomengo.
16 All Solomon's work was finished, from the day our Father's house was founded until its completion; our Father's house was complete. Ezali boye nde misala nyonso ya Salomo esalemaki, kobanda na mokolo oyo batongaki moboko ya Tempelo ya Yawe kino na mokolo oyo esilaki. Boye, Tempelo ya Yawe esilaki kotongama.
17 Then Solomon went to Ezion-geber and Eloth on the seacoast in the land of Edom. Salomo akendeki na Etsioni-Geberi mpe na Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi.
18 Huram sent him ships by his servants, with sailors who knew the sea; they sailed with Solomon's servants to Ophir, took about seventeen tons of gold, and brought it to King Solomon. Irami atindelaki ye, na nzela ya basali na ye, bamasuwa mpe bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale. Bato ya Irami batambolaki elongo na basali ya Salomo kino na Ofiri, mpe bazwaki kuna bakilo nkoto zomi na mitano ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]