Skip to content
The Believer's Library

Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020

2 Chronicles 22 OLCB

Show OLCB only
Verse × ×
1 The people of Jerusalem made his youngest son Ahaziah king in his place, since the raiders who came with the Arabs into the camp had killed all the older sons. So Ahaziah son of Jehoram king of Judah became king. Bato ya Yelusalemi bakomisaki Akazia, mwana mobali ya suka ya Yorami, mokonzi mpo na kokitana na ye, pamba te bato ya mobulu oyo bakotaki na molako elongo na bato ya Arabi babomaki bana mibali nyonso. Ezali boye nde Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi.
2 Ahaziah became king at twenty-two and reigned one year in Jerusalem. His mother was Athaliah, granddaughter of Omri. Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri.
3 He too followed the ways of Ahab's house, for his mother counseled him to do evil. Ye mpe alandaki banzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango, pamba te mama na ye, na nzela ya batoli na ye, azalaki kotindika ye na kosala mabe.
4 He did evil in our Father's eyes, like Ahab's house, for after his father's death they were his counselors, to his ruin. Akazia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki ; pamba te, sima na kufa ya tata na ye, bato ya libota ya Akabi bakomaki bapesi toli na ye mpo na libebi na ye.
5 He followed their advice too, joining Joram son of Ahab, Israel's king, to fight Hazael king of Aram at Ramoth-gilead, where the Arameans wounded Joram. Alandaki mpe batoli na bango tango akendeki na bitumba elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Kasi bato ya Arami bazokisaki Yorami.
6 So he returned to Jezreel to recover from the wounds he received at Ramah fighting Hazael king of Aram. Ahaziah son of Jehoram king of Judah went down to Jezreel to see Joram son of Ahab, because he was wounded. Bongo, Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Azaria, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye.
7 Ahaziah's downfall came from our Father when he visited Joram. On arriving, he went out with Jehoram against Jehu son of Nimshi, whom our Father had anointed to destroy the house of Ahab. Nzambe asalaki ete kobebisama ya Akazia esalema tango akendeki kotala Yorami. Tango kaka Akazia akomaki, abimaki nzela moko na Yorami mpo na kokende epai ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo Yawe apakolaki mafuta mpo na kobebisa ndako ya Akabi.
8 As Jehu carried out judgment on Ahab's house, he found Judah's officials and Ahaziah's nephews who served Ahaziah, and killed them. Tango Jewu azalaki kokokisa etumbu kati na libota ya Akabi, akutaki bakambi ya Yuda mpe bana mibali ya bandeko mibali ya Akazia, oyo bazalaki kosalela tata leki na bango Akazia, mpe abomaki bango.
9 He searched for Ahaziah, who was captured while hiding in Samaria. They brought him to Jehu and killed him, then buried him, saying, "He is Jehoshaphat's son, who sought our Father with all his heart." So Ahaziah's house had no one strong enough to hold the kingdom. Bongo, akendeki koluka Akazia, mpe bato na ye bakangaki Akazia kati na Samari epai wapi abombamaki. Bamemaki ye epai ya Jewu mpe babomaki ye. Bakundaki ye, pamba te bamilobelaki : « Azalaki mwana mobali ya Jozafati oyo azalaki koluka Yawe na motema na ye mobimba. » Ezalaki lisusu na moto ya nguya ata moko te kati na libota ya Akazia mpo na kobatela bokonzi.
10 When Athaliah, Ahaziah's mother, saw her son was dead, she set out to destroy all the royal offspring of Judah's house. Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya bokonzi ya ndako ya Yuda.
11 But Jehoshabeath the king's daughter took Joash son of Ahaziah, stealing him from among the royal sons about to be killed, and hid him with his nurse in a bedroom. So Jehoshabeath, King Jehoram's daughter, Jehoiada the priest's wife and Ahaziah's sister, hid him from Athaliah, so she did not kill him. Kasi Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia, alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma, mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto. Lokola Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe mwasi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, azalaki ndeko mwasi ya Akazia, abombaki Joasi mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te.
12 He stayed hidden with them in the house of our Father six years while Athaliah reigned over the land. Joasi abombamaki elongo na bango mibu motoba kati na Tempelo ya Nzambe, wana Atali azalaki kokonza mokili.
FHB

Scripture from Father’s Heart Bible™. © 2026 Spirit Media Publishing, the imprint of Spirit Media Inc. All rights reserved. In Divine Voice™ Color, the words spoken by our Father show in blue, the words of the Son in red, and the words of the Spirit in purple.

OLCB

Biblica® Salela na bonsomi Mokanda na Bomoi™ Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc. Biblica® Open Lingala Contemporary Bible™ Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 · Creative Commons - Attribution-ShareAlike [CC BY-SA]